Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II KINGS
Prev Up Next
Chapter 23
II K LinVB 23:1  Na nsima mokonzi abengisi bakolo banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem.
II K LinVB 23:2  Akoti o Tempelo ya Yawe elongo na bato banso ba Yuda na baye bazalaki o Yeruzalem ; ba­nganga Nzambe na baprofeta, bato banene na bato bake. Mokonzi ata­ngeli bango maloba ma buku ya Bo­ndeko, eye bazwaki o Tempelo ya Yawe.
II K LinVB 23:3  Mokonzi atelemi penepene na efelo, mpe alayi ndai ’te bakolanda bobele Yawe mpe bakotosa mibeko, bitinda na mitindo mya ye minso. Ba­kolanda myango na motema moko mpe bakotosa maye manso makomami o buku ya Mobeko. Bato banso bandimi bongo.
II K LinVB 23:4  Mokonzi atindi nganga Nzambe Kilkia, banganga Nzambe basalisi na bakengeli ba ezibeli ya Tempelo balongola o Tempelo ya Yawe biloko binso bato basalaki mpo ya kokumisa Baal, Asera to minzoto minso mya likolo. Batumbi byango o libanda lya Yeruzalem, o lobwaku la Kedron mpe bakei na mputulu ya byango o Betel.
II K LinVB 23:5  Mokonzi alongoli mpe ba­nganga nzambe ba lokuta, baye bakonzi ba Yuda baponoki mpo ya kotumba mpaka ya malasi o bisika bya kokumisa banzambe bipai binso mpe o mboka inso ya Yuda mpe iye penepene na Yeruzalem. Alongoli mpe ba­to banso batumbaki mpaka ya malasi mpo ya kokumisa Baal, mwese, sanza, minzoto to bikelamo binso bya likolo.
II K LinVB 23:6  Alongoli mpe likonzi lya bikeko o Tempelo ya Yawe, abimisi lyango o Yeruzalem, atumbi lyango o lobwaku la Kedron ; aniki lyango tee likoma mputulu mpe abwaki mputulu o esika bakobwakaka bosoto bwa mboka.
II K LinVB 23:7  Abomi mpe ndako inso esika bazalaki kosala bosoni o Tempelo ya Yawe, esika basi bazalaki kosonela Asera bilamba.
II K LinVB 23:8  Abengi banganga Nzambe banso ba mboka ya Yuda mpe abebisi bisika binso bya kokumisa banzambe basusu. Ezalaki esika banganga Nzambe batumbaki mpaka ya malasi banda Geba tee Berseba. Abomi mpe ndako ya bikeko eye ezalaki penepene na ezibeli ya Yozue, moyangeli wa mboka, ezibeli eye ezalaki o loboko la mwasi.
II K LinVB 23:9  Banganga Nzambe ba ndako ya bikeko bakokaki kokoma pene na altare ya Yawe o Yeruzalem te, kasi bakokaki kolia mampa mazangi nkisi o kati ya bandeko banganga Nzambe.
II K LinVB 23:10  Abomi mpe lituka lya móto, nko­mbo ’te Tofet, liye lizalaki o lobwaku la Ben-Inom mpo ’te moto moko atumba mwana wa ye wa mobali to wa mwasi te mpo ya kokumisa Molok.
II K LinVB 23:11  Alongoli bikeko bya farasa, biye bakonzi ba Yuda batiaki penepene na ezibeli ya Tempelo ya Yawe, mpe­mbeni ya ndako ya mokengeli Netan-Melek ; ndako eye ikangemi na Ndako enene ; atumbi mpe likalo lya mwese.
II K LinVB 23:12  Mokonzi abuki mpe bitumbelo bizalaki o ndako ya likolo ya Akaz, biy­e bakonzi ba Yuda batongaki. Abuki mpe bitumbelo biye Manase atongaki o mapango mabale ma Te­mpelo ya Yawe ; alongoli byango mpe abwaki mputulu o lobwaku la Kedron.
II K LinVB 23:13  Mokonzi abomi mpe bisika bya kokumisa banzambe basusu, biye bizalaki o Sudi ya ngomba ya Oliva, eye etalani na Yeruzalem. Salomo, mokonzi wa Israel, atongaki byango mpo ya kokumisa Astarte, nzambe wa nsomo wa ba-Sidoni, na Kemos, nzambe wa nsomo wa ba-Moab, na Milkom, nzambe wa nsomo wa ba-Amon.
II K LinVB 23:14  Abuki mpe makonzi, akati makonzi ma bikeko mpe atondisi bisika bina na minkuwa mya bato.
II K LinVB 23:15  Yozia abomi etumbelo ya Betel, mpe esika ya kokumisa banzambe basusu, eye Yeroboam, mwana wa Nebat, atongaki, mpe ebendaki ba-Israel o nzela ya masumu. Abomi etumbelo eye na esika eye ya kokumisa banza­mbe. Atumbi esika eye mpe aniki bi­nso, bikomi mputulu ; atumbi mpe makonzi ma bikeko.
II K LinVB 23:16  Na nsima Yozia amibongoli, amoni malita mazalaki o ngomba ; atindi bato bakamata minkuwa o malita mana mpe atumbi myango o etumbelo. Abebisi yango bongo mpo ya kokokisa liloba Yawe alobaki na monoko mwa moto wa Nzambe, oyo asakolaki maloba mana.
II K LinVB 23:17  Yozia atuni : « Lilita linene nazali komono kuna, lya nani ? » Bato ba mbo­ka bayanoli : « Ezali lilita lya moto wa Nzambe, oyo autaki o Yuda ; ye moto alobaki makambo mana, mpe yo ozali kokokisa mango o etumbelo ya Betel. »
II K LinVB 23:18  Yozia alobi : « Tika ye na boboto ! Moto moko asimba minkuwa mya ye te ! » Bongo batiki minkuwa mya ye na mpe minkuwa mya profeta oyo autaki o Samaria.
II K LinVB 23:19  Yozia alongoli mpe ndako inso ya banzambe basusu, iye izalaki o mboka ya Samaria, iye bakonzi ba Israel batongaki mpe iyokisaki Yawe nkanda. O bisika bina asali se lokola asalaki o Betel.
II K LinVB 23:20  Akangi mpe banga­nga Nzambe ba lokuta banso bazalaki wana, abomi bango o bitumbelo, mpe atumbi minkuwa mya bato. Na nsima azongi o Yeruzalem.
II K LinVB 23:21  Mokonzi apesi bato banso etinda eye : « Bosepela eyenga ya Pasika mpo ya kokumisa Yawe Nzambe wa bino, bosala lokola ekomami o buku ya Bondeko. »
II K LinVB 23:22  Ut’o ntango bazuzi ba­zalaki koyangela ekolo Israel mpe bakonzi bazalaki koyangela Israel mpe Yuda, basepelaki eyenga ya Pasika bongo te.
II K LinVB 23:23  Bobele o mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa Yozia basepeli bongo eyenga ya Pasika ya Yawe o Yeruzalem.
II K LinVB 23:24  Yozia abengani mpe bato bakosololaka na milimo mya bawa, na ba­nganga nkisi, alongoli mpe bikeko na biloko bya nsomo binso bimononoki o mokili mwa Yuda na Yeruzalem ; akokisi bongo maloba manso ma Mobeko, maye makomami o buku eye nganga Nzambe Kilkia azwaki o Tempelo ya Yawe.
II K LinVB 23:25  Mokonzi moko te asalaki lokola ye, moko te azongelaki Yawe na motema mobimba, na mayele manso mpe na nguya inso, moto moko te atosaki Mobeko Moze atindaki lokola ye. Nsima ya ye moto moko akokanaki na ye te.
II K LinVB 23:26  Nzokande Yawe atiki nkanda te eye ayokelaki bato ba Yuda, mpo ya matumoli ma Manase.
II K LinVB 23:27  Yawe alobi : « Nakolongola mpe Yuda o miso ma ngai se lokola nalongolaki Israel ; nakobwaka Yeruzalem, mboka eye naponoki na mpe Tempelo eye nalobaki : Nkombo ya ngai eko­zala wana. »
II K LinVB 23:28  Makambo masusu ma Yozia, misala minso asalaki, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda.
II K LinVB 23:29  O mikolo mina Farao Neko, mokonzi wa Ezipeti, akei kobunda na mokonzi wa Asur epai ya Efrate. Mokonzi Yozia akei kozwana na ye o nzela, kasi Farao abomi ye o Megido bobele o ntango amoni ye.
II K LinVB 23:30  Basaleli ba Yozia bamemi ebembe o likalo, balongwi na ye o Megido mpe bakei o Yeruzalem. Bakundi ye o lilita lya ye moko. Bato ba ekolo baponi Yoakaz, mwana wa Yozia, akitana tata wa ye, bapakoli ye mafuta mpe baluboli ye mokonzi.
II K LinVB 23:31  Yoakaz akokisi mibu ntuku ibale na misato ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo sanza isato o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Kamital, mwana wa Yirmeya, moto wa Libna.
II K LinVB 23:32  Asali mabe o miso ma Yawe se lokola bankoko ba ye.
II K LinVB 23:33  Farao Neko akangi ye na minyololo o Ribla o mokili mwa Amat mpo ’te ayangela Yeruzalem lisusu te. Farao Neko afutisi bato ba ekolo mpako ya talenta ya palata monkama mpe ya wolo monkama.
II K LinVB 23:34  Aluboli Eliakim, mwana wa Yozia mokonzi o esika ya tata wa ye, abongoli nkombo ya ye, apesi ye nkombo Yoyakim. Neko akangi Yoakaz o boombo, akei na ye o Ezipeti, Yoakaz awei kuna.
II K LinVB 23:35  Yoyakim apesi Farao palata na wolo. Mpo ya kokokisa motuya mwa mosolo Farao asengeki, afutisi bato banso mpako. Atindi bango na makasi ’te bafuta palata na wolo, moto na moto lokola akoki kozwa yango ; nsima apesi yango na Farao Neko.
II K LinVB 23:36  Yoyakim akokisi mibu ntuku iba­le na mitano ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu zomi na moko o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Zebida, mwana wa Pedaya, moto wa Rama.
II K LinVB 23:37  Asali mabe o miso ma Yawe se lokola bankoko ba ye basalaki.