JUDITH
Chapter 9
Judi | LinVB | 9:1 | O ntango bazalaki kobonza mpaka ya malasi o Tempelo ya Yeruzalem, Yudite amibwaki o nse, apakoli mputulu o motó, alongoli ngoto eye alataki mpe na mongongo makasi abeleli Mokonzi Nzambe. Asambeli boye : | |
Judi | LinVB | 9:2 | « Mokonzi, Nzambe wa tata wa ngai Simeoni, yo moto opesaki ye mopanga mpo ya koboma bauta, baye bafungolaki liputa lya ngondo mpo ya kobebisa ye, balongolaki ye bilamba mpo ya koyokisa ye nsoni, balalaki na ye mpo ya kosambwisa ye. Basalaki likambo liye, ata olobaki : « Moto moko asala lyango te. » | |
Judi | LinVB | 9:3 | Yango wana ondimaki ’te baboma bakonzi ba bango ; mpo ya lokuta mpe bokosi bwa bango, mbeto ya bango ekomi esika ya makila ma nsoni. Opesaki baombo na bakonzi etumbu ndenge yoko, bakonzi baye bafandi o ngwende ya bango. | |
Judi | LinVB | 9:4 | Ondimaki ’te banguna bayiba basi ba bango, batinda bilenge basi o boombo mpe bakabola biloko bya bango. Opesaki binso na bana ba yo ba bolingo, mpo batiaki mitema na bosaleli yo, babangaki kokomisa ekolo ya bango mbindo mpe babondelaki yo ’te osalisa bango. E Nzambe, yo Nzambe wa ngai, oyoka lolaka la ngai, mwasi bozenge, | |
Judi | LinVB | 9:5 | mpo yo moto okosalaka makambo manso ma kala, ma lelo mpe maye makoya nsima, yo moto obongisi makambo ma sikawa na maye makoya ; manso okanaki kosala, osali mango. | |
Judi | LinVB | 9:6 | Mpo inso okanaki kosala, isalemi, tomoni yango, mpo nzela ya yo inso izali na molongo, mpe okokataka makambo na bwanya. | |
Judi | LinVB | 9:7 | Awa ba-Asur bayei kolakisa bokasi bwa bango, bamikumisi na farasa mpe na basoda ba bango, bamibeti ntolo mpo ya mpiko ya basoda ba bango. Batii elikya na likongo mpe na nguba ya bango, na litimbo mpe na bilingongo ; kasi bayebi te ’te yo Mokonzi okolongaka bitumba. | |
Judi | LinVB | 9:8 | Nkombo ya Mokonzi ekoki se na yo ! Na nguya ya yo silisa bokasi bwa bango ; sukisa basoda ba bango na nkanda ya yo, mpo bakani kosantola bisika bya yo bisantu, balingi kobebisa ema eye ezali na nkombo ya yo mpe kobuka liseke lya altare ya yo na ebende. | |
Judi | LinVB | 9:9 | Tala lofundo la bango, nkanda ya yo ekwela bango ; lendisa maboko ma ngai, mwasi bozenge. | |
Judi | LinVB | 9:10 | Awa nalingi kokosa bango na maloba ma ngai, pesa moombo na mokonzi etumbu, boma mokonzi na mosali wa ye molongo moko, sukisa lolendo la bango na loboko la mwasi moko. | |
Judi | LinVB | 9:11 | Nguya ya yo ekoutaka na boike bwa bato te to na bokasi bwa basoda te. Ozali Nzambe wa bato ba bosawa, yo mosalisi wa bato banyokwami, molendisi wa bato batau, ebombamelo ya baye bazangi mobateli, mpe mobikisi wa baye bazangi elikya. | |
Judi | LinVB | 9:12 | Solo, yo Nzambe wa tata wa ngai, Nzambe wa ekolo Israel, yo Nkolo wa likolo na nse, yo Mokeli wa mai manso, yo Mokonzi wa bikelamo binso, oyoka losambo la ngai. | |
Judi | LinVB | 9:13 | Opesa ngai maloba makosenginya bato, nazokisa mpe naboma, baye bakani kosala biso, bato ba ekolo ya yo, mabe, na ndako esantu ya yo, na ngomba Sion, na mpe ndako ya bana ba yo. | |