Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II KINGS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 17
II K LinVB 17:1  O mobu mwa zomi na mibale mwa bokonzi bwa Akaz, Ozea, mwana wa Ela, akomi moko­nzi wa Israel o Samaria. Ayangeli eko­lo mibu libwa.
II K LinVB 17:2  Asali mabe o miso ma Yawe, kasi mingi mpenza te lokola bakonzi basusu ba Israel basalaki, baye bayangelaki ekolo liboso lya ye.
II K LinVB 17:3  Salmanazar, mokonzi wa Asur, akei kobunda na ye ; Ozea akomi moombo wa ye mpe afuti ye mpako.
II K LinVB 17:4  Kasi mokonzi wa Asur amoni ’te Ozea alingi kotomboko, zambi ati­ndaki bantoma epai ya So, mokonzi wa Ezipeti, mpe afutaki mokonzi wa Asur lisusu mpako te, lokola azalaki kosala mobu na mobu. Yango wana mokonzi wa Asur akotisi ye o boloko mpe akangi ye na minyololo.
II K LinVB 17:5  Mokonzi wa Asur akei kobundisa Samaria ; azingi mboka mibu misato.
II K LinVB 17:6  O mobu mwa libwa mwa bokonzi bwa Ozea o Israel, mokonzi wa Asur abotoli Samaria, akei na ba-Israel o Asur mpe afandisi bango o mboka Kala penepene na mongala Kabor, ebale ya Gozan, mpe o mboka isusu ya ba-Medi.
II K LinVB 17:7  Esalemaki bongo zambi ba-Israel basalaki masumu mingi o miso ma Yawe Nzambe wa bango, oyo abimisaki bango o mokili mwa Ezipeti, mpe abikisaki bango o maboko ma Farao, mokonzi wa Ezipeti. Bakumisaki banzambe basusu.
II K LinVB 17:8  Balandaki bizalela bya bikolo biye Yawe abe-nganaki o boso bwa bango.
II K LinVB 17:9  Bana ba Israel basali mabe maye mabongi te o miso ma Yawe Nzambe wa bango ; batongi bisika bya kokumisa banzambe basusu o mboka inso bazalaki kofanda, banda manongi ma mboka tee mboka izingami na mapango makasi.
II K LinVB 17:10  Batii makonzi na bikeko o ngomba inso mpe o nse ya nzete inso ya nkasa ibesu.
II K LinVB 17:11  O bisika bina binso batumbi mpaka ya malasi se lokola bato ba bikolo biye Yawe abenganaki o boso bwa bango. Basali mabe mingi, bayokisi Yawe nka­nda.
II K LinVB 17:12  Bakumisi bikeko ata Yawe ake­bisaki bango awa alobaki : « Bosala bongo te. »
II K LinVB 17:13  Nzokande Yawe akebisaki ba-Isra­el na ba-Yuda, alobaki na monoko mwa baprofeta : « Bobongola ezalela ebe ya bino, mpe botosa bitinda mpe mibeko mya ngai, engebene na Mibeko minso napesaki bankoko ba bino, miye nayebisaki bango na monoko mwa baprofeta. »
II K LinVB 17:14  Kasi ba­yokaki te, bakomaki motó makasi se lokola bankoko ba bango, baye baboyaki kotosa maloba ma Yawe Nzambe wa bango.
II K LinVB 17:15  Bakinolaki mibeko mya ye mpe babomaki bondeko Yawe akataka na bankoko ba bango, na mpe bitinda Yawe apesaka bango. Bamekolaki lolendo la bato ba bikolo bisusu ata Yawe atindaki bango ’te basala lokola bango te.
II K LinVB 17:16  Babwaki bitinda binso bya Yawe Nzambe wa bango, bamisaleli bikeko bibale bya ngombe, batelemisi ekeko ya Astarte, bakumbameli minzoto minso mya likolo mpe bakumisi ba-Baal.
II K LinVB 17:17  Batumbi bana ba bango babali na basi o móto ; basali makambo ma likundu mpe ma nkisi ; bandimi se kosala mabe o miso ma Yawe, bayokisi ye nkanda.
II K LinVB 17:18  Yawe asi­likeli ba-Israel makasi, abwaki ba­ngo mosika na ye. Bobele bato ba libota lya Yuda bazalaki kotosa Yawe.
II K LinVB 17:19  Ba-Yuda mpe baboyi kotosa mibeko mya Yawe Nzambe wa bango. Balandi mimeseno mya bato ba Israel.
II K LinVB 17:20  Yango wana Yawe abwaki libota mobimba lya Israel, ayokisi bango nsoni mingi, akabi bango o maboko ma bayibi mpe o nsima abengani bango mosika na ye.
II K LinVB 17:21  Mokolo Yawe alongoli Israel o libota lya Davidi, ba-Israel baluboli Yeroboam, mwana wa Nebat, moko­nzi. Yeroboam aboyisi ba-Israel nzela ya Yawe mpe abendi bango o nzela ya masumu manene.
II K LinVB 17:22  Ba-Israel basali masumu manso Yeroboam asalaki, batiki mango te ;
II K LinVB 17:23  mpe Yawe abwa­ki Israel mosika, se lokola alobaki na monoko mwa basaleli ba ye, baprofeta ; atindi ba-Israel o boombo o Asur, mosika na ekolo ya bango, esika bazali naino tee lelo.
II K LinVB 17:24  Mokonzi wa Asur abengi bato ba Babilon, Kuta, Ava, Amat na Sefarvaim ; afandisi bango o mboka ya Samaria o esika alongolaki ba-Israel. Bango bakomi bankolo ba Samaria, mpe bakei kofanda o mboka inso ya penepene.
II K LinVB 17:25  Awa bakomi kofanda o ekolo ena, bakumisi Yawe te, mpe Yawe atindeli bango ntambwe ilei bango.
II K LinVB 17:26  Bango balobi na mokonzi wa Asur : « Bato olongolaki o ekolo ya bango, ofandisaki bango o mboka ya Samaria, baye­bi te boniboni bakokumisaka nza­mbe wa ekolo eye ; oyo atindeli bango ntambwe mpo ya koboma ba­ngo, zambi bayebi te boniboni basengeli kokumisa nzambe wa ekolo eye. »
II K LinVB 17:27  Bongo mokonzi wa Asur apesi etinda eye : « Babenga nganga Nza­mbe moko wa bato batindamaki o boombo, aya kofanda awa mpe alakisa bango boniboni basengeli kosalela nzambe wa ekolo ena. »
II K LinVB 17:28  Bongo nga­nga Nzambe moko wa Samaria, oyo batindaki o boombo, ayei kofanda o Betel ; alakisi bango boniboni bakumisa Yawe.
II K LinVB 17:29  Bato ba bikolo binso bamisaleli bikeko bya banzambe ba bango mpe batii byango o ndako ya kokumisa banzambe, iye ba-Samaria batongaki. Bato ba bikolo binso basali se bongo, moto na moto o mboka esika afandi.
II K LinVB 17:30  Bato ba Babilon basali ekeko ya Suko­t-Benot, ba-Kuta ekeko ya Nergal, ba-Amat ekeko ya Asima.
II K LinVB 17:31  Ba-Ava basali ekeko ya Nibaz mpe ekeko esusu ya Tartak ; ba-Sefarvaim bako­bi kotumba bana ba bango o móto mpo ya kokumisa Adramelek na Anamelek, banzambe ba Sefarvaim.
II K LinVB 17:32  Bakumisi mpe Yawe mpe baponi banganga Nzambe o kati ya ba­ngo babonza mabonza o ndako ya banzambe basusu.
II K LinVB 17:33  Bakumisi Yawe, kasi basaleli mpe banzambe ba bango moko, se lokola bazalaki kosala o ekolo eye bautaki.
II K LinVB 17:34  Tee lelo bazali kolanda milulu mya bango mya kala mya kokumisa banzambe. Bakokumisaka Yawe te, bakolandaka mibeko na milulu mya ye te, bakotosaka Mobeko mpe bitinda te lokola Yawe ati­ndi bana ba Yakob, ntango apesaki ye nkombo Israel.
II K LinVB 17:35  Yawe akataki na bango bondeko mpe apesaki bango mobeko moye : « Bokumisa banzambe basusu te, bo­ku­mbamela bango te, bosambela bang­o te mpe bobonzela bango ma­bo­nza te.
II K LinVB 17:36  Bokumisa mpe bokumbamela bobele Yawe, bobonzela ye mabonza, zambi ye abimisaki bino o mokili mwa Ezipeti na nguya enene mpe na bokasi.
II K LinVB 17:37  Botosa mibeko na milulu mya ye, bolanda Mobeko na bitinda biye Yawe apesaki bino, biye akomaki o monkanda mpo ’te bola­nda byango seko ; bokumisa banza­mbe basusu te.
II K LinVB 17:38  Bondeko nakataki na bino, bobosana bwango te, mpe bokumisa banzambe basusu te.
II K LinVB 17:39  Bokumisa se Yawe Nzambe wa bino ; ye akobikisa bino o maboko ma banguna ba bino banso. »
II K LinVB 17:40  Kasi bango batosaki te mpe balandaki se motindo mwa kosambela mwa kala.
II K LinVB 17:41  Bongo bato ba bikolo bina bazalaki kokumisa Yawe, kasi bazalaki mpe kosambela bikeko bya bango. Batata na bana ba bango bakobi kosala lokola bankoko ba bango basalaki, tee lelo.