Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 17
Judg LinVB 17:1  Ezalaki o ngomba ya Efraim moto moko, nkombo ’te Mikayeu.
Judg LinVB 17:2  Alobi na mama wa ye : « Mokolo bayibelaki yo mitako mya palata nkoto yoko na monkama, obeteleki moyibi mobondo, ngai mpe nayokaki maloba mana ; tala mosolo mona, ngai moto nakamati mwango. » Mama wa ye alobi : « Yawe abenisa yo, mwana. »
Judg LinVB 17:3  Mikayeu azongisi mitako mya palata nkoto yoko na monkama, kasi mama wa ye alobi : « Nakobonzela Yawe mosolo mwango mpe nalingi ’te mwana wa ngai asala na mwango eke­ko ya bibende ; yango wana sikawa nakozongisela yo mwango. »
Judg LinVB 17:4  Ntango azongisi mosolo o maboko ma mama wa ye, mama akamati mitako nkama ibale mpe apesi motuli. Oyo atuli na myango ekeko ya bibende, atii yango o ndako ya Mikayeu.
Judg LinVB 17:5  Oyo azalaki na ndako mpo ya kosambela banzambe ba ye, asoni efod mpe asali bikeko ; na nsima o kati ya bana ba ye atii mwana moko azala nganga Nzambe.
Judg LinVB 17:6  O mikolo mina mokonzi azalaki o Israel te ; bato banso bazalaki kosala lokola mitema mya bango milingi.
Judg LinVB 17:7  Ezalaki elenge mobali moko wa Beteleme o Yuda, wa libota lya Yuda, azalaki mo-Levi mpe afandi wana lokola mompaya.
Judg LinVB 17:8  Atiki mboka Beteleme, akei koluka esika esusu ya kofa­nda. Akomi o ngomba ya Efraim mpe mobembo mwa ye moyei kosuka o ndako ya Mika.
Judg LinVB 17:9  Mika atuni ye : « Outi wapi ? » Azongisi : « Nazali mo-Levi, nauti o Beteleme o mokili mwa Yuda. Nazali koluka esika esusu mpo ’te nafanda lokola mompaya. »
Judg LinVB 17:10  Mika alobi na ye : « Tikala awa, zala tata wa ngai mpe nganga Nzambe wa ngai. Mobu na mobu nakofuta yo mitako mya palata zomi, nakopesa yo bila­mba mpe bilei. »
Judg LinVB 17:11  Mo-Levi andimi kofanda epai ya Mika. Mika atali ele­nge mobali lokola mwana wa ye moko.
Judg LinVB 17:12  Apesi ye mosala mwa bonga­nga. Mo-Levi akomi nganga Nzambe wa ye mpe atikali o ndako ya ye.
Judg LinVB 17:13  Mi­ka alobi : « Nayebi ’te sikawa Yawe akosala ngai se malamu, zambi mo-Levi akomi nganga Nzambe wa ngai. »