Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next
Chapter 3
Matt LinVB 3:1  O mikolo mîná Yoáne Mobátisi azalákí kotéya o elíkí ya Yudéa,
Matt LinVB 3:2  alobí : « Bóbóngola mitéma, zambí Bokonzi bwa Likoló bokómí penepene. »
Matt LinVB 3:3  Mpô ya yě mpe­nzá proféta Izáya alobáká : Moto abélélí o elíkí, yě ’te : Bóbongisela Mokonzi nzelá, bósémbola nzelá ya yě.
Matt LinVB 3:4  Yoáne azalákí koláta elambá ya nsúki ya kaméla mpé komíkanga mokába mwa lomposo la nyama o lokéto ; azalákí kolía mitó mya bítekuteku mpé mafúta ma nzói ya zámba.
Matt LinVB 3:5  Bato ba Yerúzalem, bato bánso ba Yudéa mpé ba ekólo penepene na Yordáne bakeí epái ya yě,
Matt LinVB 3:6  basakólí masúmu ma bangó mpé abátísí bangó o maí ma Yordáne.
Matt LinVB 3:7  Awa amóní ’te ba-Farizéo na ba-Saduséo baíké bayéí mpô ya batísimo, alobí na bangó : « Bána ba nyóka, náni alakísí bínó kokíma Nkándá ekoyâ
Matt LinVB 3:8  Bóbimisa mosálá molakísí ’te bobóngólí mitéma,
Matt LinVB 3:9  mpé bótíka koloba o mitéma : ‘Abaráma azalí tatá wa bísó’. Zambí nayébísí bínó : Nzámbe akokí kosála ’te mabángá maye mákoka kobimisela Abaráma bána.
Matt LinVB 3:10  Basílí batíí sóka o ntína ya nzeté ; nzeté ínso ikobóta mbuma ilámu té, bakokáta mpé bakobwáka yangó o móto.
Matt LinVB 3:11  Ngáí nazalí kobátisa bínó na mái mpô ’te bóbóngola mitéma, kasi óyo akoyâ nsima ya ngáí, alekí ngáí na ngúyá ; nabongí té kolongola mapápa o makolo ma yě : yě akobátisa bínó na Elímo Sántu mpé na móto.
Matt LinVB 3:12  Asímbí lúngu o mabóko, akopepe mbuma ya yě ; akosangisa mbuma ya mámpa o ebómbelo, kasi akotumba mpumbulú o móto mokozíma té. »
Matt LinVB 3:13  O ntángo êná Yézu aútí o Galiléa mpé ayéí o Yordáne epái ya Yoá­ne mpô ’te ábátisa yě.
Matt LinVB 3:14  Kasi Yoáne alingí kopekisa yě, alobí : « Ngáí moto nasengélí kokúla batísimo na mabóko ma yŏ, bôngó yŏ okoyâ epái ya ngáí ! »
Matt LinVB 3:15  Kasi Yézu azóngísí : « Ndimá ; ebongí tókokisa bosembo. » Bôngó Yoáne andimí.
Matt LinVB 3:16  Ekúlí Yézu batísimo, abimí o mái. Mpé tálá, likoló lifungwání mpé amóní Elímo wa Nzámbe lokóla ebengá, akitélí yě.
Matt LinVB 3:17  Mpé loláká loútí o likoló, lolobí : « Oyo azalí Mwána wa ngáí wa bolingo, nakosepelaka yě míngi. »