II TIMOTHY
Chapter 2
II T | LinVB | 2:2 | Maye oyókákí o monoko mwa ngáí o míso ma bato baíké, ótéya mangó na bato ba sôló, baye bakokí mpé kotéya bato basúsu nsima. | |
II T | LinVB | 2:4 | Moto akosálaka mosálá mwa sodá, akopangana té na makambo ma baye bazalí basodá té, sókó alingí kosepelisa mokonzi wa yě. | |
II T | LinVB | 2:5 | Sé bôngó bato bakomekanaka o libándá lya masano : bobélé moto atósí mibéko akokí kolónga. | |
II T | LinVB | 2:6 | Moto wa bilanga óyo ayókí mpási o mosálá, yě moto wa libosó akokí kolía mbuma ya mosálá mwa yě. | |
II T | LinVB | 2:8 | Okundola o motéma ’te Yézu Krístu, mwána wa Davídi, asékwí o bawá, lokóla eyébání o Nsango Elámu nakosangelaka. | |
II T | LinVB | 2:9 | Nazalí koyóka malózí mpô ya yě, kútu bakangí ngáí na minyolólo lokóla moto asálákí mabé. Kasi bakokí kokanga Liloba lya Nzambe na minyolólo té. | |
II T | LinVB | 2:10 | Yangó wâná nakokangaka motéma o makambo mánso mpô ya baye Nzámbe aponí, mpô ’te Krístu Yézu ábíkisa bangó mpé bázwa nkémbo ya sékô. | |
II T | LinVB | 2:11 | Liloba liye lizalí lya sôló : sókó tokúfí na yě elongó, tokozwa bomoi na yě elongó ; | |
II T | LinVB | 2:12 | sókó tokotía moléndé, tokozwa bokonzi na yě elongó ; kasi sókó tokowángana yě, yě mpé akowángana bísó. | |
II T | LinVB | 2:14 | Kokundolela mâná mánso na bato ; bóndélá bangó o míso ma Nzámbe ’te báwéla ntembe na maloba ma mpámba té ; yangó ekokí bobélé kokwêisa baye bakoyóka bangó. | |
II T | LinVB | 2:15 | Tíá moléndé mpô ’te Nzámbe ámóno yǒ moto malámu, lokóla mosáli óyo asengélí koyóka nsóni té. Sakólá maloba ma bosôló polélé. | |
II T | LinVB | 2:16 | Kímá bilobáloba mpé maloba maye matálí boyambi té ; baye bakosololaka mangó bakokóba kobóya Nzámbe. | |
II T | LinVB | 2:17 | Matéya ma bangó mazalí lokóla mpótá ekolíaka misuni malémbe malémbe. Imenéo na Filéto bakosálaka mpé bôngó : | |
II T | LinVB | 2:18 | batíkí matéya ma sôló, bakómí koloba ’te nsékwa esílí esálémí. Babébísí bôngó boyambi bwa bato basúsu. | |
II T | LinVB | 2:19 | Kasi Nzámbe atíákí mabángá ma nsé makási ; o mabángá maye ekomámí boye : Mokonzi ayébí bato ba yě mpé : Moto nyónso atángí nkómbó ya Mokonzi ákíma makambo mazángí bosémbo. | |
II T | LinVB | 2:20 | O ndáko inéne mbéki izalí ndé-ngé na ndéngé : ya wólo, ya paláta, ya mabáyá, ya libází. Mbéki isúsu izalí na mosálá mwa bokémbisi ndáko, isúsu mpô ya misálá mya mikolo mínso. | |
II T | LinVB | 2:21 | Moto abóyí makambo mazángí bosémbo azalí lokóla mbéki ya lokúmu : apétwámí, azalí moto wa ntína, akokí na misálá milámu mínso. | |
II T | LinVB | 2:22 | Tíká kolanda mpósá eye bilengé bakoyókaka. Luká bosémbo, boyambi, bolingi na bobóto, elongó na baye bakosámbelaka Mokonzi na motéma péto. | |
II T | LinVB | 2:24 | Mosáleli wa Mokonzi akokí kozala moto wa boswâni té, kasi ázala na bobóto na bato bánso ; áyéba kotéya malámu bato mpé kokanga motéma. | |
II T | LinVB | 2:25 | Apálela na bobóto bato ba motó makási, mbele Nzámbe akopésa bangó ngrásya ’te bábóngola mitéma mpé bákóma koyéba matéya ma sôló ; | |