Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next
Chapter 20
Deut LinVB 20:1  Mokolo okei kobunda na banguna ba yo mpe omoni farasa ya etumba ná makalo ná mpe bato baleki yo na boike, obanga ba­ngo te, zambi Yawe Nzambe wa yo, oyo alongolaki yo o mokili mwa Ezipeti, azali na yo.
Deut LinVB 20:2  Awa olingi oba­nda etumba, nganga Nzambe abima mpe aloba na bato :
Deut LinVB 20:3  « Bato ba Israel, boyoka ! Awa bolingi bobanda etu­mba na banguna ba bino lelo, mitema mya bino milembe te ! Bobanga te, boyoka nsomo te mpe bolenge o miso ma banguna te,
Deut LinVB 20:4  zambi Yawe Nzambe wa bino atamboli na bino elongo mpo ’te asalisa bino o etu­mba na banguna mpo ya kobikisa bino. »
Deut LinVB 20:5  Na nsima bateyi ba Mobeko baloba na bato : « Moto atongi ndako ya sika mpe naino abonzeli Nzambe ya­ngo te, azonga o mboka mpo ’te akufa o etumba te mpe mpo ’te moto mosusu abonzela Nzambe ndako ya ye te !
Deut LinVB 20:6  Moto aloni elanga ya nzete ya vino mpe naino abuki mbuma ya ya­mbo te, azonga o mboka mpo ’te akufa o etumba te mpe mpo ’te mosusu abuka mbuma ya yambo te !
Deut LinVB 20:7  Moto abali mwasi, kasi naino akotisi ye o ndako te, azonga o mboka mpo ’te akufa o etumba te mpe mpo ’te moto mosusu abala ye te ! »
Deut LinVB 20:8  Bateyi ba mobeko baloba naino maloba maye : « Moto abangi mpe azali na mpiko lisusu te, malamu azonga o mboka mpo ’te abangisa bandeko ba ye te mpe mpiko ya ba­ngo esila te. »
Deut LinVB 20:9  Na nsima soko bateyi ba mobeko basilisi koloba na bato, batia bakomanda ba basoda.
Deut LinVB 20:10  Ekomi bino penepene na mboka mpo ’te bobundisa yango, bomeka liboso koyokana na bato ba mboka.
Deut LinVB 20:11  Soko bandimi mpe bafungoleli bino bizibeli bya mboka, bato banso bazali o mboka bakokoma baombo ba bino mpe bakosalela bino.
Deut LinVB 20:12  Kasi soko baboyi koyokana na bino mpe babandi kobundisa bino, bozinga mboka ena.
Deut LinVB 20:13  Yawe Nzambe wa bino akokaba mboka o maboko ma bino mpe bino bokoboma babali banso na mopanga.
Deut LinVB 20:14  Nzokande bokoki kobotolo basi, bana, bibwele na biloko bisusu bizali o mboka. Bokoki kolia bilei bya banguna baye Yawe Nza­mbe wa bino akabi o maboko ma bino.
Deut LinVB 20:15  Bosala bobele bongo na mboka inso izali na bino mosika, mboka iye izali ya bikolo biye te.
Deut LinVB 20:16  Kasi o mboka iye Yawe Nzambe wa bino apesi bino botika moto moko na bomoi te.
Deut LinVB 20:17  Solo, boboma bango banso, ba-Iti, ba-Amor, ba-Kanana, ba-Perizi, ba-Ivi, ba-Yebus se lokola Yawe Nza­mbe wa bino atindaki bino,
Deut LinVB 20:18  mpo ’te balakisa bino makambo mana ma nsomo te, maye bakosalaka mpo ya kokumisa banzambe ba bango, mpe bosala masumu te o miso ma Yawe Nzambe wa bino.
Deut LinVB 20:19  Soko bozali kobundisa mboka mwa mikolo mingi mpe bobotoli ya­ngo noki te, bokeba ’te bobebisa nzete te na bokati yango na soka ; kasi bolia mbuma ya yango. Nzete ya bilanga ezali nde moto mpo ’te obunda na yango ?
Deut LinVB 20:20  Nzokande nzete iye boyebi ’te izali nzete ya mbuma te, bokoki kokata bitapi to kokata yango mobimba mpo ya kosala na yango bibuneli tee bokolonga mboka eye bozali kobunda na yango.