JUDITH
Chapter 4
Judi | LinVB | 4:1 | Ba-Israel bafandi o Yudea bayoki makambo manso Oloferne, komanda wa basoda ba Nabukodonozor, mokonzi wa Asur, asalaki o bikolo bisusu, boniboni abebisaki tempelo ya bango inso mpe ayibaki biloko bisantu bya bango. | |
Judi | LinVB | 4:2 | Awa akomi penepene bayoki motema nsomo mpe babangi mpenza mpo ya Yeruzalem mpe mpo ya Tempelo ya Mokonzi Nzambe wa bango. | |
Judi | LinVB | 4:3 | Mpamba te, bauti o boombo bobele sika mpe bato banso ba Yudea bazongi o mokili mwa bango bapetolaki biloko bisantu, altare mpe Tempelo. | |
Judi | LinVB | 4:4 | Batindi bato bakebisa mokili mwa Samaria, Kona, Beteron, Belmayin, Yeriko, Koba, Esora mpe lobwaku la Salem. | |
Judi | LinVB | 4:5 | Bakei kofanda o ngomba inene inso, batiki basoda o bituka binso. Babombi biloko bya kolia mpo ya ntango ya etumba, zambi ezalaki eleko basili kobuka mbuma ya bilanga. | |
Judi | LinVB | 4:6 | Yoyakim azalaki nganga Nzambe mokonzi o Yeruzalem. Atindi monkanda na bato ba Betulia mpe ba Betomestaim, pene na Esdrelon epai ya esobe ya Dotain. | |
Judi | LinVB | 4:7 | Atindi bango batia basoda o nsonge ya ngomba, bakengele bongo nzela ekokende o Yudea. Nzela ena ezalaki nkaka mingi, bato bakoki koleka se babale babale, bongo kokangela nzela banguna ezalaki mpasi te. | |
Judi | LinVB | 4:8 | Ba-Israel basali lokola nganga Nzambe mokonzi Yoyakim na Likita lya bakolo ba Yeruzalem batindaki. | |
Judi | LinVB | 4:10 | Babali banso, basi ba bango, bana ba bango, bibwele bya bango, bampaya banso bazalaki na bango, basali na baombo, banso bakangi ngoto o loketo. | |
Judi | LinVB | 4:11 | Ba-Israel banso baye bazalaki o Yeruzalem, ná basi ná bana, bamibwaki o mabelé o boso bwa Tempelo ; bapakoli mputulu o motó, batandi maboko mpo ’te babondela Mokonzi. | |
Judi | LinVB | 4:12 | Bazipi altare na ngoto, mpe na migango makasi babeleli Nzambe wa Israel monoko moko, babondeli ye ’te banguna baya koyiba bana ba bango te, babebisa basi ba bango te, baboma bingumba bya bango te, basantola mpe basambwisa Tempelo te. | |
Judi | LinVB | 4:13 | Nzambe ayoki lolaka la bango mpe amoni mpasi ya bango. Bango bakobi kolala nzala mwa mikolo mingi o mokili mobimba mwa Yudea mpe o Yeruzalem ; basali bongo o boso bwa esika esantu ya Mokonzi wa bokasi bonso. | |
Judi | LinVB | 4:14 | Yoyakim, nganga Nzambe mokonzi, banganga Nzambe banso na basaleli banso ba Mokonzi, ngoto o loketo, bazalaki kobonza mabonza ntango inso, maye bato bapesaki o nkombo ya bango moko. | |