JUDITH
Chapter 10
Judi | LinVB | 10:2 | atelemi mpe abengi mosaleli mwasi wa ye, akiti o mokili mwa nse, o eteni ya ndako eye ameseni kofanda o mikolo mya Sabato mpe mya eyenga. | |
Judi | LinVB | 10:3 | Alongoli ngoto na bilamba bya mpili, asukoli nzoto na mai, na nsima apakoli mafuta ma nsolo mpimbo, asanoli nsuki, akangi litambala o motó mpe alati bilamba bya monzele, biye azalaki kolata o ntango mobali wa ye Manase azalaki na bomoi. | |
Judi | LinVB | 10:4 | Alati mapapa o makolo, mayaka o nkingo, bikomo o maboko mpe mpete o misapi, biloko bya matoi na biloko bisusu bya motuya ; amibongisi bongo kitoko mpo ’te babali baye bakomono ye, balula ye. | |
Judi | LinVB | 10:5 | Na nsima apesi mosaleli wa ye libenga lya vino na elokó ya mafuta, atondisi ekoló ya ye na fufu ya mampa, minkate milambami na mbuma ya kokauka, na mampa mpembe. Akangi yango o maboke mpe apesi yango na mosaleli mwasi wa ye. | |
Judi | LinVB | 10:6 | Bakei o ezibeli ya Betulia. Bakuti Ozia wana elongo na bakolo babale, Kabris na Karmis. | |
Judi | LinVB | 10:7 | Emoni bango Yudite, awa abongwani elongi mpe alati bilamba bya sika, bakamwi bonzenga bwa ye mpe balobi : | |
Judi | LinVB | 10:8 | « Nzambe wa bankoko ba biso abatela yo malamu, asalisa yo mpo ’te okokisa mokano mwa yo mobimba, mpo ’te bana ba Israel bazwa lokumu, mpe Yeruzalem ezwa nkembo enene. » | |
Judi | LinVB | 10:9 | Yudite akumisi Nzambe mpe alobi na bango : « Botinda bato bafungola ezibeli ya mboka, nabima mpo ’te nakende kosala manso bino bouti koloba na ngai. » Batindi bakengeli bafungola ezibeli ya mboka lokola Yudite asengi. | |
Judi | LinVB | 10:10 | Bafungoli yango mpe Yudite na mosaleli wa ye babimi. Bato ba engumba bazalaki kotala ye ntango akiti ngomba mpe akatisi lobwaku, tee bamoni ye lisusu te. | |
Judi | LinVB | 10:12 | tala basoda ba Asur bayei kokutana na Yudite, batelemisi ye mpe batuni ye : « Bino banani ? Outi wapi mpe ozali kokende wapi ? » Azongisi : « Nazali mwasi mo-Ebrei, nalingi kokima bango, mpo etikali moke bakweya o maboko ma bino. | |
Judi | LinVB | 10:13 | Nalingi komono Oloferne, komanda wa basoda ba bino ; nayebisa ye makambo ma solo mpenza ; nakolakisa ye nzela nini akoki koleka mpo ’te abotolo ngomba mobimba ; soda moko akufa to azoka o etumba te. » | |
Judi | LinVB | 10:14 | Basoda bazalaki koyoka maloba ma ye, bazalaki kotala ye mpe bakamwi na bonzenga bwa ye. | |
Judi | LinVB | 10:15 | Balobi na ye : « Awa okiti mbangu mpo ’te omonono na mokonzi wa biso, omibikisi solo ! Kende kotala ye o ema ya ye ; bato ba biso bakokende kotika yo epai ya ye. | |
Judi | LinVB | 10:16 | Soko okomi epai ya ye, obanga eloko te ; yebisa ye makambo manso outi koloba na biso, bongo akoyamba yo malamu. » | |
Judi | LinVB | 10:17 | Baponi bato monkama bakende kotika ye na mosaleli wa ye ; bakambi ye o ema ya Oloferne. | |
Judi | LinVB | 10:18 | Nsango ya boyei bwa ye epala-ngani o nganda mobimba. Bato babimi o biema mpe basangani o nzela mpo ya komono ye. Awa azalaki kozila o libanda lya ema ya Oloferne mpo ’te akutana na mokonzi, bato ebele bayei wana mpe bazingi ye. | |
Judi | LinVB | 10:19 | Bakumisi bonzenga bwa ye, mpe mpo ya ye bakumisi ba-Israel. Balobani : « Nani akoki kokinola ekolo ya bato, eye ezali na basi kitoko boye ? Soko totiki ata mobali moko na bomoi, bozoba bwa biso moko ! Mbele baye bakotikala bakokosa mokili mobimba ! » | |
Judi | LinVB | 10:21 | Oloferne alali o mbeto eke-mbami na bilamba bitane ngwa, na wolo, na mabanga ma emerode mpe na mabanga masusu ma motuya. | |
Judi | LinVB | 10:22 | Bayebisi ye boyei bwa Yudite. Abimi o mbalasani liboso lya ema ; bato batamboli liboso lya ye bamemi bisungi bya palata. | |