II CORINTHIANS
Chapter 8
II C | LinVB | 8:1 | Bandeko, tolingí koyébisa bínó bóníbóní Nzámbe apésákí bato ba Biklézya bya Masedónia ngrásya ya yě. | |
II C | LinVB | 8:2 | Atâ bayókákí mpási ndéngé na ndéngé, bayókákí esengo enéne ; atâ bazalákí kokélela, bakongólókí mosolo míngi mpenzá. | |
II C | LinVB | 8:3 | Nayébísí bínó : bapésákí makabo lokóla ekokákí na bangó mpé leká naíno, mpô bangó mǒkó balingákí kosálisa. | |
II C | LinVB | 8:5 | Maye basálákí malekí maye tokokákí kolíkya ; bamíkabákí mobimba, libosó na Mokonzi, na nsima na bísó mǒkó, lokóla Nzámbe alingí. | |
II C | LinVB | 8:6 | Yangó wâná tobóndélí Títo ásúkisa malámu mosálá moye mwa bokongoli mosolo, mpô yě moto abandákí mwangó. | |
II C | LinVB | 8:7 | Kasi lokóla bolekí báníngá na makambo mánso : na boyambi, na botéyi, na boyébi, na bomípési na misálá ndéngé na ndéngé, mpé na bolingi bokolingaka bísó, ebongí mpé bóleka bangó na mosálá mwa bosálisi babóla. | |
II C | LinVB | 8:8 | Napésí bínó mobéko té, kasi na ndakisa ya mpíkó ya báníngá napésí bínó, nalingí komeka bínó sókó bolingani bwa bínó bozalí bwa sôlósôló. | |
II C | LinVB | 8:9 | Boyébí bóníbóní Mokonzi wa bísó Yézu Krístu alakísákí bolingi bwa sôló mpenzá : yě moto wa nkita akómí mobóla mpô ya bínó, mpô ’te ákómisa bínó bato ba nkita na bobóla bwa yě. | |
II C | LinVB | 8:10 | Nzókandé napésí bínó lilako liye : mosálá môná mobongí na bínó, mpô bínó bato bozwákí likanisi lîná libosó, mpé bobandákí mosálá mwangó o mbúla elekí. | |
II C | LinVB | 8:11 | Bôngó bósílisa mwangó sikáwa, lokóla bokánákí mwangó na esengo, bósílisa mwangó na mpíkó, lokóla ekokí na bínó. | |
II C | LinVB | 8:12 | Sôló, moto akopésa na motéma mǒkó, bakondima yě mpenzá ; elóko ezalí na yě té, bakosénge yě yangó mpé té. | |
II C | LinVB | 8:13 | Nalingí té ’te na bosálisi báníngá, bínó mǒkó bókóma kokélela ; ebongí bilóko bya bínó mpé bya bangó bíkokana. | |
II C | LinVB | 8:14 | Sikáwa bínó bozalí na bilóko míngi mpé bokokí kosálisa baye bakélélí, mbala esúsu bangó bakokoka kosálisa bínó na bilóko biíké sókó bínó bokélélí. Bôngó bilóko bya bínó mpé bya bangó bíkokana. | |
II C | LinVB | 8:15 | Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Moto asangísí bilóko míngi, azwí bilóko bilekí míngi té ; moto asangísí bilóko míngi té, azángí elóko té. | |
II C | LinVB | 8:16 | Tótóndo Nzámbe óyo atíí o motéma mwa Títo mpíkó sé ndéngé yǒ kó mpô ya kosálisa bínó. | |
II C | LinVB | 8:17 | Maye toséngékí yě ásála, asílí andimí mangó : azalí koyâ epái ya bínó na mpíkó enéne. | |
II C | LinVB | 8:18 | Na yě elongó totíndí ndeko mosúsu, óyo bakokúmisaka o Biklézya bínso mpô ya mosálá mwa yě mwa bosangeli Nsango Elámu. | |
II C | LinVB | 8:19 | Kútu bato ba Biklézya baponí yě ázala móníngá wa bísó o mosálá moye mwa bosálisi báníngá ; tokosálaka mosálá moye mpô ya nkémbo ya Mokonzi, mpé mpô ya kolakisa ’te tondimí mwangó na motéma mǒkó. | |
II C | LinVB | 8:20 | Tosálí bôngó mpô ’te bákoka kotóngo bísó té, áwa tozalí kokongolo mpé kobómba mosolo míngi boye. | |
II C | LinVB | 8:21 | Sôló, tosengélí kosála malámu bobélé o míso ma Nzámbe té, kasi o míso ma bato lokóla. | |
II C | LinVB | 8:22 | Na bangó elongó totíndélí bínó mpé mǒkó wa bandeko ba bísó óyo alakísákí mpíkó mbala na mbala o makambo ndéngé na ndéngé. Sikáwa azalí na mpíkó, mpô atíí motéma na bínó. | |
II C | LinVB | 8:23 | Títo azalí móníngá wa ngáí mpé mosálisi wa ngáí epái ya bínó ; bandeko basúsu bazalí bantóma ba Biklézya mpô ya lokúmu la Krístu. | |