DEUTERONOMY
Chapter 8
Deut | LinVB | 8:1 | Botosa mitindo minso natindi bino lelo mpe bokokisa myango mpo ’te bobika mpe bokoma bato ebele, bokoka koyingela o mokili moye Yawe alayelaki bankoko ba bino ndai ’te bokozwa mwango. | |
Deut | LinVB | 8:2 | Bokanisa ndenge Yawe atambwisaki bino mbula ntuku inei o eliki, ayokisaki bino nsoni mpe amekaki bino mitema mpo ’te ayeba soko ya solo mpenza bokotosa mibeko mya ye. | |
Deut | LinVB | 8:3 | Ayokisaki bino nsoni na nzala ; kasi aleisaki bino manu, bino na bankoko ba bino boyebaki bilei bina te. Bongo alakisaki bino ’te moto akobika bobele na mampa te, kasi na maloba manso makobima o monoko mwa Yawe. | |
Deut | LinVB | 8:5 | Bongo boyeba ’te Yawe Nzambe wa bino abokoloki bino lokola tata akosalaka na mwana wa ye. | |
Deut | LinVB | 8:7 | Yawe Nzambe wa bino akoyingisa bino o mokili molamu, mozali na miluka mpe na maziba mingi, makobimaka o mabwaku mpe o ngomba. | |
Deut | LinVB | 8:8 | Mabelé makobotaka loso na masangu, nzete ya vino, ya figi mpe ya malala, mokili mozali na mafuta ma oliva mpe ma nzoi ; | |
Deut | LinVB | 8:9 | mokili esika bokoki kolia mampa lokola motema molingi, esika bokokelela soki te : na botimoli mabelé bokozwa bibende, mpe o ngomba bokobimisa mitako. | |
Deut | LinVB | 8:10 | Bokolia mpe bokotonda mpe bokokumisa Yawe Nzambe wa bino o mokili mwa esengo apesi bino. | |
Deut | LinVB | 8:11 | Kasi bokeba : bobosana Yawe Nzambe wa bino te. Boboya mitindo mya ye te, na mibeko na mimeseno minso natindi bino lelo. | |
Deut | LinVB | 8:13 | bokomi na ngombe mpe na mpata ebele, na misolo, na wolo mingi, mpe na biloko ndenge na ndenge, | |
Deut | LinVB | 8:14 | o mokolo mona bokoma na lolendo te ! Bobosana te ’te Yawe Nzambe wa bino alongolaki bino o mokili mwa Ezipeti esika bozalaki baombo. | |
Deut | LinVB | 8:15 | Ye mpenza akatisaki bino eliki enene ya nsomo, etondi na nyoka ya ngenge mpe na nkoto, eliki ezangi mai ma komele ; ye mpe abimiselaki bino mai o mabanga makasi. | |
Deut | LinVB | 8:16 | Aleisaki bino manu o eliki, bankoko ba bino bayebaki bilei bina te. Ayokisaki bino nsoni mpe amekaki bino mitema mpo ’te bozwa bolamu nsima. | |
Deut | LinVB | 8:17 | Bokanisa mokolo moko te ’te : « Tozwi nkita yango biso moko, na bokasi bwa biso moko. » | |
Deut | LinVB | 8:18 | Kasi boyeba ’te Yawe Nzambe wa bino oyo alendisi bino mpo ’te bozala na nguya, zambi tee lelo akokokisa elako alakelaki bankoko ba bino. | |
Deut | LinVB | 8:19 | Ntembe te, soko bobosani Yawe Nzambe wa bino, soko bolandi banzambe basusu, bokumisi mpe bokumbameli bango, nayebisi bino lelo : Bokokufa ! | |