Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next
Chapter 2
Matt LinVB 2:1  Ebótámí Yézu o Beteléme ya Yudéa, o eleko ya mokonzi Eróde, banganga minzóto bayéí o Yerúzalem, baútí epái ya Esti,
Matt LinVB 2:2  batúní ’te : « Mokonzi wa ba-Yúda óyo abótámí sika azalí wápi ? tomónókí monzóto mwa yě mobimí epái ya Esti mpé toyéí kokú­mbamela yě. »
Matt LinVB 2:3  Eyókí Eróde bôngó, akómí mo­téma likoló, ná bato bánso ba Ye­rúzalem lokóla.
Matt LinVB 2:4  Eróde abyángí banga­nga bakonzi na batéyi ba Mobéko bánso, mpé atúní bangó esíká níni Krístu asengélí kobótama.
Matt LinVB 2:5  Bayanólí yě : « O Beteléme ya Yudéa, zambí proféta mǒkó akomí boye :
Matt LinVB 2:6  Yǒ Beteléme, mabelé ma Yúda, ozalí etúká ya nsúka ya Yúda té, zambí mokonzi mǒkó akobótama na yŏ, óyo akozala mokéngeli wa ekólo ya ngáí Israél. »
Matt LinVB 2:7  Eróde abyángí banganga minzóto na bonkútú mpé atúní bangó malámu ntángo níni mpenzá mo­nzóto momónónókí o likoló.
Matt LinVB 2:8  Atíndí bangó o Beteléme, alobí : « Bókende kotúna malámu mpô ya mwána. Sókó bomóní yě, bóyâ koyébisa ngáí, mpô ’te ngáí mpé nákende kokúmbamela yě. »
Matt LinVB 2:9  Awa bayókí maloba ma mokonzi, bakeí. Mpé tálá, monzóto bamónókí epái ya Esti motámbólí libosó lya bangó téé mokeí kotéleme likoló lya esíká mwána azalákí.
Matt LinVB 2:10  Emóní bangó monzóto, bayókí esengo enéne.
Matt LinVB 2:11  Bayíngélí o ndáko, bamóní mwána ná María mamá wa yě, bafukámí mpé bakúmbámélí yě. Bafungólí bilóko bamemí mpé babonzélí yě makabo : wólo, mpaka ya malási na míra.
Matt LinVB 2:12  Awa Nzámbe ayébísí bangó na ndóto ’te bázónga epái ya Eróde té, balandí nzelá esúsu mpô ya kozónga o ekólo ya bangó.
Matt LinVB 2:13  Awa banganga minzóto bakeí, Anzelú wa Mokonzi abimélí Yozéfu o ndóto, alobí na yě : « Télémé, kamátá mwána ná mamá wa yě, kímá o Ezípeti mpé tíkálá kúná téé mokolo nakoyébisa yŏ, zambí Eróde azalí koluka mwána mpô ya koboma yě. »
Matt LinVB 2:14  Yozéfu atélémí o káti ya butú, akamátí mwána ná mamá wa yě, mpé akeí o Ezípeti.
Matt LinVB 2:15  Atíkálí kúná kín’o liwá lya Eróde, mpô ’te ésálema lokóla Mokonzi alobákí na monoko mwa proféta : Nabyángí mwána wa ngáí út’o Ezípeti.
Matt LinVB 2:16  Emóní Eróde ’te banganga mi­nzóto bakósí yě, ayókí nkándá enéne, atíndí ’te, o Beteléme mpé o mambóka ma penepene, báboma bána bánso bakokísí naíno mibú míbalé té. Na yangó alandí mikolo banganga bayébísákí yě.
Matt LinVB 2:17  Esálémí bôngó mpô ya kokokisa maloba ma proféta Yeremía :
Matt LinVB 2:18  Loláká loyókání o Rama : boleli mpé bokímeli na mawa ; Rakéle moto azalí kolela bána ba yě, mpé alingí té ’te bábóndo yě, mpô bána ba yě bazalí lisúsu té.
Matt LinVB 2:19  Nsima ya liwá lya Eróde, Anze­lú wa Mokonzi abimélí Yozéfu o ndóto o Ezípeti,
Matt LinVB 2:20  alobí na yě : « Télémé, kamátá mwána ná mamá wa yě, zóngá o mokili mwa Israél, zambí baye bali­ngákí koboma mwá­na basílí bawéí. »
Matt LinVB 2:21  Yozéfu atélémí, mpé na mwána ná mamá wa yě azóngí o mokili mwa Israél.
Matt LinVB 2:22  Kasi eyókí yě ’te Arkeláo akómí mokonzi wa Yudéa o esíká ya tatá wa yě Eróde, abángí kokende kúná ; bakébísí yě o ndóto, yangó wâná akeí o ekólo ya Galiléa.
Matt LinVB 2:23  Ekómí yě kúná, akeí kofánda o mbóka Nazaréte, mpô ’te ésálema lokóla baproféta balobákí : Bakobyánga yě moto wa Nazaréte.