EPHESIANS
Chapter 2
Ephe | LinVB | 2:2 | bosálákí ntángo bozalákí kolanda makambo ma nsé eye : bozalákí kotósa mokonzi wa ngúyá izalí káti ya likoló na nsé, óyo azalí kokóba mosálá mwa yě o mitéma mya bato babóyí kotósa… | |
Ephe | LinVB | 2:3 | Bísó bánso (ba-Yúda) tozalákí kosála lokóla bangó : tozalákí kolanda mpósá ya nzóto, tozalákí baómbo ba bilúlélá bya nzóto mpé ba makanisi mabé, tobótámákí bána baye Nzámbe ayókélí nkándá, sé lokóla bato basúsu. | |
Ephe | LinVB | 2:5 | atâ tokúfákí mpô ya masúmu, azóngísélí bísó (ba-Yúda mpé baye bazalí ba-Yúda té) bomoi elongó na Krístu ; sôló, bobíkí sé mpô ya ngrásya ya yě ! | |
Ephe | LinVB | 2:6 | Nzámbe asékwísí bísó elongó na Yézu Krístu mpé afándísí bísó na Krístu lisangá o likoló. | |
Ephe | LinVB | 2:7 | Na bolámu asálákí bísó o Krístu Yézu, alingákí kolakisa o bileko bikoyâ nkita enéne ya ngrásya ya yě. | |
Ephe | LinVB | 2:8 | Sôló, áwa boyambí, bobíkí bobélé mpô ya ngrásya. Libíkí liútí epái ya bínó mǒkó té, lizalí likabo lya Nzá-mbe. | |
Ephe | LinVB | 2:10 | Sôló, Nzámbe akelákí bísó o Krístu Yézu mpô tósála misálá milámu miye yě mǒkó aléngélélí bísó. | |
Ephe | LinVB | 2:11 | Bókundola o mitéma ’te bozalákí bapagáno libosó, baye bakátémí nzóto té ; baye bazalákí kobénga bínó na nkómbó êná ezalí baye bakomítángaka ‘bakátémá nzóto’, mpô ya elembo eye ezalí sé ya nzóto. | |
Ephe | LinVB | 2:12 | Bókundola ’te o ntángo êná bokabwánákí na Krístu, bozalákí bato ba ekólo ya Israél té. Boyébákí bondeko té, boye Nzámbe akátákí ntángo alakélákí elakó ya yě. Awa o nsé bozalákí na elíkyá té, na Nzámbe mpé té ! | |
Ephe | LinVB | 2:13 | Nzókandé lisangá na Krístu Yézu bínó bato bozalákí libosó mosíká na Nzámbe, bokómí sikáwa penepene mpô ya makilá ma Krístu. | |
Ephe | LinVB | 2:14 | Yě moto ayélí bísó bobóto mpé akómísí ba-Yúda ná bato ba bikólo bisúsu ekólo sé yǒ kó, abúkí lopángo lozalákí kokabola bangó. Na liwá lya yě abomí bongúná, | |
Ephe | LinVB | 2:15 | Mobéko ná mitíndo mínso mya Mobéko. Ayélí ba-Yúda na bato basúsu bobóto, akómísí bangó moto wa sika na yě lisangá. | |
Ephe | LinVB | 2:16 | Na kurúse abomí bongúná, asangísí bato bánso o Nzóto sé yǒ kó, mpé azóngísélí bangó bondeko bwa Nzámbe. | |
Ephe | LinVB | 2:19 | Bôngó bozalí lisúsu bampaya tǒ baútá té, bokómí bána mbóka na bakrístu elongó, bato ba libótá lya Nzámbe. | |
Ephe | LinVB | 2:20 | Bozalí lokóla ndáko etóngámí o mabángá ; mabángá mâná ndé bapóstolo na baproféta ; Krístu Yézu yě méí azalí libángá lya litúmu lya ndáko mobimba. | |
Ephe | LinVB | 2:21 | Yě moto akoléndisa ndáko mobimba, mpé akokómisa yangó témpelo esántu enéne ya Mokonzi Nzámbe. | |