ECCLESIASTES
Chapter 10
Eccl | LinVB | 10:1 | Nzinzi epoli ekobebisa mafuta ma malasi ; mwa bozoba bokobebisa lokumu la moto wa bwanya. | |
Eccl | LinVB | 10:2 | Motema mwa moto wa bwanya mokokende nzela elamu, motema mwa moto zoba mokokende nzela ebe. | |
Eccl | LinVB | 10:3 | Ata o nzela, zoba azali na mayele te, na makambo akosalaka, bato banso bakomono ’te azali zoba. | |
Eccl | LinVB | 10:4 | Soko mokonzi asiliki na yo, okima mosala te, zala motema mpio mpo obebisa mosala mwa yo te. | |
Eccl | LinVB | 10:7 | Namoni baombo bakomi kotambwisa farasa, mpe bankumu batamboli na makolo lokola baombo. | |
Eccl | LinVB | 10:8 | Moto atimoli libulu, ye moko akoki kokweya o kati, moto abuki efelo, nyoka ekoki koswa ye. | |
Eccl | LinVB | 10:10 | Soko mbeli esili bopotu mpe basebi yango te, osengeli kosala makasi mingi mpo ya kokata ; na bwanya okozwa litomba noki. | |
Eccl | LinVB | 10:11 | Soko nyoka eswi zambi banyelisi yango malamu te, litomba nini monyelisi wa yango akozwa ? | |
Eccl | LinVB | 10:12 | Maloba ma moto wa bwanya makosepelisaka bato, kasi mbebu ya moto zoba ikobungisa ye. | |
Eccl | LinVB | 10:13 | Efungoli ye monoko, akolobaka makambo ma bozoba, maloba ma ye ma nsuka, bolema mpenza. | |
Eccl | LinVB | 10:14 | Moto zoba akolobaka makambo kilikili, nzokande ayebi te makambo nini makoya. Nani kutu akoki kolakisa ye makambo mana ? | |
Eccl | LinVB | 10:16 | Mawa na ekolo soko mokonzi azali se mwana, soko bankumu ba mboka bakomeleke masanga ut’o ntongo. | |
Eccl | LinVB | 10:17 | Esengo na ekolo soko mokonzi auti o libota lya bankumu, mpe soko bankumu bakolia o ntango ekoki, mpo ya elengi ya bilei te, kasi mpo bazwa bokasi. | |
Eccl | LinVB | 10:18 | Soko moto aleki goigoi, likonzi lya ndako likopolo, soko maboko maboyi mosala, ndako ekotanga mbula. | |
Eccl | LinVB | 10:19 | Bilei bikoyokisaka elengi, vino ekosepelisaka bomoi bwa bato, mpe na mosolo bakoki kosomba biloko binso. | |