II KINGS
Chapter 1
II K | LinVB | 1:2 | Okozia azalaki o mokili mwa ndako ya ye o Samaria ; akwei o nse mpe azoki mingi. Yango wana atindi bantoma mpe alobi na bango : « Bokende kotuna Baal-Zebub, nzambe wa Ekron, nayeba soko nakobika o mpasi ya ngai. » | |
II K | LinVB | 1:3 | Kasi anzelu wa Yawe alobi na Elia, moto wa Tesbe : « Kende kokutana na bantoma ba mokonzi wa Samaria mpe loba na bango : O Israel Nzambe azali te mpo ’te bokende kotuna Baal-Zebub, nzambe wa Ekron ? | |
II K | LinVB | 1:4 | Yango wana Yawe alobi : Mbeto esika olali, okotika yango lisusu te, okokufa ! » Mpe Elia akei. | |
II K | LinVB | 1:6 | Bazongiseli ye : « Tokutani na moto moko o nzela, oyo alobi na biso : Bokende mpe bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino, bolobela ye : Yawe alobi boye : O Israel Nzambe azali te mpo ’te otinda bato bakende kotuna Baal-Zebub, nzambe wa Ekron ? Yango wana, mbeto esika olali, okotika yango lisusu te, okokufa. » | |
II K | LinVB | 1:7 | Mokonzi atuni bango : « Moto oyo bokuti o nzela mpe alobeli bino maloba mana azali ndenge nini ? » | |
II K | LinVB | 1:8 | Bayanoli ye : « Moto oyo alataki elamba ya nsuki ya nyama mpe akangaki loketo na lomposo la nyama. » Ye alobi : « Azali Elia, moto wa Tesbe ! » | |
II K | LinVB | 1:9 | Atindi komanda wa bato ntuku itano elongo na basoda ba ye ntuku itano bakende epai ya Elia. Moto oyo akuti Elia o nsonge ya ngomba, alobi na ye : « Moto wa Nzambe, mokonzi atindi yo ’te okita ngomba ! » | |
II K | LinVB | 1:10 | Elia ayanoli komanda wa bato ntuku itano : « Soko nazali moto wa Nzambe solo, móto mokita ut’o likolo mpe mosilisa yo na basoda ba yo ntuku itano ! » Mpe móto mokiti ut’o likolo mpe mosilisi ye elongo na basoda ba ye ntuku itano. | |
II K | LinVB | 1:11 | Mokonzi atindeli ye lisusu komanda mosusu na bato ntuku itano. Ye mpe abuti ngomba mpe alobi na Elia : « Moto wa Nzambe, mokonzi atindi yo ’te okita noki ! » | |
II K | LinVB | 1:12 | Elia ayanoli : « Soko nazali moto wa Nzambe solo, móto mókita ut’o likolo mpe mósilisa yo na basoda ba yo ntuku itano. » Mpe móto mokiti ut’o likolo mpe mosilisi ye elongo na basoda ba ye ntuku itano. | |
II K | LinVB | 1:13 | Mokonzi atindi lisusu komanda mosusu na bato ntuku itano. Moto oyo wa basato ayei, afukameli Elia mpe abondeli ye : « Moto wa Nzambe, otala bomoi bwa ngai mosaleli wa yo na bomoi bwa bato ntuku itano bazali awa lokola eloko ya motuya. | |
II K | LinVB | 1:14 | Móto mokitaki ut’o likolo mpe mosilisaki bakomanda ba bato ntuku itano na mpe basoda ba bango ntuku itano. Kasi sikawa, otala bomoi bwa ngai lokola eloko ya motuya ! » | |
II K | LinVB | 1:15 | Anzelu wa Yawe alobi na Elia : « Kita mpe kende elongo na ye, obanga ye te. Atelemi, akiti ngomba mpe akei na ye elongo epai ya mokonzi. » | |
II K | LinVB | 1:16 | Alobi na ye : « Yoka maloba ma Yawe : Otindi bantoma mpo ya kotuna Baal-Zebub, nzambe wa Ekron, yango wana okolongwa o mbeto te esika olali, okokufa. » | |
II K | LinVB | 1:17 | Okozia akufi lokola Yawe alobaki na monoko mwa Elia. Ndeko wa ye Yoram akomi mokonzi o esika ya ye, zambi Okozia azalaki na mwana mobali te. Ezalaki o mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Yoram, mwana wa Yozafat, mokonzi wa Yuda. | |