JOSHUA
Chapter 14
Josh | LinVB | 14:1 | Ba-Israel bazwi mabelé o mokili mwa Kanana ; nganga Nzambe Eleazar na Yozue, mwana wa Nun, elongo na bankumu ba mabota ma Israel bakaboleli bango mabelé. | |
Josh | LinVB | 14:2 | Babeti zeke mpo bayeba mabelé nini bapesa mabota libwa na ndambo se lokola Yawe atindaki Moze. | |
Josh | LinVB | 14:3 | Moze asilaki kopesa mabota mabale na ndambo mabelé o ngambo ya Yordane, kasi apesaki ba-Levi mabelé te. | |
Josh | LinVB | 14:4 | Bana ba Yozefu bazalaki mabota mabale : Manase na Efraim, mpe o mokili mona bapesaki bango bobele mboka ya kofanda na bisobe bya penepene mpo ya koleisa bibwele mpe kobomba biloko. | |
Josh | LinVB | 14:6 | Bana ba Yuda bakei epai ya Yozue o Gilgal. Kaleb, mwana wa Yefune, moto wa Keniz, alobi na ye : « Oyebi malamu boniboni Yawe alobaki o Kades-Barne na Moze, moto wa Nzambe, mpo ya ngai mpe mpo ya yo. | |
Josh | LinVB | 14:7 | Nakokisaki mibu ntuku inei mokolo Moze, mosaleli wa Yawe, atindaki ngai longwa Kades-Barne mpo ya konongo mokili moye ; nayebisaki ye na bosembo manso tomonoki. | |
Josh | LinVB | 14:8 | Kasi bandeko baye bakendeki na ngai elongo balembisaki bato mitema, kasi ngai natosaki Yawe Nzambe wa ngai na motema moko. | |
Josh | LinVB | 14:9 | O mokolo mona Moze alayaki ndai eye : « Nakolaya ’te mabelé esika otiaki makolo makozala ma yo mpe ma bana ba yo seko, zambi otosaki Yawe Nzambe wa ngai na motema moko. » | |
Josh | LinVB | 14:10 | Banda mokolo mona Yawe abateli ngai lokola alakelaki. Esili ekoki sikawa mibu ntuku inei na mitano ’te Yawe alobaki likambo lina na Moze o ntango ba-Israel bazalaki koleka o eliki, sikawa nakokisi mibu ntuku mwambe na mitano. | |
Josh | LinVB | 14:11 | Lelo nazali naino na nzoto makasi se lokola o mokolo Moze atindaki ngai mosala mwa konongo mokili. Lelo nazali naino na nguya ya kobunda etumba se lokola kala ; nazali na bokasi bwa kokende mpe bwa kozonga. | |
Josh | LinVB | 14:12 | Sikawa pesa ngai ngomba eye Yawe alakelaki ngai mokolo mona ; yo moko oyokaki ’te ba-Anakim bazalaki kuna, bafandaki o mboka inene izingami na mapango makasi. Kasi Yawe akosalisa ngai, nakobengana bango se lokola Yawe alobaki. » | |
Josh | LinVB | 14:14 | Bongo tee lelo Ebron etikali mabelé ma Kaleb, mwana wa Yefune, moto wa Keniz, zambi atosaki Yawe o makambo manso. | |