DANIEL
Chapter 9
Dani | LinVB | 9:1 | O mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Dario, moto wa ekolo ya ba-Medi, mwana wa Asuero, mokonzi wa ekolo ya ba-Kaldea, | |
Dani | LinVB | 9:2 | ngai Daniel nakei kotala minkanda misantu mpo ’te nayeba mibu boni mikoleka nsima ya Likama lya Yeruzalem, lokola Mokonzi Nzambe ayebisaki profeta Yeremia. Ezalaki mibu ntuku nsambo. | |
Dani | LinVB | 9:3 | Namibongoli epai ya Mokonzi Nzambe mpo nasambela mpe nabondela ye. Nalali nzala, nalati ngoto mpe nafandi o mputulu. | |
Dani | LinVB | 9:4 | Nasambeli Mokonzi Nzambe wa ngai na bosakoli mabe ma biso : « E Mokonzi, Nzambe monene mpe wa bokasi bonso, okomemyaka bondeko mpe okolakisaka motema ngolu na bato balingi yo mpe batosi mibeko mya yo. | |
Dani | LinVB | 9:5 | Tosalaki masumu, totosaki mibeko te, tosalaki mabe mpe totikaki mitindo mya yo, toboyaki myango. | |
Dani | LinVB | 9:6 | Toyokemelaki basaleli ba yo te, baprofeta baye balobaki o nkombo ya yo na bakonzi ba biso, bankumu na batata na bato banso ba ekolo ya biso. | |
Dani | LinVB | 9:7 | Yo Mokonzi, ozali Nzambe wa bosembo ; biso bato ba Yuda, bato ba Yeruzalem, bato banso ba Israel, baye bazali penepene na baye bazali mosika o mikili otindaki bango mpo baboyaki monoko mwa yo, banso tokomi na nsoni o mokolo mwa lelo. | |
Dani | LinVB | 9:8 | E Mokonzi, biso banso, bakonzi, bankumu na batata ba biso tozali na nsoni, zambi tosali masumu. | |
Dani | LinVB | 9:9 | Mokonzi Nzambe wa biso, oyokela biso ngolu mpe olimbisa biso, mpo tolakisaki yo motó makasi | |
Dani | LinVB | 9:10 | mpe totosaki monoko mwa yo te, toboyaki maloba ma baprofeta, basaleli ba yo, baye balobaki o nkombo ya yo. | |
Dani | LinVB | 9:11 | Ba-Israel banso babukaki mibeko mya yo mpe baboyaki koyoka maloba ma yo. Tosalaki masumu o miso ma yo, Nzambe ; yango wana mabe makwelaki biso mpe tozwaki bitumbu biye bikomami o buku ya Moze, mosaleli wa yo. | |
Dani | LinVB | 9:12 | Nzambe akokisaki maloba ma bokaneli biso na bayangeli ba biso. Ayokisaki biso mpasi enene. Bato ba Yeruzalem bayokaki mpasi lokola bayokaki liboso naino te o mokili mobimba. | |
Dani | LinVB | 9:13 | Makambo maye manso makwelaki biso se lokola ekomami o buku ya mobeko mwa Moze. Kasi tobongolaki mitema te, tolukaki kolanda nzela ya yo ya solo te, bongo tokitisaki motema mwa Nzambe Mokonzi wa biso te. Toboyaki masumu ma biso te, mpe tolukaki nzela ya solo te. | |
Dani | LinVB | 9:14 | Mokonzi akanelaki biso mabe maye mpe atindelaki biso mango. Mokonzi Nzambe wa biso azali na bosembo o bikela bya ye binso, kasi biso toyokaki monoko mwa ye te. | |
Dani | LinVB | 9:15 | E Mokonzi Nzambe wa biso, ya solo obimisaki bato ba ekolo ya yo o mokili mwa Ezipeti na bokasi bwa yo. Yango wana lelo nkombo ya yo ezali na lokumu lonene. Kasi biso tosali se mabe, tozali basumuki. | |
Dani | LinVB | 9:16 | Kasi sikawa Mokonzi, mpo ya bolamu bwa yo, tika kosilikela Yeruzalem, tika koyokela engumba ya yo na ngomba esantu ya yo nkanda, zambi bikolo bizali penepene na biso bizali koseke Yeruzalem na mpe ekolo ya yo mobimba. Mabe mana mauti na mabe ma biso mpe na masumu ma bankoko ba biso. | |
Dani | LinVB | 9:17 | Yango wana, yo, Nzambe wa biso, yoka losambo la mosaleli wa yo, yoka mabondeli ma ngai. Mpo ya lokumu la nkombo ya yo Mokonzi, fungola elongi ya yo mpe tala ndako esantu babebisi. | |
Dani | LinVB | 9:18 | E Nzambe wa ngai, fungola matoi mpe yoka ; fungola miso mpe tala ndenge babebisi mokili mwa biso mpe engumba eye bakotangaka na nkombo ya yo. Awa tobondeli yo, totii elikya te na malamu biso tosali, kasi bobele na ngolu ya yo enene. | |
Dani | LinVB | 9:19 | Mokonzi, yoka ko ! Limbisa biso, Mokonzi ; kanisa biso, Mokonzi, mpe sala makasi, ozila lisusu te. E Nzambe wa ngai, kanisa lokumu la nkombo ya yo, zambi ná engumba eye ná bato ba ekolo eye bakotangemaka na nkombo ya yo. » | |
Dani | LinVB | 9:20 | Ntango nasambeli, nazalaki kosakola masumu ma ngai mpe masumu ma bato banso ba Israel o miso ma Mokonzi Nzambe wa ngai. Nazalaki mpe kobondela ye mpo ya ngomba esantu ya Nzambe. | |
Dani | LinVB | 9:21 | Nasilisaki naino te, Gabriel ayei kopimbwa epai ya ngai. Namonoki Gabriel oyo o limoni. Esalemi o ntango ya libonza lya mpokwa. | |
Dani | LinVB | 9:23 | Ntango obandaki kosambela, Nzambe asili alobaki liloba lyoko, nayei koyebisa yo lyango. Solo, Nzambe alingi yo mingi. Malamu oyeba ntina ya liloba lina mpe ntina ya limoni omonoki : | |
Dani | LinVB | 9:24 | Nzambe akateli ekolo mpe engumba esantu ya yo bileko ntuku nsambo bya mibu nsambo mpo ya kolongola mabe, masumu manso mpe misala minso mizangi bosembo. Bongo bosembo bwa seko boya, mpo ya kokokisa mamoni mpe maloba ma baprofeta, mpe kopakola mosantu wa basantu mafuta. | |
Dani | LinVB | 9:25 | Yango wana oyeba malamu : banda mokolo Nzambe alobaki likambo lya kobongisa Yeruzalem tee mokolo mokonzi moko Mesiya akoya, okotanga poso nsambo. Poso ntuku motoba na ibale bakotonga engumba mpe bakobongisa bifelo. Kasi o eleko ya nsomo, | |
Dani | LinVB | 9:26 | nsima ya poso iye ntuku motoba na ibale, bakoboma mopakolami wa Nzambe ; moto moko akokitana ye te. Nkumu moko akoya, bato ba ye bakoboma engumba mpe ndako esantu. Kasi ye moko akosuka o kati ya mobulungano monene, mpe kin’o nsuka etumba ekongala lokola Nzambe akanaki. | |