Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EPHESIANS
1 2 3 4 5 6
Prev Up Next
Chapter 4
Ephe LinVB 4:1  Awa nakangémí o bolóko mpô ya Mokonzi, nabóndélí bínó : bózala na ezalela ebongí na bato babyángémí na Nzámbe.
Ephe LinVB 4:2  Bózala na motéma bosáwa mpé na bobóto, bókanga mitéma, bóíkikizana na bolingi.
Ephe LinVB 4:3  Bóluka sé kozala motéma mǒkó, bóbátela lisangá lya bobóto lya Elímo.
Ephe LinVB 4:4  Nzóto ezalí sé yǒ kó, Elímo sé yǒ kó, lokóla elíkyá ezalí sé yǒ kó, mpô Nzámbe abyángí bínó.
Ephe LinVB 4:5  Mokonzi azalí sé mǒkó, boyambi sé bǒ kó, batísimo sé yǒ kó ;
Ephe LinVB 4:6  Nzámbe azalí sé mǒkó, Yě Tatá wa bato bánso, akoyángelaka bato bánso, azalí elongó na bato bánso mpé o mitéma mya bato bánso.
Ephe LinVB 4:7  Nzókandé mǒkó mǒkó wa bísó azwí makabo ma ngrásya lokóla Krístu akabélí yě.
Ephe LinVB 4:8  Yangó wâná ekomámí ’te : Ebutí yě o likoló, amemí bato bakangémí, akabélí bato makabo.
Ephe LinVB 4:9  ‘Abutí o likoló’ lokóla níni ? Elakísí ’te libosó akitákí kín’o o bozindó bwa nsé.
Ephe LinVB 4:10  Oyo akitákí, yě mpenzá abutí o ntá likoló mpô ’te ákóma Mokonzi wa molóngó mobimba.
Ephe LinVB 4:11  Yě moto akabélí bato makabo. Aponí basúsu bázala bapóstolo, basúsu baproféta, basúsu basangeli ba Nsango Elámu, basúsu bakéngeli, basúsu batéyi.
Ephe LinVB 4:12  Abongísí bôngó lisangá lya bakrístu mpô ’te moto na moto ásála mosálá mpô ya kotónga Nzóto ya Krístu.
Ephe LinVB 4:13  Bôngó bísó bánso elongó tókóma sé moto mǒkó o boyambi mpé o boyébi Mwána wa Nzámbe, mpô tókóla téé ntángo tokokóma bakóló mpé balongobani na ndéngé ya Krístu.
Ephe LinVB 4:14  Bôngó tokozala lisúsu bána baké té, mimpepe mikoningisa mpé mikomeme bísó lisúsu té, miye mya matéya ma bato ba mayéle mabé, baye bakokósaka bato mpô ’te bátámbwisa bangó o nzelá ya lokutá.
Ephe LinVB 4:15  Tózala bato ba bosôló mpé tólingana, bôngó tokokóla o mambí mánso mpé tokokóma lokóla óyo azalí Motó, yě ndé Krístu.
Ephe LinVB 4:16  Yě akoléndisaka nzóto mobimba, eye ekokangema na lisálisi lya minsisá mínso mpô ’te étóngama lokóla nzóto sé yǒ kó. Bôngó sókó eténi yǒ kó yǒ kó ekosála bǒ esengélí, nzóto mobimba ekolénda mpé ekokóla mpô ya bolingani.
Ephe LinVB 4:17  Yangó wâná nayébísí mpé nabóndélí bínó o nkómbó ya Mokonzi : bótíka bizalela bya bapagáno ; bangó bakolandaka bobélé makanisi ma bangó mǒkó ma mpámba mpámba.
Ephe LinVB 4:18  Makanisi ma bangó mazalí sé molílí, bazángí bomoi bwa Nzámbe mpô bayébí elóko té, mitéma mya bangó mikómí lokóla libángá.
Ephe LinVB 4:19  Bakobángaka lisúmu lisúsu té : bakomíkabaka mobimba na makambo mabé, mpé na mpósá enéne bakolukaka kosála makambo ma bosóni ndéngé na ndéngé.
Ephe LinVB 4:20  Kasi bínó bozwákí mayéle mâná té, ntángo boyókí matéya ma Krístu.
Ephe LinVB 4:21  Nakolíkya ’te balakísákí bínó matéya ma Krístu malámu, matéya maye makolakisaka bosôló bwa Yézu.
Ephe LinVB 4:22  Bôngó bótíka bizalela bya kala, bya ‘moto wa kala’, óyo asengélí kokúfa mpô akolukaka bise­ngo bya mpámba.
Ephe LinVB 4:23  Bóbóngola makanisi ma bínó, mákóma ma sika.
Ephe LinVB 4:24  Bózala na ezalela ya Moto wa Sika, óyo Nzámbe akelákí na loléngé la yě méí, na bosémbo mpé na bosántu bwa sôló.
Ephe LinVB 4:25  Yangó wâná bótíka kobúka lokutá : moto na moto áloba na móníngá sé mambí ma sôló, mpô bísó bánso tozalí binama bya nzóto yǒ­kó.
Ephe LinVB 4:26  Atâ bosilíkí, bókwéya o lisúmu té. Sókó boyókí nkándá, butú bóíndela nkándá ya bínó té.
Ephe LinVB 4:28  Moto azalákí moyíbi libosó, áyíba lisúsu té, kasi ándima koyóka mpási na mosálá mwa bosémbo ; bôngó ákoka kokabela moto óyo akélélí mwâ elóko.
Ephe LinVB 4:29  Maloba mabé mábima o monoko mwa bínó té, kasi bóloba, sókó esengélí, maloba malámu makokí koléndisa báníngá mpé kosálisa baye bakoyóka bínó.
Ephe LinVB 4:30  Bóyókisa Elímo Sántu wa Nzámbe mawa té : yě azalí nkomá Nzámbe akomí o mitéma mya bínó mpô ’te báyéba bínó o mokolo mwa libíkí.
Ephe LinVB 4:31  Bólongola o káti ya bínó makambo ma bololo, nkele, nkándá, makeléle, mafínga mpé mayéle mabé ndéngé na ndéngé.
Ephe LinVB 4:32  Bólakisana bolingi mpé bósálisana ; bólímbisana lokóla Nzámbe alímbísí bínó mpô ya Krístu.