Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
REVELATION OF JOHN
Prev Up Next
Chapter 5
Reve LinVB 5:1  O lobóko la mobáli la Óyo afándí o ngwendé namóní Búku elí­ngámí ; bakomí o búku epái ya libándá mpé ya káti, bakangí yangó na bikangeli nsambo.
Reve LinVB 5:2  Mpé namóní Anzelú wa ngúyá, abandí kosakola na mongóngó makási : « Náni abongí kobúka bikangeli mpé kofungola búku ? »
Reve LinVB 5:3  Kasi moto mŏ kó té, o likoló, o nsé tŏ o nsé ya mabelé, akokí kofungola búku mpé kotánga yangó.
Reve LinVB 5:4  Nalelí míngi mpô moto mŏ kó té alongóbání kofu­ngola búku mpé kotánga yangó.
Reve LinVB 5:5  Bôngó mŏ kó wa Babangé alobí na ngáí : « Olela té. Nkósi wa libótá lya Yúda, Ebóto wa Davídi, alóngí etumba ; yě moto akobúka bikangeli nsambo mpé akofungola búku. »
Reve LinVB 5:6  Na nsima namóní káti ya ngwendé ya ba-Bomoi bánei mpé ya Baba­ngé, Mwâ-Mpatá atélémí, lokóla asílí abomámí. Azalákí na maséké nsambo mpé na míso nsambo, byangó ndé Bilímo nsambo bya Nzámbe, biye atíndákí o nsé mobimba.
Reve LinVB 5:7  Mwâ-Mpatá abelémí mpé akamátí búku ezalákí o lobóko la mobáli la Oyo afándí o ngwendé.
Reve LinVB 5:8  Awa akamátí búku, ba-Bomoi bánei na Babangé ntúkú íbalé na bánei bakúmbámélí Mwâ-Mpatá. Mŏ kó mŏ kó wa bangó azalákí na nzenze mpé na nkéni ya wólo etóndí na malási ; yangó ndé losámbo la basántu.
Reve LinVB 5:9  Bayémbí nzémbo ya sika. « Sôló, olongóbání kokamata búku mpé kobúka bikangeli bya yangó, mpô babomákí yŏ, mpé na makilá ma yŏ osikólí bato ba mabótá mánso, ba nkóta ínso, ba bikólo bínso mpé ba mikili mínso, opésí bangó na Nzámbe.
Reve LinVB 5:10  Mpô ya Nzámbe wa bísó okómísí bangó bakonzi mpé banganga Nzá­mbe baye bakoyá­ngela mokili. »
Reve LinVB 5:11  Nátála boye, nayókí mingó­ngó mya Bǎnzelú ebelé bazíngí ngwendé, ba-Bomoi mpé Baba­ngé ; bazalákí nkóto na nkóto, bifúku na bifúku !
Reve LinVB 5:12  Bagángí makási : « Mwâ-Mpatá babomákí alo­ngó­bání kozwa ngúyá, nkita, bwányá na bokási : bákúmisa, bákémbisa mpé báyémbela yě. »
Reve LinVB 5:13  Sikáwa nayókí bikelámo bínso o likoló, o mokili, o nsé ya mabelé, o káti ya mbú : bikelámo bínso bya molóngó mobimba bayémbí boye : « Oyo afándí o ngwendé na Mwâ-Mpatá lokóla bázwa makúmísí, lokúmu, nkémbo na ngúyá o bileko na bileko ! »
Reve LinVB 5:14  Ba-Bomoi bánei balobí : « Amen », mpé Babangé bakwéí bilongi o nsé mpô ya kokúmbamela.