Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDITH
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 11
Judi LinVB 11:1  Oloferne alobi na ye : « Kitisa motema, mama, obanga eloko te. Mokolo moko te nasali mabe na moto oyo andimi kosalela Nabukodonozor, mokonzi wa nse mobi­mba.
Judi LinVB 11:2  Sikawa, soko bato ba yo, baye bafandi o ngomba, batiolaki ngai te, mbele natombolaki likongo te mpo ya kobunda na bango. Bango moko balingaki bongo.
Judi LinVB 11:3  Kasi yebisa ngai, mpo nini okimi kuna mpe oyei epai ya biso ? Solo, awa osali bongo, omibikisi ! Lendisa motema, obiki o butu bwa lelo, okobika mpe nsima !
Judi LinVB 11:4  Moto moko akosala yo mabe te, ata moke te ; bakosala yo se malamu, lokola bakosalaka bato ba mokonzi wa ngai Nabukodonozor. »
Judi LinVB 11:5  Yudite azongisi : « Mokonzi, ya-mba na bolamu maloba ma ngai, moombo wa yo. O butu bwa lelo nakoyebisa mokonzi wa ngai likambo lya lokuta ata lyoko te.
Judi LinVB 11:6  Soko olandi mayele ma ngai, mosaleli wa yo, Nza­mbe akokomisa makambo ma yo manso tee nsuka, mpe mokonzi wa ngai akolonga o maye akani kosala.
Judi LinVB 11:7  Lokumu na Nabukodonozor, mokonzi wa nse mobimba ! Ye moto atindi yo otambwisa bato banso o nzela elamu ; bakumisa bokasi bwa ye. Mpo ya yo bato banso bakotosa ye ; mpo ya bokasi bwa yo ata nyama ya zamba mpe ya mboka, na mpe ndeke ya likolo ikotosa Nabukodonozor na bato ba ye.
Judi LinVB 11:8  Solo, biso banso tosili toyoki ’te ozali na bwanya mpe na mayele. Bato banso o nse mobimba bayebi ’te bobele yo moko ozali moto malamu o ekolo ya yo mobimba, ozali na ntoki mpe na mayele mingi, mpe elombe mpenza o bitumba.
Judi LinVB 11:9  Toyoki maloba Akior alobaki o likita lya bato ba yo. Bato ba Betulia babikisi ye ; bongo ye ayebisi bango makambo manso alobaki na yo.
Judi LinVB 11:10  Solo, mokonzi, otala maloba ma ye mpamba te, mpo alobi ya solo mpenza. Bato ba ekolo ya biso bakozwa etumbu mpe mopanga mokosala bango mabe, bobele soko basali lisumu o miso ma Nzambe wa bango.
Judi LinVB 11:11  Talaka sikawa, liwa likoya kosilisa bango mpo ’te yo mokonzi wa ngai ozonga nsima te, mpe ozwa mabe te. Mpamba te, lisumu lyoko likangi bango, liye likoyokisa Nzambe nkanda, mbala inso bakosumukaka.
Judi LinVB 11:12  Awa biloko bya kolia bikomi kozanga, mpe mai mazali lisusu mingi te, bakani koboma ngombe na nyama inso, mpe balingi kolia misuni miye Nzambe apekisi bango na mibeko mya ye.
Judi LinVB 11:13  Bakani mpe kolia mbuma ya yambo, ya mampa, na biteni bya zomi bya vino mpe bya mafuta, biye babombaki malamu ; nzokande, bobele banganga Nzambe bazali o Yeruzalem, baye bakoteleme o miso ma Nzambe wa biso, bakoki kolia bya­ngo. Moto moko akoki kosimba bya­ngo te.
Judi LinVB 11:14  Kutu, batindi bato o Yeruzalem basenge likita lya bakolo ndingisa ya kolia biloko bina.
Judi LinVB 11:15  Mokolo bako­zwa ndingisa ena mpe bakobanda kosala bongo, Nzambe akokaba bango o maboko ma yo, mpe bakokufa.
Judi LinVB 11:16  Ntango ngai, mosaleli wa yo, nayoki makambo mana manso, nakimi bango. Nzambe moto atindi ngai mpo ’te elongo na yo tosala likambo linene likokamwisa bato banso ba nse mobimba mokolo bakoyoka lyango.
Judi LinVB 11:17  Mpamba te, ngai mosaleli wa yo nakobangaka Nzambe. Nakokumisa Nzambe wa likolo butu moi. Yango wana, mokonzi, nalingi kotikala epai ya yo. Na butu nakobima mpe nakokita o lobwaku, kuna nasambela Nzambe mpo ’te ayebisa ngai soko bango basili kosala lisumu lya bango.
Judi LinVB 11:18  Na nsima nakozonga koyebisa yo, bongo okende na limpinga lya yo mobimba kobundisa bango ; mpe moko te o kati ya bango akokoka yo.
Judi LinVB 11:19  Nakokamba yo o mokili mobimba mwa Yudea ; okokoma penepene na Yeruzalem. Nakotia ngwende ya yo o kati ya engumba. Okokamba ba­ngo lokola bakokambaka mpata iza­ngi mokengeli, ata mbwa ekogangela yo te. Nayoki makambo mana manso o motema ; bayebisi ngai mango, mpe batindi ngai nayebisa yo. »
Judi LinVB 11:20  Maloba ma Yudite masepelisi Oloferne na bato ba ye banso. Bakamwi na bwanya bwa ye, balobi :
Judi LinVB 11:21  « Banda nsuka ya mokili tee nsuka esusu, mwasi mosusu bonzenga lokola ye, oyo azali mpe na maloba ma bwanya lokola ye, akozwama te. »
Judi LinVB 11:22  Oloferne alobi na ye : « Nzambe asali malamu awa atindi yo okima bato ba ekolo ya yo. Akolendisa bongo maboko ma ngai, mpe akokweisa baye bakinolaki mokonzi wa ngai.
Judi LinVB 11:23  Mpe yo moko ozali kitoko mpenza, mpe oyebi koloba malamu. Soko osali lokola olobi, Nzambe wa yo akozala mpe Nzambe wa ngai ; okofanda o ndako ya mokonzi Nabukodonozor, mpe nko­mbo ya yo ekoyebana o mokili mobimba. »