Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 17
Matt LinVB 17:1  Nsima ya mikolo motóbá Yézu akamátí Pétro, Yakóbo na ndeko wa yě Yoáne, akeí na bangó o esíká ya kímíá o ngómbá esándá.
Matt LinVB 17:2  Abóngwání na nzóto o míso ma bangó : elongi ya yě ekómí kongenge lokóla mwésé, bilambá bya yě bikómí mpémbé lokóla mwinda.
Matt LinVB 17:3  Tálá boye, bamóní Móze na Elía babimélí bangó mpé babandí kosolola na Yézu.
Matt LinVB 17:4  Pétro alobí na yě : « Mokonzi, kozala áwa ezalí malámu míngi. Sókó olingí, nápika biéma bísáto áwa : yǒ kó ya yǒ, yǒ kó ya Móze, yǒ kó ya Elía. »
Matt LinVB 17:5  Ntángo azalákí koloba bôngó, limpata lingengí lokóla mói liyéí kozipa bangó, mpé loláká lolobí út’o limpata : « Oyo azalí Mwána wa ngáí wa bolingo, nakosepelaka yě míngi ; bóyóka yě. »
Matt LinVB 17:6  Eyókí bayékoli loláká lôná, bakwéí bilongi o nsé, bayókí nsómo mpenzá.
Matt LinVB 17:7  Kasi Yézu abelémí na bangó, asímbí bangó, alobí : « Bótéleme, bóbánga té. »
Matt LinVB 17:8  Bátómbola míso, bamóní lisúsu moto mǒkó té, bobélé Yézu yě mǒ­kó.
Matt LinVB 17:9  Ntángo bazalákí kokita ngómbá, Yézu apekísí bangó, yě ’te : « Maye bomónókí, bóloba mangó na moto mǒkó té, téé mokolo Mwána wa Moto akosékwa o bawá ».
Matt LinVB 17:10  Bayékoli batúní yě motúna moye : « Mpô níni batéyi ba Mobéko bakolobaka ’te libosó Elía asengélí koyâ ? »
Matt LinVB 17:11  Azóngísí : « Ya sôló, Elía akoyâ kobongisa makambo mánso,
Matt LinVB 17:12  kasi ngáí nalobí na bínó : Elía asílí ayákí, kasi bandimákí yě té, mpé basálákí na yě lokóla bangó mǒkó balingákí. Sé bôngó bakoyókisa Mwána wa Moto mpási ».
Matt LinVB 17:13  Sikáwa bayékoli bayébí ’te na maloba maye alakísí Yoáne Mobátisi.
Matt LinVB 17:14  Ntángo bakómí epái ya bato, moto mǒkó abelémí na Yézu, afukámélí yě, alobí :
Matt LinVB 17:15  « Mokonzi, yókélá mwána wa ngáí mawa, azalí na bokono bwa bonsíngá, azalí koyóka mpási míngi : mbala míngi ako­kwéyaka o móto tǒ o mái.
Matt LinVB 17:16  Nakendékí na yě epái ya bayékoli ba yǒ, kasi bakokákí kobíkisa yě té. »
Matt LinVB 17:17  Yézu azóngísí : « Bínó, lisangá lya bato bazángí boyambi, bato babébá ! Mikolo bóní názala naíno na bínó ? Mikolo bóní nákanga naíno motéma na makambo ma bínó ? Bóyâ na yě. »
Matt LinVB 17:18  Yézu agángélí zábolo, mpé zábolo abimí o nzóto ya mwána. O ntángo êná mwána abíkí.
Matt LinVB 17:19  Bayékoli bayéí epái ya Yézu ; ntángo bazalákí na yě bobélé bangó mǒkó, batúní yě : « Mpô níni tokokákí kobengana yě tě ? »
Matt LinVB 17:20  Alobí na bangó : « Mpô bozalí na boyambi boké. Ya sôló sôló, nalobí na bínó : sókó bozalí atâ na mwâ boyambi lokóla mbóto ya sénevé bokoloba na ngómbá eye : ‘Longwá áwa, kendé kúná’, ekosálema. Likambo lyǒ kó té lilekí bínó na bokási. » (
Matt LinVB 17:22  Ntángo bazalákí elongó o Galiléa, Yézu alobí na bangó : « Bakokaba Mwána wa Moto o mabóko ma bato,
Matt LinVB 17:23  bakoboma yě, kasi akosé­kwa o mokolo mwa mísáto. » Maloba mâná mayókísí bangó mawa míngi o mitéma.
Matt LinVB 17:24  Ezóngí bangó o Kafárnaum, bafútisi mpáko ba Témpelo bayéí epái ya Pétro, batúní : « Motéyi wa bínó akofútaka mpáko ya Témpelo té ? »
Matt LinVB 17:25  Pétro azóngísí : « Akofútaka. » Ekótí yě o ndáko, Yézu abandí koloba libosó, atúní : « Simóni, okanísí níni : Bakonzi ba nsé bakofútisaka banáni mpáko ? Bána mbóka tǒ bato basúsu ? »
Matt LinVB 17:26  Pétro ayanólí : « Bato basúsu. » Yézu azóngísí : « Bôngó bána mbóka bakofútaka té !
Matt LinVB 17:27  Nzókandé mpô ya kopésa bato esímbisi té, kendé epái ya etíma, bwáká ndóbo o mái. Mbísi okoboma libosó, kangá yangó, fungólá yangó monoko ; okomóno ebendé ya mosolo. Kamátá yangó mpé pésá bangó lokóla mpáko ya bísó bábalé. »