NEHEMIAH
Chapter 4
| Nehe | LinVB | 4:1 | Awa Sanbalat, Tobia na ba-Arabu, bato ba Amon na bato ba Asdod bayoki nsango ’te mosala mwa bobongisi lopango la Yeruzalem mozalaki kotambola noki mpe tosili kokangisa malusu ma efelo, bayoki nkele mingi. | |
| Nehe | LinVB | 4:4 | Kasi ba-Yuda balobi : « Ba-ngamba babandi kolembe, mabanga mingi makwei epai na epai, tokosilisa mosala mwa botongi lopango soki moke te. » | |
| Nehe | LinVB | 4:5 | Mpe banguna ba biso balobi : « Bakoyeba te, bakomono eloko te : tokokoto o mboka mpe tokokoma o kati ya bango ; bobele o ntango ena tokoboma bango mpe tokobebisa mosala mwa bango. » | |
| Nehe | LinVB | 4:6 | Ba-Yuda basusu bafandi o kati ya bango bayei koyebisa biso ata mbala zomi : « Banguna bazali kouta o mboka inso kobundisa biso. » | |
| Nehe | LinVB | 4:7 | Yango wana natindi bato o bisika bya nse, nsima ya lopango ; natii wana bato ba mabota manso, napesi bango mimpanga, makongo na matimbo. | |
| Nehe | LinVB | 4:8 | Awa namoni ’te bazalaki kobanga, natelemi mpe nasakoli o miso ma bankumu, ma bazuzi mpe ma bato batikali naino wana, maloba maye : « Bobanga bango te ! Bokanisa Mokonzi nta bonene mpe wa nsomo ; bobunela bandeko, bana babali na bana basi, basi mpe ndako ya bino ! » | |
| Nehe | LinVB | 4:9 | Eyoki banguna ’te tosili koyeba mayele ma bango, mpe ’te Nzambe abebisi mokano mwa bango, bamibendi ; biso tozongi epai ya lopango, moto na moto o mosala mwa ye. | |
| Nehe | LinVB | 4:10 | Banda mokolo mona se ndambo ya bato ba ngai bazalaki kosala mosala : bato basusu bazalaki kokengele na makongo, nguba na matimbo, balati bilamba bya bibende ; bayangeli bazalaki kolendisa bato ba bango ba-Yuda. | |
| Nehe | LinVB | 4:11 | Baye bazalaki kotonga lopango na bangamba bazalaki komeme biloko bazalaki kosala mosala na loboko loko, na loboko losusu bamemi likongo. | |
| Nehe | LinVB | 4:12 | Baye banso bazalaki koto-nga bakangi mopanga o loketo ntango ya mosala. Mobeti wa mondule atelemi pene na ngai. | |
| Nehe | LinVB | 4:13 | Nalobi na bankumu, na bazuzi mpe na bato basusu : « Mosala mozali monene mpe totandani mosika. Tokabwani bipai binso o efelo ya lopango, mosika na baninga. | |
| Nehe | LinVB | 4:14 | Soko boyoki ’te babeti mondule, boya kosangana pene na ngai, mpe Nzambe wa biso akobunela biso. » | |
| Nehe | LinVB | 4:16 | O mikolo mina nalobi mpe na bato : « Moto na moto asengeli kotikala o Yeruzalem na butu, elongo na moto wa ye wa mosala. Bongo tokokengele na butu, mpe na moi tokosala mosala. » | |