Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II KINGS
Prev Up Next
Chapter 14
II K LinVB 14:1  O mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Yoas, mwana wa Yoakaz, o Israel, Amasia, mwana wa Yoas, akomi mokonzi wa Yuda.
II K LinVB 14:2  Akokisi mibu ntuku ibale na mitano ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na libwa o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Yoadan, moto wa Yeruzalem.
II K LinVB 14:3  Asali malamu o miso ma Yawe, kasi malamu mpenza te, lokola nkoko wa ye Davidi. Alandi nzela ya tata wa ye Yoas o makambo manso.
II K LinVB 14:4  Nzokande bisika bya kokumisa banzambe basusu bikufi te, bato bakobi kobonza miboma mpe kotumba mpaka ya malasi o bisika bina.
II K LinVB 14:5  Awa bokonzi bolendi o maboko ma ye, Amasia abomi basaleli baye babomaki mokonzi, tata wa ye.
II K LinVB 14:6  Kasi abomi bana ba bango te, lokola ekomami o buku ya Mobeko mwa Moze : « Baboma batata te mpo ya mabe bana basali ; baboma bana te mpo ya mabe batata basali. Moto na moto asengeli kokufa mpo ya masumu ma ye moko. »
II K LinVB 14:7  Ye moto alongi ba-Edom nkoto zomi o lobwaku la Mongwa. Nsima ya etumba makasi abotoli mpe Libanga lya Sela ; apesi lyango nkombo Yokteel, litangemi naino bongo tee lelo.
II K LinVB 14:8  Na nsima Amasia atindi bantoma epai ya Yoas, mwana wa Yoakaz, nkoko wa Yeku, mokonzi wa Israel mpo bayebisa ye : « Yaka, tomekana ! » Totala nani aleki na bokasi !
II K LinVB 14:9  Yoas, mokonzi wa Israel, azongiseli Amasia, mokonzi wa Yuda, maloba maye : « Ezalaki o ngomba ya Libano mwa nzete ya nzube elobi na sédere : ‘Tika mwana mobali wa ngai abala mwa­na wa yo’. Kasi nyama ya zamba lya Libano ileki kuna mpe inyati nzete ya nzube.
II K LinVB 14:10  Solo, olongi ba-Edom, yango wana okomi na lofundo. Bo­mba lokumu la yo mpe fanda o mboka ya yo. Mpo nini ozali komilukela makambo ma mpasi mpe komikweisa elongo na ekolo ya yo Yuda ? »
II K LinVB 14:11  Kasi Amasia alingi koyoka te. Yoas, mokonzi wa Israel amilengeli mpo ya etumba, mpe akei kobunda na Amasia, mokonzi wa Yuda, o Bet-Semes, mboka ya Yuda.
II K LinVB 14:12  Yuda akwei o boso bwa Israel mpe bato banso bakimi, moto na moto o ema ya ye.
II K LinVB 14:13  Yoas, mokonzi wa Israel, akangi Amasia, mwana wa Yoas, nkoko wa Okozia, mokonzi wa Yuda, o boo­mbo o mboka Bet-Semes. Na nsima akei o Yeruzalem, abuki lopango lonene lokozinga Yeruzalem, ut’o ezibeli ya Efraim tee ezibeli ya Litumu, bolai metele nkama ibale.
II K LinVB 14:14  Abotoli wolo na palata inso na biloko binso bizalaki o Tempelo ya Yawe mpe o ndako ya mokonzi ; akangi mpe bato o boombo mpe azongi o Samaria.
II K LinVB 14:15  Makambo masusu ma Yoas, misala asalaki na mpe bitumba abundaki na Amasia, mokonzi wa Yuda, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
II K LinVB 14:16  Yoas akei kokutana na bankoko ba ye mpe bakundi ye o Samaria, o lilita lya bakonzi ba Israel. Mwana wa ye Yeroboam akitani ye.
II K LinVB 14:17  Amasia, mwana wa Yoas, moko­nzi wa Yuda, aumeli na bomoi mibu zomi na mitano nsima ya liwa lya Yoas, mwana wa Yoakaz, mokonzi wa Israel.
II K LinVB 14:18  Makambo masusu ma Amasia, ma­nso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda.
II K LinVB 14:19  Bato bayokani mpo batombokela ye o Yeruzalem ; akimi o Lakis, kasi batindi bato balanda ye o Lakis mpe babomi ye kuna.
II K LinVB 14:20  Bamemi nzoto ya ye o farasa mpe bakundi ye o Yeruzalem, o lilita lya bankoko ba ye o Engumba ya Davidi.
II K LinVB 14:21  Azaria akokisi mibu zomi na mitano ntango bato banso ba Yuda baluboli ye mokonzi o esika ya tata wa ye Amasia.
II K LinVB 14:22  Nsima ya liwa lya Amasia alendisi mboka Elat, azongisi yango o bokonzi bwa Yuda.
II K LinVB 14:23  O mobu mwa zomi na mitano mwa bokonzi bwa Amasia, mwana wa Yoas, o Yuda, Yeroboam, mwana wa Yoas, akomi mokonzi wa Israel o Samaria ; ayangeli ekolo mibu ntuku inei na moko.
II K LinVB 14:24  Asali mabe o miso ma Yawe, alandi ezalela ya masumu, maye Yeroboam, mwana wa Nebat, alakisaki bato ba Israel.
II K LinVB 14:25  Azongisi lisusu mokili mobimba mwa Israel lokola mozalaka kala, banda Amat tee mbu ya Araba, se lokola Yawe Nzambe wa Israel alobaki na monoko mwa mosaleli wa ye profeta Yonas, mwana wa Amitai, wa Gat-Gefer.
II K LinVB 14:26  Solo, Yawe amonoki mpasi enene ya bato ba Israel ; bao­mbo na bansomi bazalaki lisusu te, mpe moto moko akokaki kobikisa Israel lisusu te.
II K LinVB 14:27  Yawe alingaki koboma nkombo ya Israel o nse eye te, yango wana atindi Yeroboam, mwana wa Yoas, abikisa bango.
II K LinVB 14:28  Makambo masusu ma Yeroboam, misala minso asalaki, bitumba binso abundaki liboso mpo ya kozongisa Damasko na Amat o mokili mwa Israel, zambi mikili mina mizalaki mya Yuda, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
II K LinVB 14:29  Yeroboam akei kokutana na bankoko ba ye. Bakundi ye o Samaria, o lilita lya bakonzi ba Israel. Mwana wa ye Zakaria akitani ye.