Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDITH
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 7
Judi LinVB 7:1  Mokolo mwa nsima, Oloferne atindi basoda ba ye banso na mpe basoda ba bikolo biye bandimaki kosalisa ye, ’te babima o nganda mpe bakende kobundisa Betulia, bakanga nzela ekoleka o kati ya ngomba mpe babunda na ba-Israel.
Judi LinVB 7:2  Mokolo mona basoda banso bamilengeli mpo ya etumba. Limpinga lya basoda lizalaki boye : bato ba makolo nkoto monkama na ntuku nsambo, basoda ba farasa nkoto zomi na ibale, bakisa baye bazalaki komeme biloko mpe bato ba makolo basusu mingi mpe­nza.
Judi LinVB 7:3  Bakiti o lobwaku penepene na Betulia o nzela ya liziba, mpe bata­ndani milo­ngo, ut’o Dotain kin’o Belbain, mpe banda Betulia tee Kiamon, o ndelo ya esobe ya Esdrelon.
Judi LinVB 7:4  Emoni ba-Israel bato ebele boye, ba­yoki nsomo mi­ngi, balobani : « Sikawa bakonyata mokili mobimba. Eloko yoko ekoki kopekisa bango lisusu te, ata ngomba enene, ata lobwaku bozindo, ata ngo­mba eke. »
Judi LinVB 7:5  Moko moko akamati bibuneli bya ye, bapelisi móto likolo lya manongi mabale, mpe butu mobimba bakengeli engu­mba ya ba­ngo.
Judi LinVB 7:6  Mokolo mwa mibale, Oloferne ati­ndi basoda ba ye ba farasa bapusana penepene na ba-Israel bazalaki o Betulia.
Judi LinVB 7:7  Aluki koyeba nzela inso iko­koma o engumba ya bango, atali bisika binso libulu lya mai lizalaki, atii basoda o bisika bina bakengele byango, na nsima azongi epai ya bato ba ye.
Judi LinVB 7:8  Bakonzi banso ba ekolo ya Ezau, bakomanda ba ekolo Moab, bayangeli ba mokili penepene na mbu enene, bayei epai ya ye mpe balobi na ye :
Judi LinVB 7:9  « E mokonzi, soko ondimi koyoka biso, soda ata moko akozoka te.
Judi LinVB 7:10  Bato ba Israel bazalaki kotia elikya mpenza na makongo ma ba­ngo te, kasi na bosanda bwa ngomba, esika bafandi. Solo, kobuta tee o nso­nge ya ngomba ya bango ezali mpasi mpenza.
Judi LinVB 7:11  Yango wana, mokonzi, otinda basoda milongo milongo te, bongo soda wa yo ata moko akokufa te.
Judi LinVB 7:12  Tikala o nganda mpe bomba basoda ba yo kuna ; basoda ba yo babotolo bobele liziba lya mai pene na ngomba,
Judi LinVB 7:13  mpo bato ba Betulia bakozwaka mai ma bomeli se wana. Bakokufa na mposa ya mai ; bongo bakomipesa o maboko ma yo. O ntango ena tokotinda bato ba biso babuta ngomba izali penepene mpe batikala wana ; bongo moto moko akoka kobima o engumba ya bango te.
Judi LinVB 7:14  Nzala ekosukisa bango, ná basi ná bana ba bango ; mpe ata mopanga mobeti bango naino te, bibembe bya bango bikolala o balabala ya bango.
Judi LinVB 7:15  Bongo nde opesi bango etumbu enene, mpo batomboki mpe baboyi koyamba yo na boboto. »
Judi LinVB 7:16  Maloba ma bango masepelisi Oloferne na bakomanda banso ; ya­ngo wana Oloferne atindi ’te esalema se lokola bango balobaki.
Judi LinVB 7:17  Basoda ba Moab balongwi wana elongo na ba-Asur nkoto itano. Bakiti o lobwaku mpe babotoli mabulu na maziba ma ba-Israel.
Judi LinVB 7:18  O ntango ena ba-Edom na ba-Amon bakei kopika nganda o ngomba etalani na Dotain, batindi basoda basusu epai ya Sudi mpe epai ya Esti tee Egrebel, penepene na Kus mpe na moluka Mokmur. Basoda basusu ba Asur batikali o esobe, bato-ndani o ekolo mobimba. Batiaki biema na biloko bya bango o nganda ene­ne. Bazalaki bato ebele mpenza.
Judi LinVB 7:19  Ba-Israel babeleli Mokonzi Nza­mbe wa bango. Bakomi kolembe, mpo banguna bazingi bango epai na epai mpe bakoki kokima te.
Judi LinVB 7:20  Mikolo ntuku isato na minei mobimba basoda ba Asur, basoda ba makolo, makalo na basoda ba farasa, bazingi bango. Bato ba Betulia bamoni ’te mai mabandi kosila o mbeki mpe o biloko bya bango binso.
Judi LinVB 7:21  O mabulu mai makomi mpe kosila. Ata mbala yoko te bakoki kosilisa mposa ya mai, mpo bazalaki kopesa bato sa mwa mai moke.
Judi LinVB 7:22  Bana bake balembi, bilenge babali na bilenge basi na bamama bakufi na mposa ya mai ; bazalaki ko­kweya o balabala mpe pene na bizibeli bya mboka ; bokasi bwa bango bosili nye.
Judi LinVB 7:23  Bato banso, bilenge, basi na bana bakei epai ya Ozia mpe bakonzi ba mboka, bagangi na boleli mpe balobi o miso ma bakolo ba mboka :
Judi LinVB 7:24  « Nzambe akata likambo lya biso ! Bino bosali biso mabe mpenza, awa boboyi koyokana na ba-Asur.
Judi LinVB 7:25  Sikawa ata moto moko te akoki kosalisa biso. Nzambe akabi biso o maboko ma bango mpo tokufa na mposa ya mai, mpe toyoka mpasi enene o miso ma bango.
Judi LinVB 7:26  Bobenga bango baya nokinoki. Botika mboka mobimba o maboko ma bato ba Oloferne mpe ma bato ba ye, bayiba biloko binso, likambo te.
Judi LinVB 7:27  Eleki malamu tokweya o maboko ma bango, kasi tokufa na mposa ya mai te. Ntembe te, tokokoma bao­mbo ba bango, kasi tokobika mpe tokokufa te ; tokomono mpe liwa lya bana bake ba biso te, mpe boniboni basi na bana bazali kosila.
Judi LinVB 7:28  Tobondeli bino o nkombo ya Mokonzi wa likolo na nse, o Nkombo ya Nzambe wa biso, Mokonzi wa bankoko ba biso, oyo apesi biso etumbu mpo ya mabe ma biso, mpe mpo ya masumu ma bankoko ba biso ; bosala naino lelo lokola tosengi bino. »
Judi LinVB 7:29  O likita mobimba bato banso babandi kolela makasi mpe kobondela Nzambe na mongongo makasi.
Judi LinVB 7:30  Ozia alobi na bango : « Bandeko, Bolendisa mitema ; tosala naino makasi mikolo mitano. Nzambe akoyokela biso ngolu, akoki koboya biso seko te.
Judi LinVB 7:31  Soko mikolo mitano mikoki, mpe lisalisi lyoko limononi te, nakolanda maloba ma bino. »
Judi LinVB 7:32  Na nsima azongisi bato o bisika bya bango bya bitumba. Babali bazongi kokengele o efelo ya lopango mpe o manongi ma mboka ; basi na bana bazongi o ndako ya bango. Bato banso ba mboka bazalaki koyoka mawa na nsomo.