MATTHEW
Chapter 11
| Matt | LinVB | 11:1 | Esílísí Yézu kopésa bayékoli ba yě zómi na bábalé mibéko mîná, akeí kotéya mpé kosakola o bingumbá bya bangó. | |
| Matt | LinVB | 11:2 | Ntángo Yoáne azalákí o bolóko, ayókí nsango ya bikelá bya Krístu. Atíndí bayékoli ba yě bátúna yě : | |
| Matt | LinVB | 11:5 | bato ba lolandá bakómí komóno ; baye babúkáná makolo bakómí kotámbola, bato ba maba bakómí péto, baye bakúfá matói bakómí koyóka, baye bawákí basékwí, mpé babóla bazalí koyóka Nsango Elámu. | |
| Matt | LinVB | 11:7 | Ezalákí bangó kokende, Yézu abandí koloba na bato ebelé bazalákí wâná makambo ma Yoáne : « Bokendékí kotála níni o elíkí ? Monkékélé moningání na mompepe tǒ ? | |
| Matt | LinVB | 11:8 | Bokendékí kotála náni ? Moto alátí kitóko ? Wápi ! Bato bakolátaka kitóko bakofándaka o ndáko ya bakonzi. | |
| Matt | LinVB | 11:9 | Bôngó bokendékí kosála níni ? Kotála proféta ? Ya sôló, nalobí na bínó, alekí baproféta bánso. | |
| Matt | LinVB | 11:10 | Mpô ya yě mpenzá bakomí boye : Tálá, natíndí ntóma wa ngáí libosó lya yǒ, ábongisela yǒ nzelá. | |
| Matt | LinVB | 11:11 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : O káti ya bána bánso bamamá babótí, mǒkó té alekí Yoáne Mobátisi. Nzókandé óyo azalí moto moké o Bokonzi bwa Likoló alekí yě na bonéne. | |
| Matt | LinVB | 11:12 | Ut’o mikolo mya Yoáne Mobátisi kín’o leló bakoyíngela o Bokonzi bwa Likoló na etumba : bobélé bilombé bakoyíngela kúná. | |
| Matt | LinVB | 11:13 | Baproféta bánso téé boyéi bwa Yoáne basakólákí bôngó, ekomámí mpé o búku ya Mobéko. | |
| Matt | LinVB | 11:16 | Nakokí koloba ’te bato ba leló bazalí lokóla banáni ? Bazalí lokóla bána bafándí o zándo mpé bazalí kobélela báníngá : | |
| Matt | LinVB | 11:17 | ‘Tobétélékí bínó mpiólóló mpé bobínákí té ! Toyémbákí nzémbo ya liláká mpé bolelákí té !’ | |
| Matt | LinVB | 11:18 | Sôló, Yoáne ayákí : azalákí kolía té, komele mpé té, mpé balobí : ‘Azalí na zábolo !’ | |
| Matt | LinVB | 11:19 | Awa Mwána wa Moto ayéí, azalí kolía mpé komele, mpé balobí : ‘Tálá moto wa lokósó, momeli masanga, móníngá wa bafútisi mpáko mpé wa basúmuki’. Nzókandé Bwányá bwa Nzámbe bomónóní sôló o bikelá bya yě. » | |
| Matt | LinVB | 11:20 | Na nsima abandí kopálela bato ba bingumbá esíká asálákí makamwísi míngi, zambí babóngólí mitéma té. | |
| Matt | LinVB | 11:21 | Alobí : « Mawa na yǒ, Korazín ! Mawa na yǒ, Betsáida ! Mpámba té, sókó makamwísi masálémákí o Tíro mpé o Sidóni lokóla epái ya bínó, mbele babóngóláká mitéma kala na boláti ngóto mpé na bomípakoli mputulú. | |
| Matt | LinVB | 11:22 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mokolo bakokáta makambo ma bato, etúmbu bakopésa bínó ekoleka etúmbu ya Tíro na Sidóni. | |
| Matt | LinVB | 11:23 | Mpé yǒ, Kafárnaum, okanísí ’te bakotómbola yǒ kín’o likoló ? Wápi ! Okokita o límfelo. Sókó makamwísi masálémí o mbóka yǒ masálémáká o Sódoma, mbele ebébákí té kín’o leló. | |
| Matt | LinVB | 11:24 | Yangó wâná nayébísí yǒ : Mokolo bakokáta makambo ma bato, etúmbu bakopésa yǒ ekoleka etúmbu ya Sódoma. » | |
| Matt | LinVB | 11:25 | O ntángo êná Yézu alobí : « Natóndí yǒ, Tatá, Mokonzi wa likoló na nsé, zambí oyébísí bato baké maye obómbélí bato ba bwányá mpé ba mayéle. | |
| Matt | LinVB | 11:27 | Tatá wa ngáí apésí ngáí bínso ; moto mǒkó té ayébí Mwána, bobélé Tatá ayébí yě ; mpé moto mǒkó té ayébí Tatá, bobélé Mwána ayébí yě ná mpé moto óyo Mwána alingí kolakisa. | |
| Matt | LinVB | 11:29 | Bóndima mókúmbá nakomemisa bínó, mpé bólanda matéya ma ngáí, zambí nazalí motéma bobóto na bosáwa, mpé mitéma mya bínó mikozwa bopémi, | |