Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 2
II C LinVB 2:1  Salomo akamati bato nkoto ntuku nsambo mpo ya komeme biloko, bato nkoto ntuku mwambe mpo ya kokata mabanga o ngomba, na bakapita nkoto isato na nkama motoba.
II C LinVB 2:2  Salomo atindeli Kuram, mokonzi wa Tiro, maloba maye : « Osalisaki tata wa ngai Davidi mpe otindelaki ye nzete ya sédere mpo ya kotonga ndako esika akofanda.
II C LinVB 2:3  Sikawa ngai nalingi kotonga ndako mpo ya kokumisa nkombo ya Yawe Nzambe wa ngai. Nalingi ezala ndako ya ye mpo ’te bato batumbela ye mpaka ya malasi, babonzela ye ma­mpa ntango inso, babonzela ye mabonza ma kotumba na ntongo mpe na mpokwa, o mikolo mya sabato, o mikolo sanza ya sika ekobimaka, mpe o biyenga binene bya Yawe Nza­mbe wa biso. Nalingi ezala bo­ngo seko o Israel.
II C LinVB 2:4  Ndako eye nali­ngi kotonga ekozala enene, zambi Nza­mbe wa biso aleki banzambe basusu banso.
II C LinVB 2:5  Nani akoki kotongela Yawe ndako, oyo aleki likolo mobimba na bonene ? Mpe ngai nde nani ’te natongela ye ndako ? Soko nakosala bo­ngo, ezali se mpo ya kotumbela ye mabonza.
II C LinVB 2:6  Bongo nasengi yo : oti­ndela ngai moto moko ayebi kotula wolo, palata, mbengi na ebende, moto ayebi kosono bilamba bya kiusa ya motane, ya moindo mpe ya longo­ndo, moto ayebi mpe kokatakata mabaya. Ye akosala mosala elongo na bato ba ngai bayebi mosala mwango, baye bazali penepene na ngai o Yuda mpe o Yeruzalem, bato tata wa ngai Davidi atikelaki ngai.
II C LinVB 2:7  Ut’o Libano, tindela ngai mibimbi mya sédere, ma sipresi mpe ma kambala, mpo nayebi ’te basali ba yo bayebi kokata nzete ya Libano. Basali ba ngai bakosala elongo na basali ba yo.
II C LinVB 2:8  Babongisela ngai mabaya maike mpenza, mpo nda­ko eye nalingi kotonga ekozala enene mpe ya kokamwa.
II C LinVB 2:9  Mpo ya koleisa baye bakokata nzete mpe mpo ya basali ba yo, napesi bingwo­ngolo nkoto ntuku ibale bya mbuma ya mampa, bingwongolo nkoto ntuku ibale bya mbuma ya loso, bi­ngwo­ngolo nkoto ntuku ibale bya vino, na mpe bingwongolo nkoto ntuku ibale bya mafuta. »
II C LinVB 2:10  Kuram, mokonzi wa Tiro, azo­ngiseli Salomo monkanda moye : « Ya­we aluboli yo mokonzi, zambi ali­ngi ekolo ya ye mingi. »
II C LinVB 2:11  Abakisi maloba maye : « Bakumisa Yawe Nza­mbe wa Israel, oyo akeli likolo na nse ; apesi mokonzi Davidi mwana mobali moko wa mayele, wa bokebi mpe wa bwanya, oyo akotonga ndako ya Yawe na mpe ndako esusu ya ye moko.
II C LinVB 2:12  Nakotindela yo sikawa moto moko ayebi misala mingi, moto wa mayele, nkombo ya ye Kuram-Abi.
II C LinVB 2:13  Mama wa ye azalaki moto wa libota lya Dan, tata wa ye moto wa Tiro. Ayebi mosala mwa kotula wolo, palata, mbengi na ebende ; ayebi kokata mabanga mpe kopasola mabaya ; ayebi kosono bilamba bya kiusa ya longondo, bya malekani mpe bya moindo ; ayebi mpe kosala bikeko mpe kosilisa misala minso bakopesa ye. Akosala mosala elongo na basali ba yo na baye ba tata wa yo Davidi.
II C LinVB 2:14  Bongo otindela basaleli ba yo mbuma ya mampa, loso mpe mafuta na vino lokola olobaki.
II C LinVB 2:15  Biso tokokata o Libano nzete inso isengeli na yo ; tokotinda yango o nzela ya mai ma mbu tee Yafa ; mpe yo okokomisa yango o Yeruzalem. »
II C LinVB 2:16  Salomo atangi bampaya banso ba­kofandaka o Israel, lokola batangaki bango o eleko ya tata wa ye Davidi ; bazalaki nkoto monkama na ntuku itano na isato na nkama motoba.
II C LinVB 2:17  Aponi bato nkoto ntuku nsambo mpo ya komeme biloko, bato nkoto ntuku mwambe mpo ya kokata mabanga o ngomba, na bakapita nkoto isato na nkama motoba mpo ya kotala bato ba mosala.