Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CORINTHIANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 6
I Co LinVB 6:1  Sókó moto mǒkó o káti ya bínó azwí likambo na móníngá, ndéngé níni akobánga té kokende kosámba epái ya bapagáno ? Mpô níni akokende epái ya basántu té ?
I Co LinVB 6:2  Boyébí té ’te basántu bakosámbisa bato ba mokili mobimba ? Bôngó, sókó bínó bokosámbisa bato ba mokili, bokokí kokáta makambo ma mpámba té ?
I Co LinVB 6:3  Boyébí té ’te bísó bato tokokáta likambo lya bǎnzelú ? Yangó wâná bokokí kokáta makambo ma bato ba nsé eye !
I Co LinVB 6:4  Nzókandé, sókó bozalí na likambo lya motíndo moye, bokokendeke kosámba libosó lya bazúzi baye bato ba Eklézya bakokínolaka !
I Co LinVB 6:5  Nalobí yangó mpô ya koyókisa bínó nsóni ! Sôló, o káti ya bínó moto mǒkó wa mayéle azalí té, óyo akokí kosámbisa bandeko ba yě bakrístu ?
I Co LinVB 6:6  Kasi bínó na bínó bandeko bakrístu bokofúndanaka o esámbi ya bapagáno !
I Co LinVB 6:7  Kofúndana bôngó ezalí likambo lya mawa míngi. Mpô níni bokokí kokanga mitéma té sókó bayókísí bínó mpási ? Sókó bato balingí kobótolo bínó elóko, mpô níni botíkélí bangó yangó té ?
I Co LinVB 6:8  Kasi bínó mǒkó bokosálaka mabé, bokobótoloko bilóko bya bato baye bazalí bandeko ba bínó !
I Co LinVB 6:9  Bôngó boyébí té ’te bato bazá­ngí bosémbo bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe té ? Bómíkósa té ! Bato bakosálaka bosóni, bato bakosámbelaka bikeko, bato ba bokáli, bato ba ezalela ebé, babáli baye bakosálaka bosóni na babáli,
I Co LinVB 6:10  bayíbi, bato ba lokósó la mbóngo, baye bakolángwaka masanga, baye bakofíngaka mpé bakobótoloko bato basúsu bilóko, bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe té.
I Co LinVB 6:11  Sôló, basúsu o káti ya bínó bazalákí kosála yangó, kasi sikáwa bosukwámí na mái, basántísí bínó ; bo­zwí libíkí o nkómbó ya Mokonzi Yézu Krístu mpé na Elímo wa Nzámbe wa bísó.
I Co LinVB 6:12  Basúsu bakolobaka : « Nakokí kosála mánso nalingí kosála ». Sôló, kasi mánso mazalí na litómba té. « Nakokí kosála mánso nalingí kosála », kasi nalingí kozala moómbo wa elóko té.
I Co LinVB 6:13  Biléi bizalí mpô ya libumu, mpé libumu likokí na biléi, nzókandé Nzámbe akoboma ná biléi mpé ná libumu. Nzóto ekelámí té mpô ya kosála ekóbo ; nzóto ezalí ya Mokonzi ; yě Mokonzi azalí nkóló wa yangó.
I Co LinVB 6:14  Nzámbe óyo asékwísákí Yézu, akosékwisa mpé bísó na ngúyá ya yě.
I Co LinVB 6:15  Boyébí té ’te nzóto ya bínó izalí binama bya Nzóto ya Krístu ? Bôngó nákamata binama bizalí bya Krístu mpé nákomisa byangó binama bya ekobo ? Sókí moké té !
I Co LinVB 6:16  Boyébí mpé té ’te moto asangání na mwásí ndúmbá akómí na yě nzóto yǒkó ? Ekomámí bôngó o Minkandá : Bangó bábalé bakokóma nzóto sé yǒ kó.
I Co LinVB 6:17  Kasi moto asangání na Mokonzi akómí na yě elímo sé yǒ­kó.
I Co LinVB 6:18  Bókíma mambí ma ekóbo ! Masúmu masúsu mánso moto akokí kosála matálí nzóto ya yě té, kasi moto asálí ekóbo abébísí nzóto ya yě mǒkó.
I Co LinVB 6:19  Boyébí té ’te nzóto ya bínó izalí témpelo ya Elímo Sántu, óyo akofándaka o mitéma mya bínó, mpé óyo Nzámbe apésí bínó. Bínó bozalí bankóló ba nzóto ya bínó té.
I Co LinVB 6:20  Zambi basómbí bínó kosómba na motúya monéne ! Bôngó bókúmisa Nzámbe o nzóto ya bínó.