DANIEL
Chapter 4
Dani | LinVB | 4:1 | Ngai Nabukodonozor nafandaki kimia o ndako ya ngai, makambo manso mazalaki kotambola malamu. | |
Dani | LinVB | 4:2 | Kasi mokolo moko nalotoki ndoto mpe nabangaki. Makambo nalotoki ntango ya kolala, mpe mamoni namoni o ndoto bitungisaki ngai mingi. | |
Dani | LinVB | 4:3 | Yango wana natindaki ’te babyangela ngai bato banso ba bwanya bazali o Babilon, bayebisa ngai ntina ya ndoto. | |
Dani | LinVB | 4:4 | Banganga, bamoni-makambo, batali-minzoto na bato basusu ba bwanya bayaki ; nayebisaki bango ndoto ya ngai, kasi bakokaki kolimbolela ngai ndoto te. | |
Dani | LinVB | 4:5 | Na nsima Daniel ayei, nkombo ya ye esusu Baltasar, eye azwi mpo ya nzambe wa ngai. Elimo ya banzambe basantu ezali na ye. Nayebisi ye ndoto ya ngai, nalobi : | |
Dani | LinVB | 4:6 | « Baltasar, kapita wa banganga, nayebi ’te ozali na elimo ya banzambe basantu bayebi mibombamo minso. Limbolela ngai ndoto eye nalotoki. | |
Dani | LinVB | 4:7 | Ntango nalalaki o mbeto namonoki makambo : ‘Namoni nzete elai, etelemi o katikati ya mokili. | |
Dani | LinVB | 4:8 | Nzete ena ekoli mpe elendi mpenza, nsonge ekei mosika kin’o likolo, bato banso ba mokili bazalaki komono yango. | |
Dani | LinVB | 4:9 | Ezalaki na nkasa kitoko mpe na mbuma ebele, bato banso bazalaki kolia mbuma ya nzete ena. Nyama ya zamba izalaki kobombama o nse ya nzete, mpe ndeke izalaki koya kofanda o bitapi, bato banso bazalaki koya kolia wana. | |
Dani | LinVB | 4:10 | Ntango nalalaki o mbeto, namonoki makambo : Namonoki mokengeli mosantu moko, auti o likolo. | |
Dani | LinVB | 4:11 | Abeleli na mongongo makasi, alobi : Bokata nzete, bobuka mpe bitapi ; bolongola nkasa inso mpe bopanza mbuma. Nyama ya zamba ikima o nse ya nzete ena, mpe ndeke ifanda wana lisusu te. | |
Dani | LinVB | 4:12 | Kasi ekumu mpe minsisa bitikala o mabelé, bokanga yango na nsinga ya ebende mpe ya mbengi. Mamio ma likolo makitela yango mingi ; nzete ena elia matiti elongo na nyama. | |
Dani | LinVB | 4:13 | Motema mwa ye mokozala lisusu motema mwa moto te, bakopesa ye motema mwa nyama mpe elaka ya mibu nsambo ekolekela ye se bongo. | |
Dani | LinVB | 4:14 | Bakengeli bakopesa mobeko mwa kosala bongo, basantu bakokata likambo lyango, mpo ’te bato banso bazali na bomoi bayeba ’te Nzambe wa likolo azali mokonzi wa bato banso. Akopesa bokonzi na moto oyo ye alingi, akotombola oyo azali nsima ya baninga banso !’ | |
Dani | LinVB | 4:15 | Oyoki sikawa ndoto ngai mokonzi Nabukodonozor nalotoki. Yo Baltasar, limbolela ngai ndoto eye, zambi bato banso ba bwanya o mokili mwa ngai bakoki te ; kasi yo okoki, zambi elimo ya banzambe basantu ezali na yo. » | |
Dani | LinVB | 4:16 | Eyoki Daniel, oyo bakotangaka mpe Baltasar, maloba mana, abangi mwa moke mpe makanisi ma ye makei mosika. Mokonzi alobi na ye : « Baltasar, obanga te kolimbola ndoto eye. » Baltasar ayanoli : « Mokonzi wa ngai, ndoto eye etala bato bayini yo, mpe ntina ya ndoto etala banguna ba yo ! | |
Dani | LinVB | 4:17 | Nzete eye omonoki, eye ekolaki mingi mpe ekomaki makasi, na bolai kin’o likolo, eye bato banso bakoki komono, | |
Dani | LinVB | 4:18 | ezalaki na nkasa kitoko mpe ebotaki mbuma mingi, ezalaki kopesa bato banso biloko bikoki na bango, nyama ya zamba izalaki kobombama o nse ya yango, ndeke mpe izalaki koya kofanda o bitapi bya yango, | |
Dani | LinVB | 4:19 | e mokonzi wa ngai, nzete eye ezali se yo ! Solo, okomi moto monene mpe makasi mpenza ; otombwami kin’o likolo mpe okomi mokonzi wa mokili mobimba. | |
Dani | LinVB | 4:20 | Na nsima, mokonzi, omonoki Mokengeli moko, Mosantu, auti o likolo mpe alobi : ‘Bokata nzete, bobuka mpe bitapi ; kasi botika ekumu mpe minsisa mya yango o mabelé, bokanga myango na nsinga ya ebende mpe ya mbengi ; mamio ma likolo makitela yango mingi, ekola o kati ya matiti ma bilanga elongo na nyama kin’o elaka ya mibu nsambo elekela yango se bongo.’ | |
Dani | LinVB | 4:21 | Tala, e mokonzi ndimbola ya ndoto eye : Nzambe wa likolo akati likambo lya yo, mokonzi wa ngai. | |
Dani | LinVB | 4:22 | Bakobengana yo o ntei ya bato, okofanda esika yoko na nyama, okolia matiti lokola ngombe, mamio mauti o likolo makopolisa yo, mibu nsambo Mikoleka bongo kin’o okondima ’te Nzambe wa Nta-Likolo azali mokonzi wa bato banso, mpe akopesa bokonzi na moto oyo ye alingi. | |
Dani | LinVB | 4:23 | Kasi : ‘Botika ekumu mpe minsisa mya nzete’, elakisi ’te bokonzi bokotikala na yo soko ondimi ’te Nzambe wa likolo azali Mokonzi. | |
Dani | LinVB | 4:24 | Yango wana, mokonzi, yoka lilako lya ngai : oboya masumu na bosali misala mya bosembo, mpe oboya mabe ma yo na boyokeli babola mawa, mpo ’te ozwa kimia mikolo mingi. » | |
Dani | LinVB | 4:26 | Nsima ya sanza zomi na ibale, ezalaki ye kotambola o mbalasani ya ndako enene ya bakonzi ba Babilon, | |
Dani | LinVB | 4:27 | mokonzi alobi : « Ngai moto natongi engumba eye enene Babilon na bokasi bwa ngai, nalingaki ezala engumba ya bakonzi, eye ekopesa bokonzi bwa ngai lokumu. » | |
Dani | LinVB | 4:28 | Mokonzi asilisi naino koloba te, lolaka loyokani ut’o likolo : « Mokonzi Nabukodonozor, bazali koyebisa yo ’te babotoli yo bokonzi ! | |
Dani | LinVB | 4:29 | Bakobengana yo mosika na bato ; okofanda esika yoko na nyama o bilanga, okolia matiti lokola ngombe, mibu nsambo ekoleka bongo kin’o okondima ’te Nta-Likolo azali mokonzi wa bato banso mpe akopesa bokonzi na moto oyo ye moko alingi. » | |
Dani | LinVB | 4:30 | Se o ntango ena mana manso makweli Nabukodonozor : babengani ye mosika na bato ; akomi kolia matiti lokola ngombe mpe azalaki kopolo na mamio ma ntongo ; nsuki ya ye ikoli lokola nsala ya engondo mpe manzaka ma ye makoli lokola maye ma ndeke. | |
Dani | LinVB | 4:31 | « Esili elaka ena, ngai Nabukodonozor natomboli miso epai ya likolo : mayele mazongeli ngai ; nakumisi Nta-Likolo, Oyo akozala seko ; bokonzi bwa ye bozali bokonzi bwa seko, bokoumela o bileko na bileko. | |
Dani | LinVB | 4:32 | Bato ba nse banso bakoki na ye ata moke te, akosala manso alingi, na mampinga ma likolo mpe na bato ba nse. Moto moko akoki kopekisa ye te to kotuna ye : ‘Osali nini ?’ | |
Dani | LinVB | 4:33 | O ntango ena mayele mazongeli ngai, bokonzi bwa ngai mpe bozongi elongo na lokumu mpe na nkembo ya ngai. Bankumu na basalisi ba ngai baluki ngai lisusu. Bazongiseli ngai bokonzi, mpe nazwi lokumu loleki lokumu la kala. | |