JUDGES
Chapter 18
Judg | LinVB | 18:1 | O eleko ena, mokonzi azalaki o Israel te. O mikolo mina bato ba libota lya Dan bazalaki koluka esika ya kofanda, zambi kin’o mokolo mona bazwaki mabelé te lokola mabota masusu ma Israel. | |
Judg | LinVB | 18:2 | Bongo bato ba Dan batindi babali batano ba etuka ya bango, basoda ba mpiko bauti o Sorea mpe o Estaol, bakende konongo mokili mwango malamu ; balobi na bango : « Bokende kotala mokili mona. » Bato batano bakomi o ngomba ya Efraim mpe basuki o ndako ya Mika ; na butu balali wana. | |
Judg | LinVB | 18:3 | Ekomi bango penepene na ndako ya Mika, bayoki mongongo mwa elenge mo-Levi. Bakei epai ya ye, batuni ye : « Nani atindi yo awa ? Oyei kosala nini awa ? Ozali koluka nini awa ? » | |
Judg | LinVB | 18:4 | Ayanoli : « Mika asali ngai malamu maike, andimi ngai o mosala, nakomi nganga Nzambe wa ye. » | |
Judg | LinVB | 18:6 | Nganga Nzambe alobi na bango : « Bokende na boboto ! Yawe akobatela bino o mobembo. » | |
Judg | LinVB | 18:7 | Bato batano bakei mpe bakomi o Lais. Bamoni ’te bato ba mboka ena bafandi nye lokola bato ba Sidoni, se na boboto, matata te. Bazalaki na mbuma mingi ya bilanga, bafandi mosika na ba-Sidoni mpe bakokutanaka na ba-Aram te. | |
Judg | LinVB | 18:8 | Bato batano bazongi epai ya bandeko ba bango o Sorea mpe Estaol. Bandeko batuni bango : « Boyeli biso nsango nini ? » | |
Judg | LinVB | 18:9 | Bango bayanoli : « Toteleme ! Tokende kobunda na bango, zambi tomoni ’te mokili mona mozali malamu mpenza. Boni bino bofandi nye mpe bolobi eloko te ? Bobete ntembe te ! Bokende kokamata mokili mona mpo bokoma bankolo ba mwango. | |
Judg | LinVB | 18:10 | Ekoti bino o mokili, bokokuta se bato bafandi na boboto. Mokili mozali monene, mpe Yawe akabi mwango o maboko ma bino ; mokili moye mozali na biloko binso mpenza. » | |
Judg | LinVB | 18:11 | Bato nkama motoba ba libota lya Dan balongwi o Sorea mpe o Estaol, bamemi bibuneli bya bango. | |
Judg | LinVB | 18:12 | Bapiki nganda o Kiriat-Yearim o Yuda. Ntina yango bakobengaka esika ena ‘Nganda ya ba-Dan’ tee lelo ; ezali o Westi ya Kiriat-Yearim. | |
Judg | LinVB | 18:14 | Bato batano baye bakendeki konongo mokili o Lais balobi na bandeko ba bango : « Boyebi te ’te o ndako ina efod ezali, mabenga ma biloko bya bonganga, ekeko ya bibende na elili ? Sikawa boyeba nini bosengeli kosala. » | |
Judg | LinVB | 18:16 | Bato nkama motoba ba libota lya Dan batikali penepene na ezibeli ya ndako, bibuneli o maboko. | |
Judg | LinVB | 18:17 | Bato batano, baye bakendeki konongo mokili, bayingeli o ndako, bakamati efod, ekeko, nkisi na elili ; nganga nzambe atikali penepene na ezibeli ya ndako elongo na bato nkama motoba baye bazalaki bibuneli o maboko. | |
Judg | LinVB | 18:18 | Awa bakoti o ndako ya Mika mpe bakamati ekeko, efod, nkisi na elili, nganga nzambe atuni bango : « Bolingi kosala nini ? » | |
Judg | LinVB | 18:19 | Bango bazongisi : « Kanga monoko, tia loboko liboso lya monoko mpe landa biso. Zala tata wa biso mpe nganga nzambe wa biso. Olingi kozala nganga Nzambe o ndako ya moto moko, to wa libota mpe wa etuka ya Israel mobimba ? » | |
Judg | LinVB | 18:20 | Nganga nzambe asepeli na maloba mana ; akamati efod, mabenga ma biloko bya bonganga na ekeko, mpe alandi limpinga lya bango. | |
Judg | LinVB | 18:21 | Bato ba Dan bakobi mobembo mwa bango, batindi ’te basi, bana, bibwele na biloko bakende liboso. | |
Judg | LinVB | 18:22 | Ekomi bango mwa mosika na ndako ya Mika, bato bafandi penepene na ndako ya Mika babimi, bakei kolanda bato ba Dan. | |
Judg | LinVB | 18:23 | Bagangeli bango, bato ba Dan bamibongoli mpe balobi na Mika : « Mpo nini otindaki bato baya kosala makeléle boye ? » | |
Judg | LinVB | 18:24 | Mika azongisi : « Nasalaki bikeko bya nzambe wa ngai mpe bino boyibi byango, na mpe nganga nzambe wa ngai bokei na ye. Ngai natikali na eloko te ! Boniboni botuni ngai : Likambo nini na yo ? » | |
Judg | LinVB | 18:25 | Bato ba Dan bayanoli : « Toyoka yo lisusu te, soki te bato basusu bakosilika awa, bakoki mpe kosala yo mabe mpe koboma yo na libota lya yo mobimba ! » | |
Judg | LinVB | 18:26 | Bato ba Dan bakobi nzela ya bango. Mika amoni ’te bango baleki ye na bokasi, atiki bango mpe azongi o ndako ya ye. | |
Judg | LinVB | 18:27 | Ezwi bango biloko, biye Mika asalaki na mpe nganga Nzambe azalaki kosalela ye, bato ba Dan, bakobi nzela mpe bakomi o Lais. Bakuti bato bafandi nye, bazalaki kobanga likama lyoko te. Babomi bango banso na mopanga mpe batumbi mboka ya bango. | |
Judg | LinVB | 18:28 | Moto moko azalaki te mpo ya kobikisa bango, zambi bazalaki mosika na bato ba Sidoni, mpe bazalaki na mokonzi mosusu te. Mboka ya bango ezalaki o lobwaku la Bet-Rekob. Batongi mboka lisusu mpo bafanda kuna seko. | |
Judg | LinVB | 18:29 | Bapesi yango nkombo Dan, oyo azalaki nkoko wa bango mpe mwana wa Israel ; kala nkombo ya mboka ena ezalaka Lais. | |
Judg | LinVB | 18:30 | Bato ba Dan babongiseli ekeko ya bango esika. Yonatan, mwana wa libota lya Gersom, nkoko wa Moze, azalaki nganga Nzambe o libota lya ba-Dan tee o eleko bato banso bakangemi mpe bakei o boombo. | |