Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EPHESIANS
1 2 3 4 5 6
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 1
Ephe LinVB 1:1  Ngáí Pólo, apóstolo wa Yézu Krístu, lokóla Nzámbe alingí, natíndélí bandeko bayambí Krístu Yézu monkandá moye.
Ephe LinVB 1:2  Nzámbe Tatá wa bísó mpé Mokonzi Yézu Krístu bákabela bínó ngrásya na bobóto.
Ephe LinVB 1:3  Bákúmisa Nzámbe Tatá wa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu ! Ut’o likoló abenísí mpé atóndísí bísó na malámu mánso ma Elímo mpô ya Krístu.
Ephe LinVB 1:4  Na bolingi asílí aponí bísó, naíno mokili mokelámí té, tózala basántu o míso ma yě, tózala na lisúmu té.
Ephe LinVB 1:5  Na bolingi akánáká bandá kala ’te tókóma bána ba yě mpô ya Yézu Krístu : yě mǒkó alingákí bôngó
Ephe LinVB 1:6  mpô tókúmisa nkémbo ya ngrá­sya ya yě, eye akabélí bísó elongó na Mwána wa yě wa bolingo.
Ephe LinVB 1:7  Yě asikólí bísó na makilá ma yě, azwě lí bísó bolímbisi masúmu ; ngrásya êná elekí bonéne sôló.
Ephe LinVB 1:8  Nzámbe Tatá apésí bísó yangó na bwányá mpé na mayéle mánso.
Ephe LinVB 1:9  Ayébísí bísó mobómbamo mwa motéma mwa yě, moye akánáká kokokisa na lisálisi lya Krístu.
Ephe LinVB 1:10  Akokisa mwangó ntángo eleko ekokoka : ásangisa bikelámo bínso bya likoló mpé bya nsé o mabóko ma Mokonzi sé mǒkó, Krístu.
Ephe LinVB 1:11  Sé mpô ya Krístu abéngí bísó ba-Yúda tózala bato ba yě ; aponókí bísó út’o kala lokóla akánáká, yě mǒkó akosálaka mánso sé lokóla alingí,
Ephe LinVB 1:12  mpô ’te bísó, baye totíákí elíkyá na Krístu libosó, tókúmisa bonéne bwa nkémbo ya yě.
Ephe LinVB 1:13  Sé mpô ya Krístu, bínó mpé bato ba bikólo bisúsu, áwa boyókí Liloba lya sôló, Nsango Elámu ya libíkí, mpé bokómí koyamba Krístu, Nzámbe akomí o mitéma mya bínó nkomá ya Elímo óyo alakélákí, yě ndé Elímo Sántu.
Ephe LinVB 1:14  Na Elímo óyo alakélákí bísó, Nzámbe akobíkisa bísó bato ba yě ; ntángo mokolo mwangó mokokoka tokozwa malámu ma yě mánso, mpô tókúmisa nkémbo ya Nzámbe.
Ephe LinVB 1:15  Mpô nayókí bóníbóní bozalí koyamba Mokonzi Yézu mpé kolinga bandeko bánso,
Ephe LinVB 1:16  nazalí kotó­ndo Nzámbe ntángo ínso mpé kokanisa bínó o losámbo la ngáí.
Ephe LinVB 1:17  Nzámbe wa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu, Tatá ntá nkémbo, ákabela bínó Elímo óyo akopésa bínó bwányá na mayéle mpô ’te bóyéba yě sôlósôló !
Ephe LinVB 1:18  Afungola míso mpé mitéma mya bínó mpô bómóno ’te bozalí na elíkyá enéne, áwa yě mǒ­kó abéngí bínó ; bóyéba mpé bonéne bwa nkémbo ya likabo bokozwa elongó na basántu.
Ephe LinVB 1:19  Bóyéba ’te bonéne bwa ngúyá ya yě nsúka té bokosálaka mambí manéne o mitéma mya bísó baye toyambí yě. Ngúyá eye enéne,
Ephe LinVB 1:20  asílí alakísí yangó o Krístu, áwa asékwísí yě o bawá mpé afándísí yě o lobóko la yě la mobáli o likoló.
Ephe LinVB 1:21  Atómbólí yě likoló lya bilímo bínso bya Lokúmu, bya Ngúyá, bya Bokási mpé bya Bokonzi ; azwí mpé nkómbó elekí nkómbó ínso bakokí kotánga sikáwa mpé ikozala o bileko biye bikoyâ.
Ephe LinVB 1:22  Atíí bínso o nsé ya makolo ma yě, mpé atómbólí yě, Motó mwa Eklézya, likoló lya bínso.
Ephe LinVB 1:23  Eklézya ezalí Nzóto ya Krístu ; Krístu azalí mobimba o Eklézya, lokóla Nzámbe azalí mobimba o Krístu.