DANIEL
Chapter 10
Dani | LinVB | 10:1 | Ntango Siro azalaki mokonzi wa ba-Persi, o mobu mwa misato mwa bokonzi bwa ye, Nzambe ayebisi likambo lyoko na Daniel, oyo bakotangaka mpe Baltasar. Ayebisi ye likambo lya solo mpe lya mpasi mingi. Daniel atongoli lyango malamu, bayebisi ye lyango o limoni. | |
Dani | LinVB | 10:3 | nazalaki kolia biloko elengi te, nameli vino mpe te, napakoli malasi o nzoto te poso isato mobimba. | |
Dani | LinVB | 10:4 | Sanza ya yambo, mikolo ntuku ibale na minei, nazalaki penepene na ebale enene Tigris. | |
Dani | LinVB | 10:5 | Ntango natomboli miso, namoni moto moko alati elamba mpembe, akangi mokaba mwa wolo bonzenga o loketo. | |
Dani | LinVB | 10:6 | Nzoto ya ye ezalaki kongenge lokola mabanga ma wolo, elongi ya ye lokola monkalali, mpe miso ma ye lokola mbuma ya móto, maboko na makolo ma ye lokola mbengi basukoli malamu. Lokito la mongongo mwa ye loyokani lokola mingongo mya bato ebele. | |
Dani | LinVB | 10:7 | Bobele ngai Daniel namoni limoni lyango. Bato bazalaki na ngai bamoni eloko te, kasi babangi mingi mpe bakimi mpo babombama. | |
Dani | LinVB | 10:8 | Natikali ngai moko. Ntango namoni limoni liye linene, makasi ma nzoto makomi kosilela ngai. Elongi ebongwani, nazalaki lisusu na makasi soki te. | |
Dani | LinVB | 10:11 | Alobi na ngai : « Daniel, molingami wa Nzambe, yoka maloba ma ngai malamu ; teleme, zambi batindi ngai epai ya yo. » Elobi ye bongo, natelemi na bolengi. | |
Dani | LinVB | 10:12 | Alobi na ngai : « Obanga te, Daniel, banda mokolo omekaki koyeba ntina ya maloba ma Nzambe mpe omikitisaki o miso ma ye, Nzambe ayokaki losambo la yo, mpe nayei mpo ya maloba ma yo. | |
Dani | LinVB | 10:13 | Elimo mobateli wa bokonzi bwa Persi aboyi kondima ngai mikolo ntuku ibale na moko, kasi elimo enene Mikael, moko wa baye baleki lokumu, ayaki kosalisa ngai, bongo natiki bakonzi ba-Persi. | |
Dani | LinVB | 10:14 | Nayei koyebisa yo makambo makokwela bato ba ekolo ya yo. Limoni liye litali makambo ma mikolo mikoya. » | |
Dani | LinVB | 10:16 | na nsima namoni ekelamo yoko, azalaki lokola moto, asimbi mbebu ya ngai ; nafungoli monoko mpe nabandi koloba. Nalobi na moto atelemi penepene na ngai : « Mokonzi, mpo ya limoni namoni nsomo ekangi ngai, nazali na makasi lisusu te. | |
Dani | LinVB | 10:17 | Boniboni ngai mosaleli wa yo nakoki koloba na yo, mokonzi, awa nazangi bokasi mpe mpema ya ngai ekomi kosila ? » | |
Dani | LinVB | 10:19 | Alobi na ngai : « Obanga te, molingami wa Nzambe, boboto na yo, zala makasi mpe na mpiko ! » Awa azalaki koloba na ngai bongo, nzoto elendi lisusu ; nalobi : « Mokonzi, loba zambi olendisi ngai. » | |
Dani | LinVB | 10:20 | Atuni ngai : « Oyebi mpo nini nayei epai ya yo ? Nasengeli kobunda na mokonzi wa Persi ; soko nasilisi etumba ena mokonzi wa Greke akoya. | |