EPHESIANS
Chapter 3
Ephe | LinVB | 3:3 | Boyébí bóníbóní amónísí ngáí o limóní Mobómbamo mwa yě, lokóla nasílí nakomélákí bínó na bokúsé. | |
Ephe | LinVB | 3:5 | O bileko bya kala Nzámbe ayébísáká bato mobómbamo moye té, kasi sikáwa Elímo moto ayébísí bapóstolo na baproféta basántu ba yě : | |
Ephe | LinVB | 3:6 | sé lokóla ba-Yúda, bapagáno mpé bazwí bolámu bwa Nzámbe, bakómí binama bya Nzóto sé yǒ kó, mpé bazwí bolámu bwa Elakó sé yǒ kó ; Nzámbe alakélákí bwangó na bosangeli Nsango Elámu o Krístu Yézu. | |
Ephe | LinVB | 3:7 | Na ngúyá ya yě, Nzámbe akabélí ngáí ngrásya mpé akómísí ngáí mosangeli wa Nsango Elámu eye. | |
Ephe | LinVB | 3:8 | Apésí ngáí, moto wa nsúka wa bato bayambí Nzámbe, ngrásya ya kosangela bapagáno nkita nsúka té ya Krístu. | |
Ephe | LinVB | 3:9 | Nálimbola mpé malámu bóníbóní Nzámbe azalí kokokisa Mobómbamo moye : út’o libandela mobómbámákí o motéma mwa yě, Mozalisi wa bilóko bínso. | |
Ephe | LinVB | 3:10 | Bô-ngó sikáwa, na mosálá Eklézya akosálaka, bilímo bínso o likoló bizalí na bokonzi mpé na ngúyá bíyéba bwányá bwa Nzámbe nsúka té : | |
Ephe | LinVB | 3:13 | Bôngó, nabóndélí bínó, bózala sé na moléndé áwa nazalí konyókwama mpô ya bínó : minyóko myangó, ndé lokúmu la bínó ! | |
Ephe | LinVB | 3:16 | Akabela bínó ngúyá engébéné na nkémbo ya Yě nsúka té, mpé áléndisa mitéma mya bínó na Elímo wa Yě. | |
Ephe | LinVB | 3:17 | Krístu áfánda o mitéma mya bínó mpô ya boyambi. Bolingi bwa bínó bópikama makási o mitéma mya bínó. | |
Ephe | LinVB | 3:18 | Elongó na bandeko bánso, bókoka koyéba bonéne, bolaí, bosándá na bozindó bwa bolingi bwa Krístu. | |
Ephe | LinVB | 3:19 | Bókoka koyéba bolingi bwa Krístu boye bolekí mánso tokokí koyéba mpô ’te bótónda na bosántu bónso bwa Nzámbe. | |
Ephe | LinVB | 3:20 | Na ngúyá eye ekosálaka o mitéma mya bísó, akokí kosála mánso, leká mosíká maye tokokí kosénge tǒ kokanisa. | |