PHILIPPIANS
Chapter 3
Phil | LinVB | 3:1 | Bandeko ba ngáí, bósepela mpô ya Mokonzi… Nalembí té kokomela bínó lisúsu maye nakomákí libosó, mpô bosengélí koyéba mangó malámu. | |
Phil | LinVB | 3:2 | Bókébaka na mbwá ! Bókéba na basáli babé ! Bókéba na baye balingí kokátakáta nzóto na lokutá ! | |
Phil | LinVB | 3:3 | Bato bakátísí nzóto sôló, ezalí bísó té ? Bísó bato tokokúmisaka Nzámbe lokóla Elímo atíndí ; tokolukaka lokúmu la bísó o Krístu Yézu, tokotíaka mitéma té na maye matálí nzóto. | |
Phil | LinVB | 3:4 | Atâ ngáí nakokí kotía motéma na maye matálí nzóto ! Sókó moto mosúsu akanísí ’te akokí kotía motéma na maye matálí nzóto, ngáí nalekí yě ! | |
Phil | LinVB | 3:5 | Bakátísí ngáí nzóto mikolo mwambi nsima ya kobótama, nazalí moto wa ekólo ya Israél, wa libótá lya Benyamin ; ngáí mo-Ebréi, mwána wa ba-Ebréi. Nazalákí kotósa Mobéko lokóla mo-Farizéo ; | |
Phil | LinVB | 3:6 | na moléndé nazalákí monyókoli wa Eklézya. O maye matálí bosémbo boye bakozwaka na botósi mibéko bakokákí kofúnda ngáí na likambo lyǒ kó té. | |
Phil | LinVB | 3:8 | Sôló, o míso ma ngáí mánso mazalí sé mpámba ; sé elóko yǒ kó elekí malámu : koyéba Krístu Yézu Mokonzi wa ngáí. Mpô ya yě nandimí kobúngisa mánso mpé nakómí kotála mánso lokóla bosoto, mpô ’te názwa Krístu, | |
Phil | LinVB | 3:9 | násangana na yě. Natíkí koluka bosémbo bwa ngáí mǒkó, boye bakozwaka mpô ya botósi Mobéko, kasi nazalí koluka bosémbo boye bakozwaka mpô ya boyambi Krístu, boye Nzámbe akopésaka mpô ya boyambi. | |
Phil | LinVB | 3:10 | Nalingí koyéba Krístu, koyóka ngúyá ya nsékwa ya yě, o mpási názala na yě lisangá, nákúfa mpé lokóla yě akúfákí, | |
Phil | LinVB | 3:12 | Sôló, nakokísí mâná mánso naíno té, nakómí naíno mosántu té. Kasi nazalí koluka na motéma mónso názwa mangó, lokóla Krístu Yézu asílí azwí ngáí. | |
Phil | LinVB | 3:13 | Bandeko, nayébí malámu ’te nazwí mangó naíno té, nazalí koluka sé mpô yǒ kó : nábósana maye masílí malekí, nátía motéma mobimba na maye mazalí koyâ ; | |
Phil | LinVB | 3:14 | bôngó, nazalí kokende mbángu téé nsúka, mpô ’te názwa lifúta Nzámbe alakélákí bato bayambí Krístu Yézu. | |
Phil | LinVB | 3:15 | Bísó bánso tokómí bakóló o boyambi, tosengélí kokanisa bôngó. Sókó na likambo lyǒ kó bozalí na makanisi masúsu, Nzámbe moto akopésa bínó mpé mayéle. | |
Phil | LinVB | 3:17 | Bandeko, bínó bánso bólanda ndakisa ya ngáí, bótálaka malámu baye bakosálaka lokóla tolakísákí bínó. | |
Phil | LinVB | 3:18 | Nasílí koyébisa bínó mbala míngi, sikáwa nayébísí bínó lisúsu na mái o míso : Bato baíké bazalí na ezalela ebé, bazalí bangúná ba kurúse ya Krístu : | |
Phil | LinVB | 3:19 | nsúka ya bangó, sé liwá ! Nzámbe wa bangó, libumu lya bangó ! Bakomíkúmisaka na maye masengélí koyókisa bangó nsóni, bakokanisaka sé mambí ma nsé eye ! | |
Phil | LinVB | 3:20 | Kasi mbóka ya bísó ezalí o likoló : tozalí kozila na mpósá enéne Mokonzi wa bísó Yézu Krístu, Mobíkisi wa bísó, akoúta kúná. | |