Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ZECHARIAH
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 14
Zech LinVB 14:1  Mokolo moko Yawe akotinda bato bakabolana biloko babotoli o bitumba o kati lya Yeruzalem ;
Zech LinVB 14:2  akoloba : « Nakosangisa bato ba bikolo binso mpo ya kobu­ndisa Yeruzalem. Bakobotolo engumba, bakobuka ndako, bakobebisa basi. Bato basusu bakokende o boombo, basusu bakotikala o engumba. »
Zech LinVB 14:3  Nsi­ma Yawe akokende kobundisa bato ba bikolo bina, lokola akosalaka o mokolo mwa etumba.
Zech LinVB 14:4  Mokolo mona akonyata ngomba ya Oliva na makolo, ngomba eye etalani na Yeruzalem. Ngomba ekobukana na ndambo ibale : banda Esti tee Westi ekokoma lobwaku lonene. Eteni yoko ekopusana epai ya Nor­di, eteni esusu epai ya Sudi.
Zech LinVB 14:5  Mokolo mona bakokima o lobwaku lokokoma lonene kin’o Yasol. Bokokima lokola bokimaki mokolo mokili moninganaki ntango Ozia azalaki mokonzi wa Yuda. O ntango ena Yawe Nzambe wa ngai akoya elongo na basantu ba ye ba­nso.
Zech LinVB 14:6  Mokolo mona moi mokozala te, kasi mpio ekongala.
Zech LinVB 14:7  Mokolo se moko mokoya, Yawe ayebi mwa­ngo, moi na butu ikolandana lisusu te, o ntango ya mpokwa mwinda moko­ngenge.
Zech LinVB 14:8  Mokolo mona maziba makobima o Yeruzalem ; nda­mbo ya mai ekokende o mbu ya Esti, ndambo esusu o mbu ya Westi : o eleko ya elanga lokola o eleko ya mpela.
Zech LinVB 14:9  Mokolo mona Yawe akolakisa ’te azali Mokonzi wa nse mobimba. Akozala ye moko mokonzi, se nkombo ya ye ekotikala.
Zech LinVB 14:10  Mokili mobimba mokokoma lokola esobe, banda Geba tee Rimon ya Negeb. Yeruzalem ekotombwama mpe bato bakofanda banda Ezibeli ya Benyamin tee ezibeli ya kala mpe Ezibeli ya Litumu ; banda lino­ngi lya Kananel tee bikamelo bya mokonzi.
Zech LinVB 14:11  Bato bakofanda ku­na. Bakotombela moto moko bobe lisusu te. Yeruzalem mobi­mba ekozala na kimia mpenza.
Zech LinVB 14:12  Tala, Yawe akopesa bato babu­ndaki na Yeruzalem bitumbu biye : akopolisa nsuni ya bato batelemi naino ; miso ma bango makopolo o kati ya elongi, ndemo ya bango ikopolo o kati ya monoko.
Zech LinVB 14:13  Mo­ko­lo mona mobulu monene mokozala o kati ya bango : bakokamatana mpe bakobetana.
Zech LinVB 14:14  O ntango ena bato ba Yuda bakobunda mpe o Yeruzalem. Bakosangisa nkita ya bikolo bya penepene : wolo, palata na bilamba ebele mpenza.
Zech LinVB 14:15  Farasa na mpunda, kamela na nyama inso ikozala o nganda ikozwa etumbu se lolengeloko.
Zech LinVB 14:16  Bato baye bayaki kobundisa Yeruzalem mpe bakotikala na bomoi, bakokende mobu na mobu o Yeruzalem kokumisa Yawe wa bokasi bonso mpe kosepela eyenga ya Biema.
Zech LinVB 14:17  Bato ba ekolo eye ekokende kokumisa Yawe mokonzi wa bokasi bonso o Yeruzalem te, mbula ekonoko epai ya ba­ngo te.
Zech LinVB 14:18  Soko bato ba Ezipeti baboyi koya, Yawe akopesa bango etumbu eye akopesaka bato baboyi kosepela eyenga ya Biema.
Zech LinVB 14:19  Etumbu eye ekokwela bato ba Ezipeti mpe ba bikolo biye bakoboya kokende kosepela eyenga ya Biema.
Zech LinVB 14:20  Mokolo mona maloba maye makomama o ngonga ike iye bakolatisaka farasa o nkingo : « Ebonzami na Yawe. » Nzu­ngu ya Tempelo ya Yawe ikozala isantu lokola sani ya makila o boso bwa altare.
Zech LinVB 14:21  Nzungu inso o Yeruzalem mpe o Yuda ikobonzama na Yawe wa bokasi bonso. Bato banso bakoya kobonza moboma, bakokamata mpe bakolamba na yango ; mokolo mona, moto wa mombongo akozala lisusu te o Tempelo ya Yawe wa bokasi bonso.