Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 5
II C LinVB 5:1  Awa Salomo asilisi misala minso mpo ya ndako ya Yawe, amemisi biloko binso tata wa ye Davidi abo­nzelaki Nzambe, palata, wolo na biloko bisusu binso, atii byango o ebo­mbelo ya mosolo ya Tempelo.
II C LinVB 5:2  Na nsima Salomo abengi o Yeruzalem bakolo ba Israel na bakonzi ba bikolo na bankumu banso ba mabota ma Israel bameme Sanduku ya Bo­ndeko bwa Yawe ut’o Engumba ya Davidi o Sion.
II C LinVB 5:3  Bato banso ba Israel basangani epai ya mokonzi o eyenga ya sanza ya nsambo.
II C LinVB 5:4  Bakolo banso ba Israel bayei, ba-Levi batomboli Sa­nduku,
II C LinVB 5:5  mpe bakei na yango, na Ema ya Likita na biloko bisantu bi­nso bizalaki o Ema. Banganga Nza­mbe na ba-Levi bamemi biloko bina binso.
II C LinVB 5:6  Mokonzi Salomo na mpe bato ba­nso ba Israel basangani penepene na Sanduku ya Bondeko ; babomi mpe babonzeli Nzambe mpata na ngombe ebele mpenza, bakoki kotanga yango te.
II C LinVB 5:7  Banganga Nzambe baye bamemi Sanduku ya Bondeko bwa Yawe, batii yango o esika nkombo ’te Debir ya Tempelo, o esika esantusantu, o nse ya mapapu ma bakerubim.
II C LinVB 5:8  Mapapu ma bakerubim matandami o likolo lya Sanduku ya Bondeko mpe lya mabaya.
II C LinVB 5:9  Mabaya maye mazalaki malai ; nsonge ya mango izalaki komonono ut’o esika esantu, kasi bato bazalaki o libanda bakoki komono mango te. Sanduku ezali naino kuna tee lelo.
II C LinVB 5:10  O kati ya Sanduku ezalaki se meza ibale ya mabanga maye mabale Moze atiaki o ngomba Oreb, nta­ngo Yawe akataki bondeko na bana ba Israel nsima ya bobimi bwa ba­ngo o Ezipeti.
II C LinVB 5:11  Banganga Nzambe babimi o esika esantu ; banganga Nzambe banso bazalaki wana bamipetolaki, kasi balandaki molongo mwa mabota ma ba­ngo te.
II C LinVB 5:12  Ba-Levi bayembi bazalaki : Asaf, Eman na Yedutun na bana mpe na bandeko ba bango balati bilamba bya malekani mpe babeti mi­gbala, nzenze na lokombe o Esti ya altare. Elongo na bango banganga Nza­mbe monkama na ntuku ibale ba­zalaki kobete mindule.
II C LinVB 5:13  Baye bazalaki kobete mindule to koyemba nzembo, bakumisi Yawe mongongo moko ; baye­mbi nzembo na mindule, nzenze na miziki misusu, balobi : « Bakumisa Yawe, zambi bolingi bwa ye, bolingi bwa seko ! » Ndako esantu eto­ndi na limpata lya nkembo ya Yawe.
II C LinVB 5:14  Banganga Nzambe bakoki kokoba mosala mwa bango te mpo ya li­mpata linene, nkembo ya Yawe eto-ndisi Tempelo ya Nzambe.