II KINGS
Chapter 4
| II K | LinVB | 4:1 | Mwasi wa moyekoli moko wa profeta abondeli Elizeo na maloba maye : « Mobali wa ngai akufi, mpe oyebi ’te azalaki kobanga Yawe. Sikawa moto moko ayei kosenge nyongo ya ye, alingi kokamata bana ba ngai babale bo baombo. » | |
| II K | LinVB | 4:2 | Elizeo alobi na ye : « Olingi nasala nini ? Ozali na eloko nini o ndako ya yo ? » Azongisi : « Ngai mosaleli wa yo, nazali na eloko yoko o ndako te, se mwa mbeki ya mafuta mpo ya kopakola nzoto. » | |
| II K | LinVB | 4:3 | Elizeo alobi : « Kende kodefa mbeki epai ya baninga ba yo banso, meka kozwa mbeki izali mpamba, mingi mpenza. | |
| II K | LinVB | 4:4 | Na nsima zonga o ndako elongo na bana ba yo mpe kanga ndako nsima ya yo. Osopa mafuta o mbeki inso ; iye otondisi, tia yango mpembeni. » | |
| II K | LinVB | 4:5 | Atiki Elizeo, akoti o ndako elongo na bana mpe akangi ezibeli ya ndako. Bana basimbi mbeki, mpe ye atondisi yango na mafuta. | |
| II K | LinVB | 4:6 | Etondi mbeki inso, mama alobi na mwana wa ye : « Pesa mbeki esusu. » Oyo azongisi : « Mbeki isili. » Bongo mafuta mpe masili. | |
| II K | LinVB | 4:7 | Mama akei koyebisa moto wa Nzambe. Ye alobi : « Kende koteke mafuta mana, mpe futa nyongo ya yo ; bongo maye matikali mazali ma yo mpe ma bana ba yo. » | |
| II K | LinVB | 4:8 | Mokolo moko Elizeo aleki o Sunam ; mwasi moko wa lokumu abya-ngi ye o limpati. Uta mokolo mona Elizeo azalaki kolia kuna, mbala inso aleki o mboka ena. | |
| II K | LinVB | 4:9 | Mwasi alobi na mobali wa ye : « Ntembe te, moto oyo akoyaka awa azali moto wa Nzambe. | |
| II K | LinVB | 4:10 | Malamu totongela ye mwa esika o mokili mwa ndako ; totia mbeto, meza, kiti na mwinda ; soko ayei, akoki kofanda wana. » | |
| II K | LinVB | 4:12 | Alobi na mosaleli wa ye Gekazi : « Benga mwasi malamu oyo wa Sunam. » Abengi ye mpe mwasi ayei koteleme liboso lya ye. | |
| II K | LinVB | 4:13 | Elizeo alobi na mosaleli : « Loba na mama oyo : Tala, osaleli biso mosala moye monso. Tokoki kosalisa yo na nini ? Olingi tolobela yo epai ya mokonzi wa ekolo to epai ya komanda wa basoda ? » Kasi ye azongisi : « Nazali na bato ba ngai. » | |
| II K | LinVB | 4:14 | Elizeo alobi na mosaleli : « Tokoki kosalisa ye na nini ? » Gekazi azongisi : « Abota te, mpe mobali wa ye anuni. » | |
| II K | LinVB | 4:15 | Elizeo alobi : « Benga ye. » Gekazi abengi ye, mwasi ayei mpe atelemi o monoko mwa ndako. | |
| II K | LinVB | 4:16 | Elizeo alobi : « O mobu mokoya, bobele o eleko eye, okozala na mwana mobali. » Kasi ye alobi : « Te, mokonzi wa ngai, moto wa Nzambe, okosa mosaleli wa yo te ! » | |
| II K | LinVB | 4:18 | Mwana akoli. Mokolo moko mwana akei koluka tata wa ye o bilanga esika bato bazalaki kobuka mbuma, | |
| II K | LinVB | 4:19 | alobi na tata : « Motó mpasi e, nazali koyoka motó mpasi mpenza ! » Tata atindi moko wa basali akende kotika ye epai ya mama wa ye. | |
| II K | LinVB | 4:20 | Mosali akamati mwana mpe akei kotika ye epai ya mama wa ye. Mama afandisi ye o bibelo tee midi ; mwana akufi se wana. | |
| II K | LinVB | 4:21 | Mama amemi ye o likolo mpe alalisi ye o mbeto ya moto wa Nzambe, akangi ezibeli ya ndako mpe abimi. | |
| II K | LinVB | 4:22 | Abengi mobali wa ye, alobi : « Tindela ngai mosali moko na mpunda, bongo nakende koyebisa moto wa Nzambe, na nsima nakozonga. » | |
| II K | LinVB | 4:23 | Mobali wa ye atuni ye : « Mpo nini olingi kokende lelo epai ya ye ? Lelo sanza ya sika ebimi, to ezali mokolo mwa Sabato ? » Kasi mwasi azongisi : « Tikala na boboto ! » | |
| II K | LinVB | 4:24 | Abongisi mpunda mpe alobi na mosaleli wa ye : « Kende kotika ngai, tambwisa mpunda ya ngai. Soko nayebisi yo te, oteleme o nzela te ! » | |
| II K | LinVB | 4:25 | Akei bongo mpe akomi epai ya moto wa Nzambe o ngomba Karmel. Ezalaki ye naino mosika, moto wa Nzambe asili amoni ye, alobi na mosali : « Tala mwasi wa Sunam azali koya. | |
| II K | LinVB | 4:26 | Kende koyamba ye mpe tuna ye : Ozali malamu ? Mobali wa yo azali malamu ? Mwana wa yo azali malamu ? » Mwasi azongisi : « Tozali malamu. » | |
| II K | LinVB | 4:27 | Kasi awa akomi epai ya moto wa Nzambe o ngomba, akangi ye o makolo. Gekazi ayei kolongola ye, kasi moto wa Nzambe alobi : « Tika ye, zambi azali koyoka motema mawa mpenza. Yawe abombeli ngai likambo, ayebisi ngai eloko te. » | |
| II K | LinVB | 4:28 | Mwasi alobi : « Ngai moto nasengeki mokonzi wa ngai mwana ? Nalobelaki yo : Okosa ngai te ! » | |
| II K | LinVB | 4:29 | Elizeo alobi na Gekazi : « Kanga nkamba, kamata lingenda lya ngai mpe kende. Soko okutani na moto o nzela, opesa ye mbote te ; soko ye apesi yo mbote, ozongisela ye losako te ! Tanda lingenda lya ngai likolo lya mwana. » | |
| II K | LinVB | 4:30 | Kasi mama alobi na Elizeo : « Lokola Yawe azali na bomoi mpe lokola yo ozali na bomoi, nakotika yo te ! » Bongo Elizeo atelemi mpe alandi ye. | |
| II K | LinVB | 4:31 | Gekazi akendeki liboso, atandaki lingenda likolo lya mwana, kasi mwana azongisaki liloba te, alakisaki mpe elembo ya bomoi te. Azongi epai ya Elizeo mpe ayebisi ye : « Mwana alamuki te. » | |
| II K | LinVB | 4:33 | Akoti o ndako, akangi ezibeli ya ndako, batikali se bango babale, mpe asambeli Nzambe. | |
| II K | LinVB | 4:34 | Na nsima amilalisi likolo lya mwana, monoko mwa ye o monoko mwa mwana, miso ma ye o miso ma mwana, maboko ma ye o maboko ma mwana. Amitandi likolo lya mwana mpe nzoto ya ye ekomi lisusu móto. | |
| II K | LinVB | 4:35 | Elizeo atelemi, abandi kotambola o kati ya ndako, na nsima amitandi lisusu likolo lya ye ; mbala nsambo asali bongo ; mwana akosoli mpe afungoli miso. | |
| II K | LinVB | 4:36 | Elizeo abengi Gekazi mpe alobi na ye : « Benga mwasi malamu oyo wa Sunam. » Abengi ye. Awa akomi, Elizeo alobi : « Kamata mwana wa yo. » | |
| II K | LinVB | 4:37 | Mama akoti, akwei o boso bwa Elizeo, akumbami tee o nse ; na nsima amemi mwana wa ye mpe abimi. | |
| II K | LinVB | 4:38 | Elizeo azongi o Gilgal. Nzala enene ezalaki kongala o mokili. Bayekoli ba profeta bafandi liboso lya ye. Alobi na mosali wa ye : « Tia nzungu enene o móto mpe lambela bayekoli ba profeta supu. » | |
| II K | LinVB | 4:39 | Moko wa bango abimi mpe akei kobuka ndunda o elanga ; kuna amoni nsinga ya mbika ya zamba, abuki mbuma mpe atondisi elamba na yango. Azongi mpe akati yango biteni biteni, abwaki yango o nzungu ya supu ; ayebi ndunda eye malamu te. | |
| II K | LinVB | 4:40 | Bapesi bato supu mpe balei. Kasi awa bameki supu ena, banso bagangi : « Moto wa Nzambe, liwa lizali o nzungu ! » Mpe babangi kolia yango lisusu. | |
| II K | LinVB | 4:41 | Bongo Elizeo alobi : « Boyela ngai mwa fufu. » Abwaki yango o nzungu, alobi : « Pesa bato balia. » Eloko ebe ezalaki lisusu o nzungu te. | |
| II K | LinVB | 4:42 | Moto moko auti o Baal-Salisa mpe ayeli moto wa Nzambe eteni ya zomi ya mbuma ya yambo ya bilanga, mampa ntuku ibale ya loso mpe mbuma ibesu o ekoló. Elizeo alobi na ye : « Pesa bato balia. » | |
| II K | LinVB | 4:43 | Kasi mosali azongisi : « Naleisa na yango bato nkama ? » Elizeo alobi lisusu : « Pesa bato yango, balia, zambi Yawe alobi : Bakolia mpe ndambo ya bilei ekotikala. » | |