II KINGS
Chapter 18
II K | LinVB | 18:1 | O mobu mwa misato mwa bokonzi bwa Ozea, mwana wa Ela, o Israel, Ezekia, mwana wa Akaz, akomi mokonzi wa Yuda. | |
II K | LinVB | 18:2 | Akokisi mibu ntuku ibale na mitano ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na libwa o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Abia, mwana wa Zekaria. | |
II K | LinVB | 18:3 | Asali se malamu o miso ma Yawe, alandi nzela ya nkoko wa ye Davidi o makambo manso. | |
II K | LinVB | 18:4 | Ye moto alongoli bisika bya kokumisa banzambe basusu, abomi makonzi, akati makonzi ma bikeko mpe abukibuki nyoka ya mbengi eye Moze atulaki. Ut’o ntango ena ba-Israel bazalaki kobonzela yango mabonza ; bapesaki yango nkombo Nekustan. | |
II K | LinVB | 18:5 | Ezekia azalaki kotia motema na Yawe Nzambe wa Israel. Nsima ya ye mpe liboso lya ye, mokonzi moko azalaki lokola ye te. | |
II K | LinVB | 18:6 | Andimi Yawe na motema moko mpe atiki ye mokolo moko te ; atosi mibeko miye Yawe atindaki na monoko mwa Moze. | |
II K | LinVB | 18:7 | Yango wana Yawe azalaki na ye mpe misala mya ye minso mitamboli malamu. Atomboki na mokonzi wa Asur mpe amilongoli o boombo bwa ye. | |
II K | LinVB | 18:8 | Ye moto alongi ba-Filisti, azongisi bango tee Gaza, abebisi mokili mwa bango, na manongi ma bakengeli, na mboka inso izingami na mapango makasi. | |
II K | LinVB | 18:9 | O mobu mwa minei mwa boko-nzi bwa Ezekia mpe o mobu mwa nsambo mwa bokonzi bwa Ozea, mwana wa Ela o Israel, Salmanasar, mokonzi wa Asur, akei kobunda na Samaria mpe azingi mboka. | |
II K | LinVB | 18:10 | Nsima ya mibu misato babotoli mboka. O mobu mwa motoba mwa bokonzi bwa Ezekia mpe o mobu mwa libwa mwa bokonzi bwa Ozea o Israel, mokonzi wa Asur akweisi Samaria ; | |
II K | LinVB | 18:11 | akangi ba-Israel mpe atindi bango o boombo o Asur, afandisi bango penepene na ebale Kabor, o Kala, o mokili mwa Gozan mpe o mboka ya ba-Medi. | |
II K | LinVB | 18:12 | Esalemaki bongo mpo batosaki liloba lya Yawe Nzambe wa bango te, mpe zambi babomaki bondeko bwa ye ; batikaki manso Moze mosaleli wa Yawe atindaki. Batosaki mobeko moko te, balandaki nzela ya ye mpe te. | |
II K | LinVB | 18:13 | O mobu mwa zomi na minei mwa bokonzi bwa Ezekia, Senakerib mokonzi wa Asur, akei kobunda na mboka inso ya Yuda mpe abotoli yango. | |
II K | LinVB | 18:14 | Bongo Ezekia, mokonzi wa Yuda, atindeli mokonzi wa Asur o Lakis maloba maye : « Nasali mabe ! Tika kobunda na ngai. Nakosala makambo manso okotinda ngai. » Mokonzi wa Asur akateli Ezekia motuya mwa mosolo ; asengeli kopesa talenta ya palata nkama isato na talenta ya wolo ntuku isato. | |
II K | LinVB | 18:16 | Bobele o ntango ena Ezekia alongoli ezibeli na makonzi ma yango o ndako esantu ya Yawe, eye ye moko, mokonzi wa Yuda akembisaki na bibende bya motuya ; akabeli mokonzi wa Asur bina binso. | |
II K | LinVB | 18:17 | Ut’o Lakis, mokonzi wa Asur atindi mokonzi monene wa basoda na mosalisi wa ye, na mpe moyangeli wa nganda ya basoda elongo na basoda ebele, bakende kobundisa mokonzi Ezekia o Yeruzalem. Ekomi bango kuna batikali penepene na nzela ya mai epai ya likolo eye elandi nzela ekokende o elanga ya ‘Mosukoli bilamba’. | |
II K | LinVB | 18:18 | Balingi kokutana na mokonzi monene. Bongo Eliakim, mwana wa Kilkia, mokengeli wa ndako ya mokonzi, na Sebna, mokomi minkanda, na ntoma Yoa, mwana wa Asaf, bakei kokutana na bango. | |
II K | LinVB | 18:19 | Moyangeli wa nganda alobi na bango : « Boloba na Ezekia maloba maye : Mokonzi monene wa Asur alobi : Ozali kotia elikya na nani ? | |
II K | LinVB | 18:20 | Okanisi ’te liloba lya monoko likoki na mayele mpe na mpiko mpo ya kolonga etumba ? Otii motema na nani mpo otombokela ngai ? | |
II K | LinVB | 18:21 | Ozali kotia motema na lisalisi lya Ezipeti, lititi lya nsoló libukani liye likotubola loboko la bato basimbi lyango. Farao, mokonzi wa Ezipeti, akosalaka se bongo na bato banso bakotiaka mitema na ye. | |
II K | LinVB | 18:22 | Mbele bokoloba na ngai : Totii elikya ya biso na Yawe Nzambe wa biso. Kasi Ezekia ye moto alongoli bisika binso bya kokumisa banzambe basusu na mpe bitumbelo binso, alobaki na bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem : Bokumisa Yawe mpe bokumbamela se altare eye ezali o Yeruzalem. | |
II K | LinVB | 18:23 | Bete mondenge na mokonzi wa ngai wa Asur, mpe nakopesa yo farasa nkoto ibale, soko okoki kozwa batambwisi ba yango ! | |
II K | LinVB | 18:24 | Ozali na bokasi te mpo okimisa ata moko wa basaleli ba mokonzi wa ngai. Kasi otii motema na Ezipeti mpo ya kozwa makalo na bato ba farasa ! | |
II K | LinVB | 18:25 | Nayei nde kobunda mpo naboma mboka ya yo soko Yawe andimi te ? Yawe moto alobaki na ngai : Kende kobunda na bato ba mokili mona mpe bebisa ekolo ya bango. » | |
II K | LinVB | 18:26 | Eliakim, Sebna na Yoa balobi na moyangeli : « Tobondeli yo, loba na biso basaleli ba yo o lokota la ba-Aram, biso toyebi lokota lona ; kasi oloba na biso o lokota la ba-Yuda te, mpo ’te bato bazali o lopango la mboka, bayoka ntina ya lisolo lya biso te. » | |
II K | LinVB | 18:27 | Kasi moyangeli alobi na bango : « Okanisi ’te mokonzi wa ngai atindi ngai naloba se na yo mpe na mokonzi wa yo ? Eloko te ! Atindi ngai naloba na bato banso bafandi o lopango la mboka, zambi mokolo moko ndebasengeli kolia nyei ya bango mpe komele masuba ma bango lokola yo. » | |
II K | LinVB | 18:28 | Moyangeli atelemi mpe agangi makasi o lokota la ba-Yuda, asakoli maloba maye : « Boyoka liloba lya mokonzi monene wa Asur ; | |
II K | LinVB | 18:30 | Ezekia atika koloba na bino ’te bosengeli kotia mitema na Yawe, atika koloba : ‘Ntembe te, Yawe akobikisa biso, mboka eye ekokweya o maboko ma mokonzi wa Asur te’. | |
II K | LinVB | 18:31 | Boyoka monoko mwa Ezekia te, zambi mokonzi wa Asur alobi : Bokata na ngai bondeko, bomikaba o maboko ma ngai, mpe moto na moto ndakoki kolia mbuma ya nzete ya vino mpe ya figi ; moto na moto ndameli mai ma libulu lya ye moko. | |
II K | LinVB | 18:32 | Na nsima nakoya kokamata bino banso mpe nakotia bino o mokili mozali lokola mokili mwa bino, esika mbuma ya mampa mpe ya vino izali mingi, esika nzete ya oliva ikopesa mafuta izali, esika mafuta ma nzoi mazali mingi. Bongo bokofanda malamu mpe bokokufa te. Kasi boyoka maloba ma Ezekia te ; akosi bino awa alobi ‘Yawe akobikisa biso’. | |
II K | LinVB | 18:33 | Ya solo, banzambe ba mikili misusu babikisaki nde ekolo ya bango o maboko ma mokonzi wa Asur ? | |
II K | LinVB | 18:34 | Wapi banzambe ba Amat, ba Arpad, ba Sefarvaim, ba Ena mpe ba Iva ? Wapi banzambe ba Samaria ? Babikisaki nde Samaria o maboko ma ngai ? | |
II K | LinVB | 18:35 | O kati ya bikolo binso, wapi nzambe oyo abikisaki ekolo ya bango o maboko ma ngai ? Bongo Yawe akobikisa nde Yeruzalem ? » | |
II K | LinVB | 18:36 | Bato banso batikali nye, bazongisi liloba lyoko te, zambi mokonzi alobaki na bango : « Bozongisela ye liloba te. » | |