Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PHILIPPIANS
1 2 3 4
Prev Up Next
Chapter 4
Phil LinVB 4:1  Yangó wâná, bandeko ba ngáí ba bolingo, nazalí na mpósá enéne ya komóno bínó, bínó bozalí ntína ya esengo mpé lokúmu la ngáí ! Bópikama o Mokonzi, bandeko ba ngáí ba bolingo.
Phil LinVB 4:2  Nabóndélí bínó bábalé, Evódia na Sintíke : bóyókana malámu mpô ya Mokonzi.
Phil LinVB 4:3  Mpé yǒ, Sizígo, móníngá wa ngáí wa sôló, naséngí yǒ ’te ósálisa bangó ; zambí o mosálá mwa bosangeli Nsango Elámu basálísákí ngáí, elongó na Klemási mpé na báníngá ba ngáí basúsu : nkómbó ya bangó ikomámí sikáwa o búku ya bomoi.
Phil LinVB 4:4  Bósepelaka o Mokonzi ntángo ínso. Nalobí yangó lisúsu : bósepela !
Phil LinVB 4:5  Bato bánso bámóno ’te bozalí motéma bobóto. Mokonzi alingí áyâ.
Phil LinVB 4:6  Bómítungisa té, atâ na níni, kasi bósámbela mpé bóbóndela Nzámbe mpô ya kosénge yě mánso masengélí na bínó. Bótóndo yě mpé botóndi.
Phil LinVB 4:7  Bobóto Nzámbe akopésaka bolekí mánso bato bakokí kokanisa, bokobátela mitéma mpé makanisi ma bínó o Krístu Yézu.
Phil LinVB 4:8  Mpô ya kosúkisa, bandeko : bósála mambí ma sôló, maye malo­ngóbání ; bózala na bosémbo, na bopéto, na bolingi mpé na motéma molámu ; bókanisa bobélé mambí mabongí, maye makozwelaka moto lokúmu.
Phil LinVB 4:9  Bósála maye boyékólákí, bozwákí, boyókákí mpé bomónókí epái ya ngáí. Bôngó Nzámbe wa bobóto akozala na bínó.
Phil LinVB 4:10  Nasepélí míngi o Mokonzi mpô namóní ’te bozwí nzelá ya kolakisa ngáí lisúsu motéma molámu. Sôló, bozalákí kokanisa ngáí míngi, kasi bozwákí lisúsu nzelá té ya kolakisa ngáí yangó.
Phil LinVB 4:11  Sókó nalobí bôngó ezalí té mpô nakélélí : o makambo mánso ngáí mǒkó nakokokisa bilóko biye bisengélí na ngáí.
Phil LinVB 4:12  Kokélela tǒ kozala na bilóko míngi, nayébí níni yangó. Ntángo ínso mpé na ndéngé ínso nameséní kotónda tǒ koyóka nzala, názala na bilóko míngi tǒ nákélela.
Phil LinVB 4:13  Nakokí na mâná mánso mpô ya Krístu óyo akoléndisaka ngáí.
Phil LinVB 4:14  Nzókandé bosálákí malámu áwa bosálísákí ngáí o mambí makwêlákí ngáí.
Phil LinVB 4:15  Bato ba Filípi, bínó mǒkó boyébí yangó malámu : Ebandákí ngáí kosangela Nsango Elámu, ntángo natíkákí Masedónia, Eklézya yǒ kó té esálísákí ngáí na mosolo, bobélé bínó.
Phil LinVB 4:16  Ntángo nazalákí o Tesaloníki, bínó botíndélákí ngáí mbala íbalé bilóko bisengélákí na ngáí.
Phil LinVB 4:17  Nakolukaka makabo té, sôló, kasi nalingí ’te bózwa litómba mpô ya mosálá mwa bínó.
Phil LinVB 4:18  Sikáwa bilóko bikokí na ngáí, bilekí míngi kútu. Natóndí na makabo ma bínó maye Epafrodíto ayélákí ngáí. Nzámbe ayambí mangó bǒ libonza lya nsolo mpí­mbó lisepélísí yě.
Phil LinVB 4:19  Engébéné na nkita ya yě ya nkémbo, Nzámbe wa ngáí akokabela bínó, o Krístu Yézu, bínso bizángí bínó.
Phil LinVB 4:20  Lokúmu na Tatá wa bísó Nzámbe o bileko na bileko ! Amen.
Phil LinVB 4:21  Bópésa basántu bánso mbóte o nkómbó ya Krístu Yézu. Bandeko bazalí áwa na ngáí batíndélí bínó mbóte.
Phil LinVB 4:22  Bandeko bánso batí­ndélí bínó mbóte, libosó baye bazalí o ndáko ya Kaizáro.
Phil LinVB 4:23  Ngrásya ya Mokonzi Yézu Krís­tu ézala na bínó !