Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II KINGS
Prev Up Next
Chapter 7
II K LinVB 7:1  Elizeo ayanoli : « Yoka liloba lya Yawe oyo ayebisi boye : Lobi na ngonga eyemei, pene na ezibeli ya mboka Samaria bakoteke kilo zomi na itano ya fufu mpo ya motako moko, mpe kilo ntuku isato ya mbuma ya mampa mpo ya motako moko. »
II K LinVB 7:2  Mosali wa mokonzi, oyo azalaki ko­simba mokonzi na loboko, azo­ngiseli Elizeo : « Ata Yawe akofungola maninisa ma likolo, likambo lina likoki nde kosalema ? » Elizeo alobi : « Yo moko okomono na miso, kasi okolia mampa te. »
II K LinVB 7:3  Bato ba maba banei batelemi pene na ezibeli ya mboka, balobani : « Mpo nini totikala awa, tozila se liwa ?
II K LinVB 7:4  Soko tolobi ‘Tokoto o mboka’, nzala ekoboma biso kuna. Soko totikali awa tokokufa mpe. Tokima awa mpe tokende o nganda ya ba-Aram. Soko batiki biso, tobiki ; soko babomi biso, tokufi, likambo te. »
II K LinVB 7:5  Ntango moi mobandi kokita batelemi mpo bakende o nganda ya ba-Aram. Bakomi o ndelo ya nganda, bamoni moto moko te !
II K LinVB 7:6  Yawe ayokisaki o nganda ya ba-Aram lokito la makalo, farasa na basoda ebele. Bongo balobanaki : « Mokonzi wa Israel atindi bakonzi ba Iti mpe ba Ezipeti mpo babunda na biso. »
II K LinVB 7:7  Yango wana bakimaki pene na butu, batiki biema, farasa na mpunda, batiki nganda mpamba mpe bakimi mpo ya kobikisa bomoi bwa bango.
II K LinVB 7:8  Bato ba maba batamboli o nganda mobimba, bakoti o ema yoko. Balei mpe bameli, bakamati palata, wolo na bilamba mpe bakei kobomba binso. Na nsima bazongi, bakoti o ema esusu, bakamati biloko mpe babombi byango.
II K LinVB 7:9  Balobani : « Tozali kosala malamu te. Mokolo mwa lelo mozali mokolo mwa nsango elamu, mpe tolobi eloko te ; soko tozili tee moi mobandi kotana, tokozwa etumbu. Tokende sikawa koyebisa nsango elamu eye epai ya mokonzi. »
II K LinVB 7:10  Bakei mpe babengi bakengeli ba bizibeli bya mboka, bayebisi bango : « Tokendeki o nganda ya ba-Aram. Kuna tokutaki moto moko te, toyokaki lolaka la moto te, tomonoki se farasa na mpunda ika-ngemi na makalo, na biema lokola batikaki byango. »
II K LinVB 7:11  Bakengeli ba bizibeli bagangi, mpe bakei koyebisa mokonzi nsango ena.
II K LinVB 7:12  Mokonzi atelemi na butu, alobi na bakomanda ba basoda : « Nakoyebisa bino mayele ma ba-Aram. Awa bayebi ’te tokufi na nzala, batiki nga­nda mpe babombami o esobe, bamilobeli : Bakobima o engumba mpe tokokanga bango awa bazali na bomoi, bongo tokokoto o engumba ya ba­ngo. »
II K LinVB 7:13  Komanda moko alobi : « Tokamata farasa itano ya iye itikali. Bakosala na yango se lokola na ba-Israel banso bazalaki o mboka basili bakufi. Bongo totinda yango, tokomono. »
II K LinVB 7:14  Bakamati makalo mabale na farasa. Mokonzi atindi bango bakende kolanda ba-Aram, alobi : « Bokende kotala ! »
II K LinVB 7:15  Balandi bango tee o Yordane. Bamoni ’te nzela mobimba etondi na bilamba mpe na biloko bya etumba ba-Aram babwakaki mpo bakoka kokima mbangu. Bantoma bazongi mpe bayebisi mokonzi.
II K LinVB 7:16  Bato banso babimi mpe bayibi biloko o nganda ya ba-Aram. Bazwi ki­lo zomi na itano ya fufu mpo ya motako moko, mpe kilo ntuku isato ya mbuma ya mampa mpo ya motako moko, se lokola Yawe alobaki.
II K LinVB 7:17  Mokonzi atiaki mosali wa ye, oyo azalaki kosimba ye na loboko, ake­ngele ezibeli ya mboka, kasi bato ba­nyati ye na makolo. Akufi se lokola moto wa Nzambe alobaki, ntango mokonzi ayaki o ndako ya ye.
II K LinVB 7:18  Moto wa Nzambe alobaki na mokonzi : « Bakofuta motako moko mpo ya kilo ntuku isato ya mbuma ya mampa mpe motako moko mpo ya kilo zomi na itano ya fufu, bobele lobi o ngo­nga eyemei awa o ezibeli ya mboka Samaria. »
II K LinVB 7:19  Mosali atunaki moto wa Nzambe : « Ata Yawe akofungola maninisa ma likolo, likambo lina likoki kosalema te. » Mpe Elizeo ayanolaki ye : « Yo moko okomono na miso, kasi okolia mampa te. »
II K LinVB 7:20  Esalemi na ye se bongo ; bato banyataki ye na makolo o ezibeli ya mboka mpe akufi.