DANIEL
Chapter 7
Dani | LinVB | 7:1 | O mobu mwa yambo mwa bokonzi mwa Belsazar o Babilon, Daniel aloti ndoto mpe amoni mamoni ntango alali o mbeto ; akomi ndoto ena o monkanda, abandi yango boye : | |
Dani | LinVB | 7:2 | Daniel alobi : Namoni mamoni na butu. Tala : mimpepe minei miuti o likolo mitomboli mbu enene ; | |
Dani | LinVB | 7:4 | Nyama ya liboso ezalaki lokola nkosi na mapapu ma engondo. Nátala boye, bakati nyama ena mapapu, batomboli yango mpe etelemi o makolo lokola moto ; bapesi yango mpe motema mwa moto. | |
Dani | LinVB | 7:5 | Nyama ya ibale ezalaki ndenge esusu, lokola ngubu etombwami moke epai yoko, ememi minkuwa misato mya mopanzi o monoko. Balobi na nyama ena : « Teleme mpe lia misuni mingi. » | |
Dani | LinVB | 7:6 | Na nsima natali mpe namoni nyama esusu lokola nkoi, ezalaki na mapapu manei ma ndeke o mipanzi, na mitó minei mpe na nguya enene. | |
Dani | LinVB | 7:7 | Na nsima namoni o limoni na butu nyama ya inei, ya nsomo mpenza, ebangisi ngai, ezalaki na nguya enene, na mino ma ebende manene mpenza. Nyama ena ekeketi minkuwa mpe enyati na makolo biye bitikali. Ekeseni na nyama isusu mpe ezalaki na maseke zomi. | |
Dani | LinVB | 7:8 | Ezalaki ngai kotala maseke ma yango, mwa liseke lya sika libimi, like mpenza, na mbala yoko maseke masato malongwi ; liseke like lina libimisi miso lokola miso ma moto, mpe lizwi monoko molobi makambo manene ! | |
Dani | LinVB | 7:9 | Ezalaki ngai kotala, batii ngwende mpe Mokóló moko ayei kofanda. Elamba ya ye ezalaki mpembe lokola mbula ya mpembe ; nsuki ya ye kitoko lokola nsuki ya mpata. Ngwende ya ye engengi lokola móto mopeli makasi ; yika ya yango ipeli mpe móto. | |
Dani | LinVB | 7:10 | Móto mozalaki kotiyola lokola ebale. Bato nkoto na nkoto basaleli ye, mpe bato nkoto zomi batelemi o boso bwa ye. Bazuzi bafandi mpe bafungoli buku inso. | |
Dani | LinVB | 7:11 | Nayoki maloba ma lolendo liseke lina lizalaki koloba ; natali tee… babomi nyama o miso ma ngai, nzoto ya yango ebebi mpe eziki o móto. | |
Dani | LinVB | 7:12 | Babotoli nyama isusu bokonzi ; babomi yango naino te, kasi batikeli yango mwa elaka ya kozala na bomoi. | |
Dani | LinVB | 7:13 | O limoni nalotoki na butu namoni moto moko ayei o mampata ma likolo, azalaki lokola ‘Mwana wa moto’. Ayei penepene na Mokóló, bakambi ye o boso bwa ye. | |
Dani | LinVB | 7:14 | Bapesi ye bokonzi, nkembo na nguya. Mpe bato ba bikolo binso, ba mikili minso mpe ba nkota inso bayei kosalela ye. Akozala mokonzi seko. Bokonzi bwa ye bokosila te ; ekolo ya ye ekobeba mokolo moko te. | |
Dani | LinVB | 7:16 | Nabelemi na moko wa baye batelemi wana mpe natuni ye ntina ya makambo mana. Azongiseli ngai, mpe ayebisi ngai ntina : | |
Dani | LinVB | 7:18 | Baye bakozwa bokonzi ezali basantu ba Nzambe wa Nta-Likolo, bakozwa bokonzi o bileko binso seko. » | |
Dani | LinVB | 7:19 | Na nsima natuni bayebisa ngai ntina ya solo ya nyama ya inei, eye ekeseni na nyama isusu, nyama eye ya nsomo na mino ma ebende mpe na manzaka ma mbengi, elei biloko, ekeketi minkuwa mpe enyati na makolo biloko binso bitikali. | |
Dani | LinVB | 7:20 | Natuni ntina ya maseke zomi o motó mwa nyama ena, mpe ya liseke lyoko lizalaki na miso mpe na monoko molobi makambo manene mpe lileki maseke masusu na bonene. | |
Dani | LinVB | 7:22 | Kasi Mokóló ayei kosamba likambo : alongisi basantu ba Nzambe wa likolo, mpe elaka ekomi ’te basantu bazwa bokonzi. | |
Dani | LinVB | 7:23 | Mokóló alobi : « Nyama ya inei elakisi mokonzi wa banei, akeseni na bakonzi basusu banso. Akosilisa mokili mobimba, akonyata mwango na makolo mpe akobebisa mwango. | |
Dani | LinVB | 7:24 | Maseke zomi ma bokonzi bona malakisi bakonzi zomi bakobima ; nsima ya bango mosusu akobima, akokesene na baye ba liboso, akoboma bakonzi basato. | |
Dani | LinVB | 7:25 | Akoloba maloba ma botuki Nzambe mpe akonyokolo basantu ba Nta-Likolo. Akoluka kobongola bileko mpe mobeko. Bongo basantu bakokweya mwa mibu o maboko ma ye. | |
Dani | LinVB | 7:26 | Kasi mokolo moko bakokata likambo lya ye, bakobotolo ye bokonzi ; bokonzi bwa ye bokokufa mpe bokosila nye. | |
Dani | LinVB | 7:27 | Nsima bokonzi, boyangeli mpe nkembo ya bikolo binso bikopesama na ekolo ya basantu ba Nta-Likolo. Bokonzi bwa ye bozali bokonzi bwa seko, mpe bato ba bikolo binso bakosalela mpe bakotosa ye. » | |