JUDITH
Chapter 7
Judi | LinVB | 7:1 | Mokolo mwa nsima, Oloferne atindi basoda ba ye banso na mpe basoda ba bikolo biye bandimaki kosalisa ye, ’te babima o nganda mpe bakende kobundisa Betulia, bakanga nzela ekoleka o kati ya ngomba mpe babunda na ba-Israel. | |
Judi | LinVB | 7:2 | Mokolo mona basoda banso bamilengeli mpo ya etumba. Limpinga lya basoda lizalaki boye : bato ba makolo nkoto monkama na ntuku nsambo, basoda ba farasa nkoto zomi na ibale, bakisa baye bazalaki komeme biloko mpe bato ba makolo basusu mingi mpenza. | |
Judi | LinVB | 7:3 | Bakiti o lobwaku penepene na Betulia o nzela ya liziba, mpe batandani milongo, ut’o Dotain kin’o Belbain, mpe banda Betulia tee Kiamon, o ndelo ya esobe ya Esdrelon. | |
Judi | LinVB | 7:4 | Emoni ba-Israel bato ebele boye, bayoki nsomo mingi, balobani : « Sikawa bakonyata mokili mobimba. Eloko yoko ekoki kopekisa bango lisusu te, ata ngomba enene, ata lobwaku bozindo, ata ngomba eke. » | |
Judi | LinVB | 7:5 | Moko moko akamati bibuneli bya ye, bapelisi móto likolo lya manongi mabale, mpe butu mobimba bakengeli engumba ya bango. | |
Judi | LinVB | 7:6 | Mokolo mwa mibale, Oloferne atindi basoda ba ye ba farasa bapusana penepene na ba-Israel bazalaki o Betulia. | |
Judi | LinVB | 7:7 | Aluki koyeba nzela inso ikokoma o engumba ya bango, atali bisika binso libulu lya mai lizalaki, atii basoda o bisika bina bakengele byango, na nsima azongi epai ya bato ba ye. | |
Judi | LinVB | 7:8 | Bakonzi banso ba ekolo ya Ezau, bakomanda ba ekolo Moab, bayangeli ba mokili penepene na mbu enene, bayei epai ya ye mpe balobi na ye : | |
Judi | LinVB | 7:10 | Bato ba Israel bazalaki kotia elikya mpenza na makongo ma bango te, kasi na bosanda bwa ngomba, esika bafandi. Solo, kobuta tee o nsonge ya ngomba ya bango ezali mpasi mpenza. | |
Judi | LinVB | 7:11 | Yango wana, mokonzi, otinda basoda milongo milongo te, bongo soda wa yo ata moko akokufa te. | |
Judi | LinVB | 7:12 | Tikala o nganda mpe bomba basoda ba yo kuna ; basoda ba yo babotolo bobele liziba lya mai pene na ngomba, | |
Judi | LinVB | 7:13 | mpo bato ba Betulia bakozwaka mai ma bomeli se wana. Bakokufa na mposa ya mai ; bongo bakomipesa o maboko ma yo. O ntango ena tokotinda bato ba biso babuta ngomba izali penepene mpe batikala wana ; bongo moto moko akoka kobima o engumba ya bango te. | |
Judi | LinVB | 7:14 | Nzala ekosukisa bango, ná basi ná bana ba bango ; mpe ata mopanga mobeti bango naino te, bibembe bya bango bikolala o balabala ya bango. | |
Judi | LinVB | 7:15 | Bongo nde opesi bango etumbu enene, mpo batomboki mpe baboyi koyamba yo na boboto. » | |
Judi | LinVB | 7:16 | Maloba ma bango masepelisi Oloferne na bakomanda banso ; yango wana Oloferne atindi ’te esalema se lokola bango balobaki. | |
Judi | LinVB | 7:17 | Basoda ba Moab balongwi wana elongo na ba-Asur nkoto itano. Bakiti o lobwaku mpe babotoli mabulu na maziba ma ba-Israel. | |
Judi | LinVB | 7:18 | O ntango ena ba-Edom na ba-Amon bakei kopika nganda o ngomba etalani na Dotain, batindi basoda basusu epai ya Sudi mpe epai ya Esti tee Egrebel, penepene na Kus mpe na moluka Mokmur. Basoda basusu ba Asur batikali o esobe, bato-ndani o ekolo mobimba. Batiaki biema na biloko bya bango o nganda enene. Bazalaki bato ebele mpenza. | |
Judi | LinVB | 7:19 | Ba-Israel babeleli Mokonzi Nzambe wa bango. Bakomi kolembe, mpo banguna bazingi bango epai na epai mpe bakoki kokima te. | |
Judi | LinVB | 7:20 | Mikolo ntuku isato na minei mobimba basoda ba Asur, basoda ba makolo, makalo na basoda ba farasa, bazingi bango. Bato ba Betulia bamoni ’te mai mabandi kosila o mbeki mpe o biloko bya bango binso. | |
Judi | LinVB | 7:21 | O mabulu mai makomi mpe kosila. Ata mbala yoko te bakoki kosilisa mposa ya mai, mpo bazalaki kopesa bato sa mwa mai moke. | |
Judi | LinVB | 7:22 | Bana bake balembi, bilenge babali na bilenge basi na bamama bakufi na mposa ya mai ; bazalaki kokweya o balabala mpe pene na bizibeli bya mboka ; bokasi bwa bango bosili nye. | |
Judi | LinVB | 7:23 | Bato banso, bilenge, basi na bana bakei epai ya Ozia mpe bakonzi ba mboka, bagangi na boleli mpe balobi o miso ma bakolo ba mboka : | |
Judi | LinVB | 7:24 | « Nzambe akata likambo lya biso ! Bino bosali biso mabe mpenza, awa boboyi koyokana na ba-Asur. | |
Judi | LinVB | 7:25 | Sikawa ata moto moko te akoki kosalisa biso. Nzambe akabi biso o maboko ma bango mpo tokufa na mposa ya mai, mpe toyoka mpasi enene o miso ma bango. | |
Judi | LinVB | 7:26 | Bobenga bango baya nokinoki. Botika mboka mobimba o maboko ma bato ba Oloferne mpe ma bato ba ye, bayiba biloko binso, likambo te. | |
Judi | LinVB | 7:27 | Eleki malamu tokweya o maboko ma bango, kasi tokufa na mposa ya mai te. Ntembe te, tokokoma baombo ba bango, kasi tokobika mpe tokokufa te ; tokomono mpe liwa lya bana bake ba biso te, mpe boniboni basi na bana bazali kosila. | |
Judi | LinVB | 7:28 | Tobondeli bino o nkombo ya Mokonzi wa likolo na nse, o Nkombo ya Nzambe wa biso, Mokonzi wa bankoko ba biso, oyo apesi biso etumbu mpo ya mabe ma biso, mpe mpo ya masumu ma bankoko ba biso ; bosala naino lelo lokola tosengi bino. » | |
Judi | LinVB | 7:29 | O likita mobimba bato banso babandi kolela makasi mpe kobondela Nzambe na mongongo makasi. | |
Judi | LinVB | 7:30 | Ozia alobi na bango : « Bandeko, Bolendisa mitema ; tosala naino makasi mikolo mitano. Nzambe akoyokela biso ngolu, akoki koboya biso seko te. | |
Judi | LinVB | 7:31 | Soko mikolo mitano mikoki, mpe lisalisi lyoko limononi te, nakolanda maloba ma bino. » | |