JUDGES
Chapter 9
Judg | LinVB | 9:1 | Abimelek, mwana wa Yerubaal, akei o Sikem epai ya bandeko ba mama wa ye mpe epai ya banoko ba ye. Alobi na bango : | |
Judg | LinVB | 9:2 | « Bokende kotuna bakolo ba mboka ba Sikem : Eloko nini eleki malamu o miso ma bino ? Bolingi kozala na bakonzi ntuku nsambo, banso bana ba Yerubaal, to bolingi kozala na mokonzi moko ? Boyeba ’te ngai nazali na bino makila moko ! » | |
Judg | LinVB | 9:3 | Bandeko ba ye bayebisi bakolo ba mboka ba Sikem bobele maloba mana manso. Balingi se Abimelek, balobi : « Azali ndeko wa biso ! » | |
Judg | LinVB | 9:4 | Bapesi ye mitako mya palata ntuku nsambo iye bazwi o tempelo ya Baal-Berit. Abimelek akamati myango mpe afuti bato ba mpamba mpe ba mobulu mpo balanda ye. | |
Judg | LinVB | 9:5 | Na nsima akei o ndako ya tata wa ye o Ofra, mpe abomi bandeko ba ye, bana ba Yerubaal, bato ntuku nsambo o libanga se lyoko. Ebiki bobele Yotam, mwana wa nsuka wa Yerubaal, zambi amibombaki. | |
Judg | LinVB | 9:6 | Na nsima bakolo ba mboka banso ba Sikem na Bet-Milo basangani likita penepene na wenge eye ezali o Sikem, mpe baluboli Abimelek mokonzi. | |
Judg | LinVB | 9:7 | Bayei koyebisa likambo lyango na Yotam. Yotam atelemi o nsonge ya ngomba Garizim mpe agangi : « Boyoka ngai, bankumu ba Sikem, mpo ’te Nzambe ayoka bino. | |
Judg | LinVB | 9:8 | Mokolo moko nzete ya zamba ikei mobembo mpo ya kopono mokonzi. Balobi na nzete ya oliva : ‘Zala mokonzi wa biso !’ | |
Judg | LinVB | 9:9 | Nzete ya oliva ezongisi : ‘Bolingi natika kopesa mafuta makosepelisa banzambe na bato, mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’ | |
Judg | LinVB | 9:11 | Nzete ya figi ezongisi : ‘Bolingi natika kobimisa nsolo mpimbo mpe natika kobota mbuma elengi mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’ | |
Judg | LinVB | 9:13 | Nzete ya vino ezongisi : ‘Bolingi natika kopesa vino ekosepelisa banzambe na bato mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’ | |
Judg | LinVB | 9:15 | Mpe nzete ya nzube ezongisi : ‘Soko ya solo boyei na motema malamu mpe bolingi kolubola ngai mokonzi wa bino, boya koluka esika ya malili penepene na ngai. Kasi soko bolingi bongo te, móto mokobima o nzete ya nzube mpe mokozikisa sédere ya Libano.’ | |
Judg | LinVB | 9:16 | Boluboli Abimelek mokonzi na mayele malamu mpe na motema moko, solo ? Ya solo, bosalaki Yerubaal na libota lya ye lokola ekoki na mosala mwa ye ? | |
Judg | LinVB | 9:17 | Tata wa ngai abunelaki bino, mpe andimaki kokufa mpo ya kobikisa bino o maboko ma ba-Madian, | |
Judg | LinVB | 9:18 | kasi bino botomboki na libota lya ye, bobomi bana ba ye ntuku nsambo o libanga se lyoko ; bokomisi Abimelek, mwana wa moombo wa ye, mokonzi wa bakolo ba Sikem, zambi azali ndeko wa bino. | |
Judg | LinVB | 9:19 | Soko bosalaki bongo na bosembo, mpe na motema moko solo, soko bosalaki Yerubaal na mpe libota lya ye malamu, bozala na esengo mpo ya Abimelek, mpe ye azala na esengo mpo ya bino. | |
Judg | LinVB | 9:20 | Kasi soko ezali bongo te, móto móbima o Abimelek mpe mósilisa bankumu ba Sikem na Bet-Milo ; móto móbima mpe o bankumu ba Sikem na Bet-Milo mpe mósilisa Abimelek ! » | |
Judg | LinVB | 9:23 | Na nsima Nzambe abebisi boyokani kati ya Abimelek na bakolo ba Sikem, bongo bakolo ba Sikem baboyi Abimelek. | |
Judg | LinVB | 9:24 | Ebongoki ’te Abimelek azwa etumbu mpo ya bana ba Yerubaal ntuku nsambo abomaki, mpe makila ma bango makwela Abimelek, oyo abomaki bandeko ba ye, makwela mpe bakolo ba Sikem, baye basalisaki ye na bobomi bandeko ba ye. | |
Judg | LinVB | 9:25 | Bakolo ba Sikem batindi bato o kati ya ngomba mpo ’te babombama mpe babotolo biloko bya bato banso bakoleka kuna ? Bato bayebisi Abimelek mpo yango. | |
Judg | LinVB | 9:26 | Gaal, mwana wa Obed, aleki o Sikem elongo na bandeko ba ye, mpe bakolo ba Sikem batii mitema na ye. | |
Judg | LinVB | 9:27 | Mokolo moko bakei o bilanga kobuka mbuma ya vino. Bakamoli mbuma bazwi, nsima balengeli limpati. Bakei o tempelo ya nzambe wa bango, balei mpe bameli ; nsima batombeli Abimelek bobe. | |
Judg | LinVB | 9:28 | Gaal, mwana wa Obed, agangi : « Abimelek nde nani o Sikem mpo ’te akomisa biso baombo ba ye ? Ebongoki te ’te Abimelek, mwana wa Yerubaal, na kapita wa ye Zebul basalela bato ba Amor, tata wa Sikem ? Bongo ntina nini biso tosalela ye ? | |
Judg | LinVB | 9:29 | Soko nazalaki mokonzi wa bango, mbele nakokimisa Abimelek o ngwende mpe nakoloba na ye : Luka basoda basusu mingi, na nsima tobunda biso na yo ! » | |
Judg | LinVB | 9:31 | Atindeli Abimelek bantoma na bonkutu mpo ’te bayebisa ye boye : « Gaal, mwana wa Obed, ayei o Sikem elongo na bandeko ba ye ; bazali kosala ’te bato ba mboka batombokela yo. | |
Judg | LinVB | 9:33 | Na nsima soko ntongo ekomi kotana, longwa kuna mpe pota mbangu epai ya mboka. Soko Gaal na bato ba ye bayei kozwana na yo, sala na bango lokola okoki. » | |
Judg | LinVB | 9:34 | Bongo Abimelek, elongo na bato ba ye, bakei na butu kobombama penepene na Sikem ; bato ba ye bakabwani na mampinga manei. | |
Judg | LinVB | 9:35 | Gaal, mwana wa Obed, abimi o ezibeli ya mboka, esika atelemi. Abimelek na bato ba ye babimi o esika babombamaki. | |
Judg | LinVB | 9:36 | Emoni Gaal bango, alobi na Zebul : « Tala bato bazali kokita ngomba. » Kasi Zebul ayanoli : « Ozali komono molili mwa ngomba mpe okanisi ’te ezali bato. » | |
Judg | LinVB | 9:37 | Gaal alobi lisusu : « Tala bato bazali kokita ngomba ‘Litolu lya Mokili’, mpe basusu bazali kouta epai ya ‘Wenge ya banganga nkisi’. » | |
Judg | LinVB | 9:38 | Zebul alobi : « Obosani nde maloba ma yo : Abimelek azali nani mpo ’te tokoma baombo ba ye ? Okinolaki bango te ? Kende kokutana na bango sikawa mpe bunda bitumba. » | |
Judg | LinVB | 9:40 | Kasi akoki te mpe akimi. Abimelek alandi ye. Bato ba Gaal mingi bakwei mpe bakufi liboso ’te bakoma o ezibeli ya mboka. | |
Judg | LinVB | 9:41 | Abimelek akei kofanda o Aruma, mpe Zebul abengani Gaal na bandeko ba ye, apekisi bango bafanda o Sikem lisusu te. | |
Judg | LinVB | 9:42 | Mokolo mwa nsima bato balongwi o mboka mpe bakei o esobe ; bayebisi Abimelek likambo lina. | |
Judg | LinVB | 9:43 | Akamati bato ba ye mpe akaboli bango na mangomba masato, bakei kobombama o bilanga. Emoni ye ’te bato bazali kobima o mboka, akei kobunda na bango mpe alongi bango. | |
Judg | LinVB | 9:44 | Abimelek elongo na lingomba lya bato ba ye, akei mbangu epai ya mboka mpe atelemi o ezibeli ya mboka ; mamgomba masusu mabale makei kobunda na baye bazali o esobe mpe babomi bango. | |
Judg | LinVB | 9:45 | Mokolo mobimba Abimelek abundi na bato ba mboka ; abotoli mboka, abomi bato banso. Abomi mpe mboka mpe abwakeli yango mongwa. | |
Judg | LinVB | 9:46 | Eyoki bakolo ba Migdal-Sikem nsango ena, banso bakei kosangana o mobenga mozali o nse ya tempelo ya El-Berit. | |
Judg | LinVB | 9:48 | Bongo Abimelek abuti ngomba Salmon elongo na bato ba ye. Akamati soka, akati etapi ya nzete, atomboli yango mpe atii yango o lipeke lya ye ; alobi na bato ba ye : « Bomoni ndenge nasali, bino mpe bosala bongo noki. » | |
Judg | LinVB | 9:49 | Bato ba ye banso bakati etapi mpe balandi Abimelek. Babwaki byango penepene na mobenga mpe batumbi byango likolo lya mobenga esika bato bazalaki. Bato banso ba Migdal-Sikem bakufi, bazalaki soki nkoto yoko, babali na basi. | |
Judg | LinVB | 9:51 | O kati ya mboka linongi litongami makasi esika babali, basi na bakolo banso ba mboka bakimaki. Bakangi ezibeli nsima ya bango mpe babuti epai ya likolo. | |
Judg | LinVB | 9:52 | Abimelek asili akomi pene na linongi mpe abandi etumba ; ntango akomi penepene na ezibeli ya linongi mpe alingi kotumba lyango, | |
Judg | LinVB | 9:54 | Abimelek abengi noki elenge mobali oyo amemi bibuneli bya ye, alobi na ye : « Bimisa mopanga mwa yo mpe boma ngai mpo ’te bato baseke ngai te na bolobi ’te : Mwasi moto abomi ye. » Mosali wa ye atuboli ye, mpe akufi. | |
Judg | LinVB | 9:56 | Nzambe azongiseli Abimelek mabe asalaki tata wa ye awa abomaki bandeko ba ye ntuku nsambo. | |