Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 14
II C LinVB 14:1  Asa asali se malamu o miso ma Yawe Nzambe wa ye.
II C LinVB 14:2  Alongoli bitumbelo na bisika bya kokumisa banzambe ba bampaya. Abuki mabanga mpe akati makonzi ma bikeko.
II C LinVB 14:3  Atindi bato ba Yuda ’te baluka se Yawe Nzambe wa bankoko ba bango, batosa Mobeko mpe biti­nda bya ye.
II C LinVB 14:4  O mboka inso ya Yuda alongoli bisika bya kokumisa banza­mbe ba bampaya mpe bitumbelo bya mpaka ya malasi. Bongo o eleko ye azalaki mokonzi, ekolo epemi.
II C LinVB 14:5  Alendisi bibombamelo o Yuda, mpo akomisi ekolo nye. O mibu mina bitumba bizalaki te, zambi Yawe apesi ye boboto.
II C LinVB 14:6  Alobi na bato ba Yuda : « Tolendisa bingumba biye, tozinga byango na lopango lonene mpe na manongi, totia bizibeli na bika­ngeli ; mokili mozali naino o maboko ma biso, zambi toluki Yawe Nzambe wa biso, mpe bipai binso Yawe abateli biso mpe apesi biso boboto. » Baba-ndi mosala mwa bolendisi bingumba tee basilisi mwango.
II C LinVB 14:7  Asa azalaki na basoda ba Yuda nkoto nkama isato, baye bazalaki na nguba mpe na liko-ngo ; azalaki mpe na basoda ba Be­nyamin nkoto nkama ibale na ntuku mwambe, baye bazalaki na nguba mpe na litimbo. Banso bazalaki basoda ba mpiko.
II C LinVB 14:8  Zera, moto wa Kus, ayei na basoda nkoto na nkoto mpe na makalo nkama isato ; bakomi o Maresa.
II C LinVB 14:9  Asa akei kozwana na ye ; babongisi milo-ngo mya bango mpo ya etumba o lo­bwaku la Sefata, penepene na Maresa.
II C LinVB 14:10  Asa abondeli Yawe Nzambe wa ye, alobi : « E Yawe, bobele yo okosalisaka ná moto makasi ná moto motau. E Yawe Nzambe wa biso, salisa biso ! Totii mitema se na yo, mpe toyei awa o nkombo ya yo mpo tobunda etu­mba na bato ebele ; e Yawe, yo ozali Nzambe wa biso. Ondima te ’te moto moko akoka na yo ! »
II C LinVB 14:11  Yawe akweisi bato ba Kus o etu­mba na bato ba Asa mpe ba Yuda ; bato ba Kus bakimi.
II C LinVB 14:12  Asa na bato ba ye balandi bango tee Gerar. Bato ba Kus bakufi mingi mpenza, bongo bakoki kokoba etumba te ; Yawe na bato ba ye bakweisaki bango. Bato ba Asa ba­botoli biloko ebele o etumba.
II C LinVB 14:13  Babotoli mpe bingumba binso penepene na Gerar, mpo Nsomo ya Yawe enyataki yango. Bingumba biye bizalaki na biloko mingi ; bayibi byango binso.
II C LinVB 14:14  Babebisi mpe mapango ma bibwele, babotoli mpata mpe kamela ebele. Na nsima bazongi o Yeruzalem.