Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next
Chapter 11
Matt LinVB 11:1  Esílísí Yézu kopésa bayékoli ba yě zómi na bábalé mibéko mîná, akeí kotéya mpé kosakola o bingumbá bya bangó.
Matt LinVB 11:2  Ntángo Yoáne azalákí o bolóko, ayókí nsango ya bikelá bya Krístu. Atíndí bayékoli ba yě bátúna yě :
Matt LinVB 11:3  « Yǒ ozalí moto óyo asengélí ko­yâ tǒ tózila moto mosúsu ? »
Matt LinVB 11:4  Yézu azóngísí : « Bókende koyébisa Yoáne maye boyókí mpé bomóní :
Matt LinVB 11:5  bato ba lolandá bakómí komóno ; baye babúkáná makolo bakómí kotámbola, bato ba maba bakómí péto, baye bakúfá matói bakómí koyóka, baye bawákí basékwí, mpé babóla bazalí koyóka Nsango Elámu.
Matt LinVB 11:6  Esengo na moto akotúta libakú mpô ya ngáí té ! »
Matt LinVB 11:7  Ezalákí bangó kokende, Yézu aba­ndí koloba na bato ebelé bazalákí wâná makambo ma Yoáne : « Bokendékí kotála níni o elíkí ? Monkékélé moningání na mompepe tǒ ?
Matt LinVB 11:8  Bokendékí kotála náni ? Moto alátí kitóko ? Wápi ! Bato bakolátaka kitóko bakofándaka o ndáko ya bakonzi.
Matt LinVB 11:9  Bôngó bokendékí kosála níni ? Kotála proféta ? Ya sôló, nalobí na bínó, alekí baproféta bánso.
Matt LinVB 11:10  Mpô ya yě mpenzá bakomí boye : Tálá, natíndí ntóma wa ngáí libosó lya yǒ, ábongisela yǒ nzelá.
Matt LinVB 11:11  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : O káti ya bána bánso bamamá babótí, mǒkó té alekí Yoáne Mobátisi. Nzó­kandé óyo azalí moto moké o Bokonzi bwa Likoló alekí yě na bo­néne.
Matt LinVB 11:12  Ut’o mikolo mya Yoáne Mobátisi kín’o leló bakoyíngela o Bokonzi bwa Likoló na etumba : bobélé bilombé bakoyíngela kúná.
Matt LinVB 11:13  Baproféta bánso téé boyéi bwa Yoáne basakólákí bôngó, ekomámí mpé o búku ya Mobéko.
Matt LinVB 11:14  Bóndimela ngáí : yě azalí Elía, óyo basakólákí boyéi bwa yě.
Matt LinVB 11:16  Nakokí koloba ’te bato ba leló bazalí lokóla banáni ? Bazalí lokóla bána bafándí o zándo mpé bazalí kobélela báníngá :
Matt LinVB 11:17  ‘Tobétélékí bínó mpiólóló mpé bobínákí té ! Toyémbákí nzémbo ya liláká mpé bolelákí té !’
Matt LinVB 11:18  Sôló, Yoáne ayákí : azalákí kolía té, komele mpé té, mpé balobí : ‘Azalí na zábolo !’
Matt LinVB 11:19  Awa Mwána wa Moto ayéí, azalí kolía mpé komele, mpé balobí : ‘Tálá moto wa lokósó, momeli masa­nga, móníngá wa bafútisi mpáko mpé wa basúmuki’. Nzókandé Bwányá bwa Nzámbe bomónóní sôló o bikelá bya yě. »
Matt LinVB 11:20  Na nsima abandí kopálela bato ba bingumbá esíká asálákí makamwísi míngi, zambí babóngólí mi­té­ma té.
Matt LinVB 11:21  Alobí : « Mawa na yǒ, Kora­zín ! Mawa na yǒ, Betsáida ! Mpámba té, sókó makamwísi masálémákí o Tíro mpé o Sidóni lokóla epái ya bínó, mbele babóngóláká mitéma kala na boláti ngóto mpé na bomípakoli mputulú.
Matt LinVB 11:22  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mokolo bako­káta makambo ma bato, etúmbu bakopésa bínó ekoleka etúmbu ya Tíro na Sidóni.
Matt LinVB 11:23  Mpé yǒ, Kafárnaum, okanísí ’te bakotómbola yǒ kín’o likoló ? Wápi ! Okokita o lí­mfelo. Sókó makamwísi masálémí o mbóka yǒ masálémáká o Sódoma, mbele ebébákí té kín’o leló.
Matt LinVB 11:24  Yangó wâná nayébísí yǒ : Mokolo bakokáta makambo ma bato, etúmbu bakopésa yǒ ekoleka etúmbu ya Sódoma. »
Matt LinVB 11:25  O ntángo êná Yézu alobí : « Natóndí yǒ, Tatá, Mokonzi wa likoló na nsé, zambí oyébísí bato baké maye obómbélí bato ba bwányá mpé ba mayéle.
Matt LinVB 11:26  Sôló, Tatá, yǒ mǒ­kó olingákí bôngó.
Matt LinVB 11:27  Tatá wa ngáí apésí ngáí bínso ; moto mǒkó té ayébí Mwána, bobélé Tatá ayébí yě ; mpé moto mǒkó té ayébí Tatá, bobélé Mwána ayébí yě ná mpé moto óyo Mwána alingí kolakisa.
Matt LinVB 11:28  Yákáni epái ya ngáí, bínó bánso bolembí mpé bomemí mókúmbá, ngáí nakopémisa bínó.
Matt LinVB 11:29  Bóndima mókúmbá nakomemisa bínó, mpé bólanda matéya ma ngáí, zambí nazalí motéma bobóto na bosáwa, mpé mitéma mya bínó mikozwa bopémi,
Matt LinVB 11:30  zambí ekangiseli ya ngáí ekoyókisa bínó mpási míngi té, mpé mókúmbá mwa ngáí mozalí bozitó té. »