Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 1
Judg LinVB 1:1  Nsima ya liwa lya Yozue, ba- Isra­el batuni Yawe : « O kati ya biso nani abanda kobundisa ba-Kanana ? »
Judg LinVB 1:2  Mpe Yawe azongisi : « Yuda moto abanda kobunda, mpo nasili nakabi mokili o maboko ma ye. »
Judg LinVB 1:3  Yuda alobi na ndeko wa ye Simeon : « Yaka kosalisa ngai o mokili bapesi ngai, bo­ngo tobunda etumba na ba-Kanana ; na nsima ngai nakosalisa yo o mokili bapesi yo. » Mpe Simeon akei kosalisa ye.
Judg LinVB 1:4  Bongo Yuda akei, mpe Yawe akabi bato ba Kanana na ba-Perizi o maboko ma ye. O mboka Bezek balongi bato nkoto zomi.
Judg LinVB 1:5  O Bezek bakutani na Adoni-Bezek, babundi na ye, balongi ba-Kanana na ba-Perizi.
Judg LinVB 1:6  Adoni-Bezek akimi, kasi balandi ye, bakangi ye mpe bakati ye misapi minene mya maboko mpe mya makolo.
Judg LinVB 1:7  Adoni-Bezek alobi : « Bakonzi ntuku nsambo bazalaki kolokoto mpumbulu ya mampa o nse ya meza, mpe ngai moto nakataki bango misapi minene mya maboko mpe mya makolo ; sikawa Yawe azongiseli ngai mabe nasalaki bango. » Bakei na ye o Yeruzalem, akufi bobele kuna.
Judg LinVB 1:8  Bana ba Yuda bakei kobunda na Yeruzalem ; babotoli yango, babomi bato banso na mopanga mpe batumbi engumba.
Judg LinVB 1:9  Na nsima bana ba Yuda balongwi kuna mpe bakei kobunda na ba-Kanana, baye bafandi o ngomba, o Negeb mpe o mokili epai ya mbu.
Judg LinVB 1:10  Na nsima akei kobunda na ba-Kanana bafandi o Ebron. Kala nko­mbo ya Ebron ezalaka Kiriat-Arba. Kuna alo­ngi Sesai, Akiman na Talmai.
Judg LinVB 1:11  A­lo­ngwi kuna mpe akei kobunda na bato bafandi o Debir, mboka eye ezalaka kala na nkombo Kiriat-Sefer.
Judg LinVB 1:12  Ka­leb alobi : « Moto akolonga etu­mba o Kiriat-Sefer mpe akobotolo mboka, nakobalisa ye mwana wa ngai Aksa. »
Judg LinVB 1:13  Otniel, mwana wa Keniz, mozimi wa Kaleb, abotoli mboka, mpe Kaleb abalisi ye mwana wa ye Aksa.
Judg LinVB 1:14  Ekomi Aksa o ndako ya Otniel, oyo abondeli ye ’te asenge tata wa ye elanga. Akiti mpunda mpe Kaleb atuni ye : « Olingi nini ? »
Judg LinVB 1:15  Aksa azongisi : « Nalingi okabela ngai eloko. Awa otindi ngai o mokili mwa Negeb, pesa ngai maziba ma mai. » Mpe Kaleb akabeli ye maziba masusu o likolo, masusu o ngele.
Judg LinVB 1:16  Bana ba Obab, moto wa Keniz, bokilo wa Moze, balongwi o mboka ya Mbila mpe elongo na bana ba Yuda bakei tee o eliki ya Yuda, eye ezali o Negeb, penepene na Arad. Bayei kofanda wa­na o kati ya ba-Amalek.
Judg LinVB 1:17  Na nsima Yuda na ndeko wa ye Simeon bakei kobunda na ba-Kanana, baye bafandi o Sefat ; balongi bango mpe babebisi mboka nye. Yango wana bapesi mboka ena nkombo Orma.
Judg LinVB 1:18  Yuda abotoli naino mboka Gaza, Askalon na Ekron na bikolo bya penepene.
Judg LinVB 1:19  Yawe azalaki na Yuda, bo­ngo Yuda akomi nkolo wa mokili mwa Ngomba, kasi akokaki kobe­nga­na bato bafandi o esobe te, zambi bazalaki na makalo ma bibende.
Judg LinVB 1:20  Bapesi Kaleb mboka Ebron, lokola Moze alobaki, mpe Kaleb abe­ngani kuna bana basato ba Anak.
Judg LinVB 1:21  Ka­si bana ba Benyamin babimisi ba-Yebus o mboka ya bango Yeruzalem te ; tee lelo ba-Yebus bakofandaka o Yeruzalem elongo na bana ba Benyamin.
Judg LinVB 1:22  Bana ba libota lya Yozefu bakei o Betel, Yawe azalaki na bango.
Judg LinVB 1:23  Batindi bato batala mboka Betel. Kala nkombo ya Betel ezalaka Luz.
Judg LinVB 1:24  Bato batindami mpo ya konongo, bamoni moto moko abimi o mboka, balobi na ye : « Lakisa biso epai wapi tokoki kokoto o mboka, bongo tokoyokela yo mawa. »
Judg LinVB 1:25  Ye alakisi bango esika kani bakoki koyingela o mboka. Babomi bato banso na mopanga, kasi batiki moto oyo akende na libota lya ye mobimba.
Judg LinVB 1:26  Moto oyo akei o mokili mwa ba-Iti mpe atongi mboka kuna, apesi yango nkombo Luz ; ezali nkombo ya mboka ena tee lelo.
Judg LinVB 1:27  Manase akokaki kobotolo mboka iye te : Bet-Sean, Tanak, Dor, Yibleam, Megido na mpe mboka ike ya penepene. Bongo ba-Kanana batikali o mo­kili mona.
Judg LinVB 1:28  Nzokande mokolo ba-Israel bakomi makasi bakomisi ba-Kanana baombo ba bango, kasi babengani bango te.
Judg LinVB 1:29  Efraim mpe abengani ba-Kanana te, baye bafandi o Gezer, mpe bongo ba-Kanana batikali kuna mpe bafandi esika yoko na ye.
Judg LinVB 1:30  Zabulon abengani bato ba Kitron na Nakalol te. Ba-Kanana bakobi kofanda o kati ya mabota ma Zabulon bo baombo ba bango.
Judg LinVB 1:31  Aser abengani bato ba Ako te, bato ba Sidoni, Akleb, Azkib, Elba, Afiki na Rekob mpe te.
Judg LinVB 1:32  Bongo bato ba libota lya Aser batikali kofanda o kati ya ba-Kanana, bankolo mboka, zambi babengani bango te.
Judg LinVB 1:33  Neftali abe­nga­ni bankolo mboka te : ba-Bet-Semes na ba-Bet-Anat, ayei kofanda o kati ya ba-Kanana baye bafandi o ekolo ena ; kasi ba-Bet-Semes na ba-Bet-Anat bakomi baombo ba ye.
Judg LinVB 1:34  Ba-Amor bazongisi ba-Dan o ngomba, bapesi bango nzela te ’te bakita o esobe.
Judg LinVB 1:35  Ba-Amor batikali wana mpe bafandi o Ar-Eres, Ayalon mpe Saalbim ; kasi mokolo bato ba libota lya Yozefu bakomi makasi, bakomisi ba-Amor baombo ba bango.
Judg LinVB 1:36  Mokili mwa bato ba Edom mobandi o Akrabim, epai ya Libanga linene tee o mokili mwa ngomba ngomba.