JOEL
Chapter 2
Joel | LinVB | 2:1 | Bobete mindule o Sion, boganga o ngomba ya ngai esantu. Bato banso ba ekolo balenge na nsomo, zambi mokolo mwa Yawe mokoya, mobelemi mpenza ! | |
Joel | LinVB | 2:2 | Mokolo mona mokozala mokolo mwa molili, mokolo mwa londende mpe mwa mampata maindo. Lokola moi mokobimaka na ntongo bato ba ye bakoya kotonda o mokili mwa ngomba, ebele, lokola emononi naino te, lokola mpe ekozala nsima lisusu te kin’o bileko binso. | |
Joel | LinVB | 2:3 | O boso bwa bango móto mokosilisa binso, mokotumba mpe binso nsima ya bango. O liboso lya bango mokili mokozala lokola elanga ya Eden, nsima ya bango ekotikala se esobe mpamba ! Eloko yoko ekokima bango te. | |
Joel | LinVB | 2:5 | na lokito lokola la makalo, maye makoleka mbangu o ngomba. Ekozala lokola lokito la móto mwa nkoni mokotumba mitondo mya ndako : ekozala lokola limpinga linene lya basoda bakei etumba. | |
Joel | LinVB | 2:7 | Bato ba limpinga lina bakopota mbangu lokola bilombe, bakobuta o bifelo lokola babuni, moto na moto akolanda se nzela ya ye, ata moko akobunga nzela te. | |
Joel | LinVB | 2:8 | Moko te akokweisa moninga, moko moko akokoba nzela ya ye. Bakobanga makula te, bakotika milongo mya bango te. | |
Joel | LinVB | 2:9 | Bakokoto o engumba na makasi, bakobuta o bifelo mpe o mitondo mya ndako, bakoyingela epai ya maninisa lokola bayibi. | |
Joel | LinVB | 2:10 | O ntango ena mokili mokoningana, likolo likolenge, mwese na sanza ikoyinda, minzoto mikongenge lisusu te. | |
Joel | LinVB | 2:11 | Bo mokambi wa limpinga lina Yawe akoyokisa lolaka la ye. Bato ba ye bazali ebele ; oyo akokokisa etinda ya ye azali makasi. Mokolo mwa Yawe mozali monene, mokolo mwa nsomo : nani akobika o mokolo mona ? | |
Joel | LinVB | 2:12 | Yawe alobi boye : « Ata sikawa bozongela ngai noki na motema mobimba. Bolala nzala, bolela mpe bokimela. » | |
Joel | LinVB | 2:13 | Bopasola bilamba te, kasi bopasola mitema, bozongela Yawe Nzambe wa bino, ye nta bolamu, nta ngolu, akosilikaka noki te, zambi aleki bolingi, azali na mawa mpo ya bobe bwa bato. | |
Joel | LinVB | 2:14 | Nani ayebi ? Mbele akozonga mpe akoyoka motema mawa ? Mbele akotikela bino bobenisi bwa ye mpo ’te bobonzela Yawe Nzambe wa bino mabonza ma bolei mpe ma bomeli ? | |
Joel | LinVB | 2:15 | Bobete mindule o Sion, botinda ’te bato balala nzala, bobenga bato o likita lisantu. | |
Joel | LinVB | 2:16 | Bosangisa bato banso, baya o likita lya bato ba Nzambe ; bobyanga babange mpe bana bake bazali konunga mabéle. Mobali abali sika atika ndako ya ye, mwasi atika ndako ya ye ya kolala. | |
Joel | LinVB | 2:17 | Banganga Nzambe, basaleli ba Yawe, bayingela o Tempelo, balela : « E Yawe, yokela bato ba yo mawa, oyokisa bato ba ekolo ya yo nsoni te ; bato ba bikolo bisusu bawulola bango te ! Baloba te : Wapi Nzambe wa bango ? » Eyano ya Yawe | |
Joel | LinVB | 2:19 | Azongiseli bato ba ye maloba maye : « Tala natindeli bino mbuma ya mampa, vino na mafuta ma sika, bokolia mpe bokotonda. Ata mokolo moko te bokosambwa o miso ma bikolo bisusu. | |
Joel | LinVB | 2:20 | Nakobengana moto wa Nordi mosika, nakokimisa ye o mopotu, o mokili mozangi mai, nakokimisa basoda ba liboso epai ya mbu ya Esti, baye balandi bango epai ya mbu ya Westi. Mai mana makolumba nsolo ebe, makokoma mai makobelisa bato. » Yawe akosalaka makambo manene ! | |
Joel | LinVB | 2:22 | Bino, nyama ya bisobe, bobanga lisusu te, mpo matiti makomi kokola lisusu, mpe nzete ikobota mbuma lisusu, mbuma ya vino mpe ya figi ikopesa bino bolamu. | |
Joel | LinVB | 2:23 | Bato ba Sion, bobina, boyoka nsai, mpe bosepela mpo ya Yawe Nzambe wa bino. Alakisi bino bolamu bwa ye, anokisi lisusu mbula lokola kala ; bokozwa mbula ya mpela mpe mbula ya elanga. | |
Joel | LinVB | 2:24 | Bitutelo bikotonda lisusu na mbuma ya mampa ; bikamelo bikotonda na vino mpe na mafuta ma sika. | |
Joel | LinVB | 2:25 | « Nakopesa bino biloko bozwaki liboso te, ntango mapalela masilisaki milona, ntango natindelaki bino makonki, mabanki na nyonyo, limpinga lya ngai linene. | |
Joel | LinVB | 2:26 | Bokolia lisusu biloko biike tee bokotonda ; bokokumisa nkombo ya Yawe Nzambe wa bino, mpo akosalaka makamwisi mpo ya bino. Bato ba ngai bakoyoka nsoni mokolo moko lisusu te ! | |