Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 6
Judg LinVB 6:1  Ba-Israel basali mabe o miso ma Yawe ; Yawe akabi bango o maboko ma ba-Madian mibu nsa­mbo mobimba.
Judg LinVB 6:2  Bato ba Madian bakomi konyokolo Israel mingi. Yango wana ba-Israel bakimi o kati ya ngo­mba, bakei kobombama o kati ya mi­benga mpe o bibombamelo bisusu.
Judg LinVB 6:3  Mbala inso ba-Israel balonaki mbuma, ba-Madian elongo na bato ba Amalek na bato ba Esti lokola, bayei kobundisa bango.
Judg LinVB 6:4  Bapiki nganda o mokili mwa ba-Israel mpe basilisi mbuma ya bilanga tee Gaza. Batikeli ba-Israel eloko yoko ya kolia te : mpa­ta te, ngombe te, mpunda mpe te.
Judg LinVB 6:5  Mpo bazalaki koya mingi mpenza, ná bibwele mpe na biema bya bango, ebele lokola mapalela. Okoki kota­nga bango na kamela ya bango te ; bakoti o mokili se mpo ya kobebisa.
Judg LinVB 6:6  Mpe bongo ba-Madian basilisi bokasi bwa Israel. Kasi ba-Israel babeleli Yawe.
Judg LinVB 6:7  Awa ba-Israel babeleli Yawe zambi ba-Madian bazalaki konyokolo ba­ngo,
Judg LinVB 6:8  Yawe atindeli bango profeta mo­ko aloba na bango : « Yawe, Nza­mbe wa Israel, alobi boye : Ngai nabimisaki bino o Ezipeti, nalongolaki bino o mokili esika bozalaki bao­mbo.
Judg LinVB 6:9  Nabikisaki bino o maboko ma bato ba Ezipeti mpe ma baye ba­nso bazalaki konyokolo bino. Nabe­nganaki bango o boso bwa bino mpe napesaki bango mokili mwa bango.
Judg LinVB 6:10  Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nza­mbe wa bino, bobanga banza­mbe ba ba-Amor te, bankolo ba mabelé. Kasi botosaki ngai te. »
Judg LinVB 6:11  Anzelu wa Yawe ayei mpe afandi o nse ya gbukulu ezali o Ofra ; nkolo wa nzete, Yoas wa libota lya Abiezer. Gedeon, mwana wa ye, azalaki kolongola mbuma ya mampa o kati ya matiti o ekamelo ya vino mpo ’te bato ba Madian bayiba yango te.
Judg LinVB 6:12  Anzelu wa Yawe abimeli ye mpe alobi na ye : « Yawe azali na yo, elombe wa bitumba ! »
Judg LinVB 6:13  Gedeon azongisi : « Moko­nzi, nabondeli yo, soko Yawe azali na biso, mpo nini mabe mana manso ma­kweli biso ? Wapi makamwisi batata ba biso basololaki biso ? Balobaki te ’te Yawe abimisaki biso o Ezipeti ? Sikawa Yawe atiki biso, akabi biso o maboko ma bato ba Madian. »
Judg LinVB 6:14  Na nsima Yawe ayei, atali ye mpe alobi : « Yo ozali makasi mpe na mpiko. Kende kobikisa Israel o maboko ma ba-Madian. »
Judg LinVB 6:15  Gedeon azongisi : « Nabondeli yo, Mokonzi, ndenge nini nabikisa Israel ? Libota lya ngai libota lya mpamba o ekolo ya Manase, mpe ngai mwana wa nsuka o ndako ya tata wa ngai. »
Judg LinVB 6:16  Kasi Yawe alobi : « Ngai nakozala na yo, mpe okosilisa ba-Madian na mbala yoko. »
Judg LinVB 6:17  Gedeon alobi : « Soko ya solo olingi ngai, lakisa ngai elembo nayeba ’te ezali bobele yo moto olobeli ngai.
Judg LinVB 6:18  Nabondeli yo, zila awa, nakozonga epai ya yo. Nakoyela yo libonza mpe nakotia lyango liboso lya yo. » Moko­nzi ayanoli : « Nakotikala awa tee oko­zo­nga. »
Judg LinVB 6:19  Gedeon akei koboma mwana ntaba, alambi yango na lomeko loko la fufu, asali mampa mazangi nkisi, atii nyama o ekoló mpe mafuta o nzungu, na nsima azongi o nse ya gbukulu mpe abonzeli ye.
Judg LinVB 6:20  Anzelu wa Yawe alobi na ye : « Kamata nyama mpe ma­mpa mazangi nkisi, tia binso o liba­nga, mpe sopela byango mafuta. » Ge­deon asali se bongo.
Judg LinVB 6:21  Anzelu wa Yawe azalaki na lingenda o loboko mpe abeti nyama na mampa na nso­nge ya lingenda. Móto mobimi ut’o libanga mosilisi nyama na mampa mana. Mpe anzelu wa Yawe alimwi o miso ma ye.
Judg LinVB 6:22  Sikawa Gedeon ayebi ’te ezalaki bobele anzelu wa Yawe, bongo alobi : « Mokonzi wa ngai, mawa na ngai, mpamba te, namoni anzelu wa Yawe na miso. »
Judg LinVB 6:23  Yawe azongisi : « Boboto bozala na yo ! Obanga eloko te, okokufa te. »
Judg LinVB 6:24  Gedeon ato­ngeli Yawe etumbelo o esika ena mpe apesi yango nkombo : Yawe-Boboto. Tee lelo etumbelo ena ezali o Ofra ya Abiezer.
Judg LinVB 6:25  O butu bona Yawe alobi na Gedeon : « Kamata ngombe mobali o lopango la tata wa yo, ngombe ya mibu nsambo. Boma etumbelo ya Baal o lopango la tata wa yo, mpe likonzi lya nkisi ezali penepene.
Judg LinVB 6:26  Na nsima tongela Yawe, Nzambe wa yo, altare o mwa ngomba mpe bongisa yango malamu. Na nsima kamata ngombe mobali, boma yango mpe bonzela Yawe yango na nkoni ya likonzi lya nkisi okataki. »
Judg LinVB 6:27  Gedeon aponi basali zomi mpe asali lokola Yawe atindaki ye. Nzokande lokola abangaki ba­ndeko ba ye mpe bato ba mboka, asali bongo na moi te, kasi na butu.
Judg LinVB 6:28  Bato ba mboka balongwi o mpongi na ntongo, bamoni ’te babomi etumbelo ya Baal, mpe bakati likonzi lya nkisi ezalaki wana mpe batumbi ngombe o altare batongaki sika.
Judg LinVB 6:29  Batunani : « Na­ni asali bongo ? » Bakei koluka mpe kotuna bato, bango balobi : « Ge­deon, mwana wa Yoas asali ya­ngo ! »
Judg LinVB 6:30  Bato ba mboka balobi na Yoas : « Bimisa mwana wa yo, akufa, zambi abo­mi etumbelo ya Baal mpe akati likonzi lya nkisi ezalaki wana penepene. »
Judg LinVB 6:31  Yoas ayanoli bato bazali penepene na ye : « Bino bolingi kolongisa Baal ? Bolingi kosalisa ye ? Moto oyo alongisi Baal baboma ye liboso ’te ntongo etana. Soko Baal azali nzambe, amibikisa ye moko, mpo Gedeon abo­mi etumbelo ya ye. »
Judg LinVB 6:32  O mokolo mona bapesi Gedeon nkombo Yerubaal, zambi balobi ’te « Baal asambisa ye, mpamba te, ye moto abukaki etu­mbelo ya ye. »
Judg LinVB 6:33  Ba-Madian, ba-Amalek na bato ba Esti banso bayokani ; bakatisi Yordane mpe bapiki nganda o esobe ya Yizreel.
Judg LinVB 6:34  Elimo ya Yawe ekiteli Gedeon. Bongo Gedeon abeti mondule mpe bato ba Abiezer balandi ye.
Judg LinVB 6:35  Ati­ndi bantoma o mokili mobimba mwa Manase, abengi mpe bango balanda ye. Na nsima atindi bantoma o mabota ma Aser, Zabulon na Neftali ; bango balandi ye lokola.
Judg LinVB 6:36  Gedeon alobi na Nzambe : « Soko ya solo olingi kobikisa Israel na maboko ma ngai lokola olobaki,
Judg LinVB 6:37  tala, nakotanda lomposo la mpata o etutelo ; soko mamio makiti se o lo­mposo la mpata, kasi mabelé mapoli te, nakoyeba ’te olingi kobikisa Israel na maboko ma ngai lokola olobaki. »
Judg LinVB 6:38  Esalemi se bongo. Na nta ntongo Gedeon atelemi, akamoli lomposo la mpata, abimisi mamio mpe atondisi kopo mobimba na mai.
Judg LinVB 6:39  Gedeon alobi na Nzambe : « Osilikela ngai te, soko natuni yo lisusu : Tika nameka ele­mbo ya lomposo la mpata mbala ya ibale ; sala ’te lomposo la mpata lopolo te, kasi mamio makweya o mabelé bisika binso penepene ! »
Judg LinVB 6:40  O butu bona Nzambe asali se bongo : se lomposo lopoli te, kasi mamio mazalaki bipai binso.