MATTHEW
Chapter 3
Matt | LinVB | 3:3 | Mpô ya yě mpenzá proféta Izáya alobáká : Moto abélélí o elíkí, yě ’te : Bóbongisela Mokonzi nzelá, bósémbola nzelá ya yě. | |
Matt | LinVB | 3:4 | Yoáne azalákí koláta elambá ya nsúki ya kaméla mpé komíkanga mokába mwa lomposo la nyama o lokéto ; azalákí kolía mitó mya bítekuteku mpé mafúta ma nzói ya zámba. | |
Matt | LinVB | 3:5 | Bato ba Yerúzalem, bato bánso ba Yudéa mpé ba ekólo penepene na Yordáne bakeí epái ya yě, | |
Matt | LinVB | 3:7 | Awa amóní ’te ba-Farizéo na ba-Saduséo baíké bayéí mpô ya batísimo, alobí na bangó : « Bána ba nyóka, náni alakísí bínó kokíma Nkándá ekoyâ | |
Matt | LinVB | 3:9 | mpé bótíka koloba o mitéma : ‘Abaráma azalí tatá wa bísó’. Zambí nayébísí bínó : Nzámbe akokí kosála ’te mabángá maye mákoka kobimisela Abaráma bána. | |
Matt | LinVB | 3:10 | Basílí batíí sóka o ntína ya nzeté ; nzeté ínso ikobóta mbuma ilámu té, bakokáta mpé bakobwáka yangó o móto. | |
Matt | LinVB | 3:11 | Ngáí nazalí kobátisa bínó na mái mpô ’te bóbóngola mitéma, kasi óyo akoyâ nsima ya ngáí, alekí ngáí na ngúyá ; nabongí té kolongola mapápa o makolo ma yě : yě akobátisa bínó na Elímo Sántu mpé na móto. | |
Matt | LinVB | 3:12 | Asímbí lúngu o mabóko, akopepe mbuma ya yě ; akosangisa mbuma ya mámpa o ebómbelo, kasi akotumba mpumbulú o móto mokozíma té. » | |
Matt | LinVB | 3:13 | O ntángo êná Yézu aútí o Galiléa mpé ayéí o Yordáne epái ya Yoáne mpô ’te ábátisa yě. | |
Matt | LinVB | 3:14 | Kasi Yoáne alingí kopekisa yě, alobí : « Ngáí moto nasengélí kokúla batísimo na mabóko ma yŏ, bôngó yŏ okoyâ epái ya ngáí ! » | |
Matt | LinVB | 3:16 | Ekúlí Yézu batísimo, abimí o mái. Mpé tálá, likoló lifungwání mpé amóní Elímo wa Nzámbe lokóla ebengá, akitélí yě. | |