Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 3
II C LinVB 3:1  Salomo abandi kotonga Ndako ya Yawe. Atongi yango o Yeruzalem, o ngomba Moria, esika Yawe abimelaki tata wa ye Davidi. Ezalaki bobele esika eye Davidi aponoki o etutelo ya Ornan, moto wa Yebus.
II C LinVB 3:2  Abandi botongi o sanza ya ibale ya mobu mwa minei mwa bokonzi bwa ye.
II C LinVB 3:3  Ndako Salomo atongeli Yawe eza­laki na bolai maboko ntuku motoba, lokola batangaki yango kala mpe na bonene maboko ntuku ibale.
II C LinVB 3:4  Ekoteli ya ndako epai ya liboso ezalaki na bolai maboko ntuku ibale, ekokani na bonene bwa Ndako, mpe bosanda bwa yango bozalaki na bolai maboko monkama na ntuku ibale. Salomo azipi bifelo bya kati na wolo kitoko.
II C LinVB 3:5  Azipi bifelo bya eteni enene na mabaya ma sipresi, azipi binso na manzanza ma wolo, mpe akembisi ya­ngo na bilili bya nkele ya mbila mpe na minyololo mya fulele.
II C LinVB 3:6  Ake­mbisi eteni ena na mabanga ma motuya. Wolo eutaki o Parvaim.
II C LinVB 3:7  Azipi eteni enene ya ndako na wolo, na mabaya ma motondo, na mabanga ma nse, na bifelo na bizibeli bya ndako ; akembisi bifelo na bikeko bya bakerubim.
II C LinVB 3:8  Na nsima atongi esika eleki bosantu ; bolai bokokani na bonene bwa ndako enene, bozalaki na maboko ntuku ibale, mpe bonene bozalaki na maboko ntuku ibale lokola. Ake­mbisi yango na wolo kitoko ya tale­nta nkama motoba.
II C LinVB 3:9  Bozito bwa nsete bozalaki bwa mitako mya wolo ntuku isato. Akembisi mpe biteni o mokili na wolo.
II C LinVB 3:10  O katikati ya esika esantusantu atuli bikeko bya bakerubim babale na ebende, azipi byango na wolo.
II C LinVB 3:11  Mapapu ma bakerubim mazalaki na bolai maboko ntuku ibale ; lipapu lyoko lya kerubim wa ya­mbo, maboko matano, lisimbi efelo ya ndako, mpe lipapu lya mabale, na bolai maboko matano, lisimbi lipapu lya kerubim mosusu.
II C LinVB 3:12  Lipapu lya kerubim moko, na bolai maboko matano, lisimbi efelo ya ndako, mpe lipapu lya mabale, na bolai maboko matano, likutani na lipapu lya kerubim mosusu.
II C LinVB 3:13  Mapapu ma bakerubim mazalaki ma kofungwana, mazalaki na bolai maboko ntuku ibale ; bate­lemi o makolo mpe bazalaki kotala epai ya kati ya ndako.
II C LinVB 3:14  Asoni elamba enene ya kiusa ya longondo, ya moindo mpe ya malekani. Abakisi wana bilili bya bakerubim.
II C LinVB 3:15  Atongi mpe makonzi mabale o boso bwa ndako, bolai maboko ntuku isato na matano, mpe mitó mizalaki o nsonge mizalaki na bolai maboko matano.
II C LinVB 3:16  Akembisi mpe esika esantu na monyololo mwa fulele, mpe atii yango o nsonge ya makonzi. Asali mpe bilili bya malala monkama mpe akotisi byango o monyololo mwa fulele.
II C LinVB 3:17  Atelemisi makonzi o boso bwa Tempelo, lyoko epai, lyoko epai ; apesi likonzi epai ya mobali nkombo Yakin, liye epai ya mwasi Boaz.