Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ECCLESIASTES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12
Prev Up Next
Chapter 5
Eccl LinVB 5:1  Oloba noki noki te o miso ma Nzambe, bimisa maloba se malembe, zambi Nzambe azali o likolo mpe yo ozali o nse ; yango wana oloba maloba mingi te.
Eccl LinVB 5:2  Soko makanisi maleki mingi, okoloto ndoto, mpe soko maloba maleki mingi, okoloba makambo ma bozoba.
Eccl LinVB 5:3  Soko olakeli Nzambe elako, kokisa yango noki ; Nzambe alingi bazoba te. Sala lokola olakeli Nza­mbe.
Eccl LinVB 5:4  Eleki malamu soko olakeli elako te, esika ’te olakela elako eye okokokisa te.
Eccl LinVB 5:5  Maloba ma yo makomisa yo mosumuki te, mpe oloba na nganga Nzambe te : ‘Nabo­sani’. Mpo nini olingi kotumola Nza­mbe na maloba ma yo mpe kobebisa bongo mosala mwa yo ?
Eccl LinVB 5:6  Ndoto mingi izali na makambo mazangi ntina, se bongo makolobamaka se mpamba. Yango wana malamu obanga Nza­mbe.
Eccl LinVB 5:7  Soko omoni o ekolo esusu ’te bakonyokoloko babola to bakokataka makambo na bosembo te, okamwa na yango te, zambi moto monene wa leta abatelami na moninga wa ye, mpe likolo lya bango, bankumu basusu bakobatela ba­ngo.
Eccl LinVB 5:8  Kasi bato banso bakobika mpo ya bilanga ; ata mokonzi wa ekolo akobika mpo ya mbuma ya bilanga.
Eccl LinVB 5:9  Moto alingi mosolo mingi, akotonda na mwango mokolo moko te ; oyo alingi bomengo, akozwa na bwango litomba te. Yango mpe ezali mpamba.
Eccl LinVB 5:10  Esika biloko bizali mingi, bato bakoya kolia byango bazali mpe ebele. Nkolo wa biloko akozwa na byango litomba kani ? Bobele lokumu la komono bato mingi.
Eccl LinVB 5:11  Mongamba akolalaka mpongi se malamu ; ata alei mingi to alei se moke, likambo te. Kasi moto wa biloko mingi akolalaka malamu te.
Eccl LinVB 5:12  Namoni likambo lisusu lya mawa mpenza o mokili : Moto monene abombi mosolo mingi, kasi azwi likama.
Eccl LinVB 5:13  Nkita ya ye inso ikomi kosila na mbala yoko ; mpe mwana ye aboti akotikala maboko mpamba.
Eccl LinVB 5:14  Abimaki bolumbu o libumu lya mama wa ye, akozonga se ndenge ayaki ; azwi litomba lyoko na mosala mwa ye te. Epai akokende, ako­meme eloko yoko te.
Eccl LinVB 5:15  Yango ezali likambo lya mawa mingi, soko akei maboko mpamba se lokola ayaki liboso. Azwi litomba nini awa asali mosala mpe mosala mokei lokola mompepe ?
Eccl LinVB 5:16  Mikolo mya ye minso mikosila o ntei ya molili, ya mawa manene, ya mpasi mpe ya nkanda.
Eccl LinVB 5:17  Namoni boye : Malamu moto alia, amele mpe asepela na mosala akosalaka awa o mokili, mikolo minso Nzambe akopesa ye mpema, zambi yango ezali bomoi bwa biso.
Eccl LinVB 5:18  Solo, soko Nzambe apesi moto nkita na mosolo, soko apesi ye nta­ngo ya kolia, yango mpe kosepela mosala mwa ye, yango ezali likabo linene lya Nzambe.
Eccl LinVB 5:19  Moto oyo akokanisa lisusu bokuse bwa bomoi te, mpo Nzambe akopesa ye mikolo minso bisengo bya motema.